Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Nkombo ya Yehova na bisanga ya Pasifike

Nkombo ya Yehova na bisanga ya Pasifike

Nkombo ya Yehova na bisanga ya Pasifike

EUTI NA MOKOMI NA BISO NA FIJI

EBELE ya bato oyo bazalaki wana bakamwaki makasi. Bato oyo bayei sika na esanga na bango ya Pasifike bazalaki kokanga miso liboso ya kolya biloko oyo balambeli bango. Bato ya esanga yango batunaki ete: “Bozali kosala nini?”

Bayanolaki boye: “Tozali kopesa Nzambe matɔndi mpo na makabo na ye.”

Batunaki lisusu, “Nzambe na bino azalaka wapi?”

Balobaki ete, na “likoló”

“Nkombo na ye nani?”

“Yehova.”

Batunaki lisusu, “Nzambe na bino alyaka biloko?”

Bapaya yango bayanolaki ete “Nzambe azali elimo. Azali lokola biso te; azali na bomoi ya libela na libela. Ye nde moto asalá mabelé, likoló, mbu, mpe biloko nyonso. Ye moto akelá biso.”

Bato ya esanga yango bakamwe na makambo wana ya solo wana oyo ezali mpasi te mpo na kondima mpe batuni bapaya yango soki mpo na nini bayei na esanga na bango. Bayanolaki boye:“Toyei koyebisa bino makambo ya Nzambe ya solo Yehova, mpe ya Mwana na ye Yesu, Mobikisi na biso.”​—⁠From Darkness to Light in Polynesia.

Bapaya yango bazalaki banani? Bazalaki Batatoli ya Yehova ya mikolo na biso? Te. Bazalaki bateyi to bapalanganisi ya nsango malamu mibale ya mboka Tahiti, oyo bakómaki mwa 15 Yuni 1824 na esanga ya Mangaia (na Sudi ya bisanga ya cook). Mpo na nini basalelaki nkombo Yehova? Ezalaki kaka likambo ya bongobongo? Eyano na mituna yango ezali komonisa mpo na nini nkombo ya Yehova ezali na ntina mpenza na mimeseno ya bato mingi ya bisanga ya Pasifike.

Basalelaki mingi nkombo ya Nzambe

Kobanda na ekeke ya 19, bamisionɛrɛ mingi ya Angleterre ná ya Amerika oyo bayaki na bisanga ya Pasifike bazalaki kosalela nkombo Yehova mokolo na mokolo na masolo na bango mpe na mikanda na bango. Kutu, moto moko ya mayele na makambo ya kala alobaki na libunga nyonso ete bamisionɛrɛ wana ya liboso “bazalaki bayekoli ya Yehova kasi ya Klisto te.”

Mikanda oyo bamisionɛrɛ yango bakomelaki bato mosusu ezalaki kobanda mbala mingi na maloba lokola oyo: “Tika ete Nzambe, Nkolo na biso Yehova ná Yesu Klisto Mokonzi ya kimya babikisa yo.” Yango wana, ezali likambo ya kokamwa te ete Albert J. Schütz, moto ya mayele na makambo etali nkota alobaki ete liloba moko kaka oyo babongolaki yango te na lokota ya Fiji na 1825 ntango babimisaki mokanda ya liboso na lokóta yango ezali liloba ya lingelesi Jehova.

Lolenge oyo bamisionɛrɛ yango basalelaki nkombo ya Yehova etikalaki mpenza na makanisi ya bato ya bisanga ya Pasifike. Bato mosusu ya bisanga yango oyo bamisionɛrɛ yango bateyaki bango, batindamaki lokola bamisionɛrɛ to bateyi mpo na komema nsango na bango na bisanga mosusu. Buku The Covenant Makers−Islander Missionaries in the Pacific elobi boye mpo na bamisionɛrɛ mibale ya Tahiti oyo tolobeli na ebandeli, oyo bayaki na Mangaia: “Mpo na bateyi wana ya mboka Tahiti, Yehova azali Nzambe kaka moko ya solo. Asalá mokili mobimba mpe moto azali moko ya biloko oyo ye asalá. . . . [Bateyaki] ete Yehova azali Nzambe kaka moko ya solo mpe Mwana na ye Yesu Klisto azali Mobikisi ya bato.”

