Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Nkoma ya batángi

Nkoma ya batángi

Nkoma ya batángi

Kindumba ya bana mike Nazangi mpenza maloba mpo na kopesa bino matɔndi mpo na masolo “Kindumba ya bana mike​—Likambo moko ya nsɔmɔ.” (Yuli-Sɛtɛmbɛ 2003) Masolo yango elobeli likambo yango tii na misisa na yango nyonso. Nakanisi ete esengeli kobimisa lisusu masolo yango na bazulunalo ya mokili mpo bato mingi báyeba ete boombo ya ndenge wana ezali.

M. K., République tchèque

Syrie Natɔndi bino mpo na lisolo “Syrie​—Nsango ya makambo ya malamu ya kala.” (8 Febwali 2003, na Lifalanse) Mpo na koloba solo, makambo ya kala esepelisaka ngai ata moke te. Kasi, lisolo oyo esalisi ngai namona na makanisi banzela mpe bingumba ndenge na ndenge epai ntoma Paulo atambolaki. Masolo lokola oyo esalisaka biso tóbakisa boyebi na biso mpe tókanga ntina ya makambo oyo basaleli ya Nzambe na ntango ya kala bakutanaki na yango.

T. S., États-Unis

Kozala nzoto makasi Nalingi kopesa bino matɔndi mpo na batoli nyonso bopesi mpo na ngalasisi mpe kokitisa kilo ya nzoto, oyo ebimaki na lisolo “Makambo mazali koleka na mokili.” Nasepelaki mpenza na eteni oyo elobaki “Mpo na kozala nzoto makasi.” (8 Febwali 2003, na Lifalanse) Emonisaki ete ata mwa ngalasisi moke ekoki kosalisa yo ozala nzoto kolɔngɔnɔ. Yango elendisaki ngai mpamba te nkisi moko oyo namɛlaka elɛmbisaka ngai mpe mpo na yango nasalaka ngalasisi ntango molai te. Matɔndi mingi mpo na batoli wana ya bokɔlɔngɔnɔ ya nzoto.

G. P., États-Unis

Mots croisés Kaka mwa maloba moke mpo na kopesa bino matondi mingi ndenge botyaka mots croisés na bazulunalo na bino. Nasepelaka na yango mingi! Ezalaka kitoko, eteyaka, mpe ezali mpo na ngai lolenge malamu ya kopemisa makanisi na mpokwa.

J. G., États-Unis

Banda kala, nasepelaka na masano ya mots croisés, mpe ntango bobandaki kobimisa yango na Lamuká!, nabandaki kozela yango na motema likoló. Na ebandeli, nazalaki kaka kotala na Biblia mikapo oyo bapesi, kasi sikoyo nakoki kosala mingi na yango kozanga kotala na Biblia! Yango esalisi ngai nayeba mikapo mingi ya Biblia mpe bato mingi oyo Biblia elobeli.

E. G., États-Unis

Komungamunga Bandeko na ngai mpe baninga na ngai bapesá ngai nkombo komungamunga. Bakabelaki ngai kutu foto ya ngai moko oyo ezalaki na maloba oyo: “Soki omoni moto moko azali komungamunga te, kabelá ye mwa komungamunga na yo.” Kasi, makambo oyo libota na biso eutaki kokwela esilisaki ngai esengo nyonso. Lisolo “komungamunga esalaka malamu” (Yuli-Sɛtɛmbɛ 2003) ebongolaki makanisi na ngai. Sikoyo, nakoki lisusu kosepelisa bato na komungamunga na ngai. Natɔndi Yehova ndenge asaleli lisolo wana mpo na kosalisa ngai nazongela bomoto na ngai.

O. F., Nigeria

Bosɔtɔ Na masolo “Bosɔtɔ ekozipa biso?” (22 Augusto 2002, na Lifalanse), bozongeli maloba ya ebongiseli moko ya Italie (association italienne de protection de l’environnement) mpo na kolobela bambula oyo biloko ndenge na ndenge eumelaka na kati ya mai ya mbu liboso epola. Nakanisi ete bambula 500 oyo bapesi mpo na manzanza eleki mpenza ebele. Na liziba moko na Floride (réserve naturelle nationale de Pelican Island [États-Unis]), namonaki manzanza esalemi na aluminium to na étain oyo, ntango kaka natutaki yango moke na boti na ngai ekómaki mputulu. Nandimi te ete manzanza yango eumelaki bambula koleka 10 na kati ya mai​—ntango mosusu kutu esalaki ata mbula zomi te. Ndenge moto nyonso oyo azali na masuwa ya aluminium ayebi yango malamu, mai ya mungwa elyaka ebende mokemoke.

S. S., États-Unis

“Eyano ya lamuká!”: Ezali solo ete bambula mosusu bapesaka yango na bokɛngi. Atako bongo, buku moko (Eléments d’écologie marine, na Lingelesi) ya R. Tait mpe F. Dipper, emonisi ete ekoki kosɛnga bambula 80 tii 100 mpo linzanza ya aliminium epola, mpe bambula 50 tii 100 mpo linzanza oyo esalemi na étain epola. Kutu, manzanza oyo ezali libándá ya mai epolaka noki mpenza koleka oyo ezali na kati ya mai.