Ntango bazalaki komema nsango ya Biblia na bisanga ndenge na ndenge, bamisionɛrɛ yango mosusu bakutanaki na makama ya minene, mpamba te mbala mosusu bato ya bisika yango bazalaki bato ya matata. Buku Mission, Church, and Sect in Oceania elobeli mikakatano oyo bazalaki kokutana na yango boye: “Kondima makasi oyo bazalaki na yango epai na Yehova ezalaki kosalisa bango ete bábanga te mpe bábungisa elikya te.”

Kondima ya ndenge wana epai na Yehova emonanaki na 1823 ntango nsango ya Biblia ekɔtaki na esanga ya Rarotonga, oyo ezali kati na bisanga ya Cook. Ntango misionɛrɛ John Williams, misionɛrɛ mpe kapitɛnɛ ya masuwa, akómaki wana, atindaki mibali mibale ná basi na bango mpo báteya bato ya Rarotonga. Kasi lokola bayokanaki malamu te na mokonzi oyo alangwaki mabe, babɛtaki bango mabe mpenza. Bayibaki biloko na bango nyonso, mpe bamisionɛrɛ babikaki mpenza na liwa.

Ntango bamisionɛrɛ bazongaki na masuwa, balobaki ete bakutaná naino te na bato ya mabe koleka lokola bato ya Rarotonga. Williams abangaki ete likama ekóma makasi, azwaki ekateli ya kolongwa na esanga yango mpo na mwa ntango. Nzokande, elenge moklisto moko, oyo azalaki mpe moteyi na nkombo Papeiha amonaki malamu atikala na esanga ye moko mpo na kosakola. Alobaki boye: “Bato wana ya matata bátika ngai na bomoi to báboma ngai, nakozonga epai na bango.”

Maloba oyo elandi, oyo Papeiha alobaki, bazalaki kozongela yango mbala na mbala na masolo ya bamisionɛrɛ yango:“Ko Jehova toku tiaki! Tei roto au i tona rima! (Yehova azali mobateli na ngai! Nazali na lobɔkɔ na ye!)” Na nsima, alataki bilamba ya bongobongo, asimbaki buku moko oyo ezali na bavɛrsɛ ya Biblia na monɔkɔ ya Tahiti, mpe amibwakaki na mai mpe abandaki konyanya tii abimaki na mokili. Longola ndenge abikaki, ntango kaka akómaki na esanga, amonaki ete bato mingi basepelaki na mateya na ye.

More Ta’unga andimaki mateya na ye mpe akómaki misionɛrɛ. Na 1842, More Ta’unga akómaki misionɛrɛ ya liboso oyo afungolaki esika ya lingomba (centre missionnaire) na esanga Nouvelle-Caledonie. Na ntina ya moto moko oyo asalisaki ye ayekola kotánga mpe kokoma, misionɛrɛ yango akomaki na zulunalo na ye boye: “Ayekolaki makambo yango malɛmbɛmalɛmbɛ. Mwa moke na nsima alobaki na ngai, ‘Nalingi kobondela.’ Kasi napesaki ye toli ete azela naino. Na nsima, atunaki ngai lisusu, ‘Okoki kotikela ngai nzela te mpo nabondela?’ Mpe alingaki koyeba mpo na nini nazali kolinga te ete ye abondela. Na yango nalobaki na ye, ‘Osengeli liboso kotumba bikeko na yo, mpe na nsima okoki kobondela Yehova. Ye moko nde akoki koyoka yo.’ Amemelaki ngai ekɔlɔ ya banzambe na ye, mpe alobaki ete, ‘tumbá yango. Sikoyo Yehova akozala Nzambe na ngai.’ Ayekolaki mpenza ndenge malamu ya kobondela.”

Bato ya bisanga ya Pasifike bandimi Yehova

Lokola bamisionɛrɛ bazali kosalela mingi nkombo ya Nzambe, yango ekoki kokamwisa te ete bato oyo bazalaki kosakola epai na bango bandimaki mpe Yehova lokola Nzambe na bango. Buku Mosala oyo bamisionɛrɛ basalaki na Sudi ya bisanga ya Pasifike (na Lingelesi) elobeli ebele ya bato oyo bayanganaki na Nordi ya esanga moko ya Pasifike ntango masuwa ya bamisionɛrɛ na nkombo Morning Star ekómaki na esanga yango. Buku yango elobi ete bato ya esanga yango “batombolaki mabɔkɔ likoló mpo na kopona, bamosusu kutu batombolaki mabɔkɔ nyonso mibale mpe batikaki yango na likoló ntango molai mpo na komonisa ete balingi kotika losambo ya bikeko mpe kosambela Yehova. Mpe lisusu, bandimaki ete bakokokisa bamposa nyonso ya bateyi. Bapesaki mwa eteni ya mabele mpo na kotonga ndako-nzambe mpo na losambo ya Yehova mpe kotonga ndako ya pastɛrɛ.”

Buku Williamu, misionɛrɛ na bisanga ya mbu: lisolo ya John Williams (na Lingelesi) elobeli kobongola motema oyo Malietoa, mokonzi monene na Samoa, amonisaki, ete: “Malietoa asalaki lisukulu moko ya molai liboso ya bato na ye nyonso, alakaki ete akokóma mosambeli ya Yehova, mpe akotonga ndako-nzambe mpo na kosambela Yehova. Apesaki etinda ete bato nyonso oyo batikali na mboka bábanda koyekola makambo na ntina ya Yehova mpe Yesu Klisto.”

Makambo wana nyonso esimbaki mpenza bomoi ya bato mingi ya bisanga ya Pasifike ntango molai. Yango wana, ata lelo oyo na bikólo lokola Fiji mpe Samoa, mbala mingi basalelaka nkombo ya Yehova na radio mpe na bazulunalo.

Kasi yango esuki kaka te na kosalela nkombo ya Yehova. Na buku na ye Bisanga ya Bozwi (na Lingelesi) oyo ebimaki mpo na mbala ya liboso na 1977, Pearl Binder alobeli ntina ya nkombo ya Yehova epai ya bato ya Banaba. Mboka ya bato yango mpenzampenza ezalaki Kiribati, kasi na nsima bakendaki kofanda na esanga Rabi, na Fiji. Binder akomi boye: “Bamisionɛrɛ oyo bayaki na Banaba, bamemelaki bato yango ebele ya makambo ya kitoko koleka ndenge oyo bango bakanisaki. Bindimeli na bango epai ya Yehova esalisaki bango mpenza na bomoi na bango, ekómisaki bango na bomoko koleka eloko mosusu nyonso na boumeli ya mbula 70 oyo bazalaki na minyoko mpe bindimeli yango ezali kino lelo kobatela elimo na bango. Soki ezalaki Yehova te, Nzambe oyo mindɛlɛ bamemelaki bato ya Banaba (Nzambe oyo bango moko mindɛlɛ batyolaka ye ntango nyonso) mbɛlɛ bato ya Banaba babungá nzela.”

Nkombo ya Nzambe kati na mabongoli ya Biblia

Moko ya mikano ya ntina ya bamisionɛrɛ ya liboso ezalaki ya kobongola Biblia na elobeli ya pɛtɛɛ na minɔkɔ oyo balobaka na bisanga ya Pasifike. Mpo na milende mpenza oyo basalaki, Biblia ezali lelo oyo na minɔkɔ mingi ya bisanga yango. Mpo na babongoli yango, ezalaki likambo ya kokakatana na yango te kokoma nkombo ya Yehova, ndenge basalaki mpo na bankombo mosusu nyonso oyo ezali na Biblia.

Moto oyo azali koyekola Biblia na likebi mpenza akomona ete ezali likambo ya ntina ndenge babongoli yango basalelaki nkombo ya Yehova kaka te na mabongoli na bango ya Makomami ya Liebele, kasi mpe na Makomami ya Grɛki ya boklisto, oyo bato mosusu babengaka Kondimana ya Sika. Ankɛtɛ moko oyo esalemaki na minɔkɔ nsambo ya bisanga ya Pasifike, emonisi ete basaleli nkombo Yehova na Makomami ya Grɛki ya boklisto na bavɛrsɛ 72. Ezali kaka te mabongoli oyo esalemaki na ekeke ya 19. Kati na yango tokokuta mpe libongoli ya sika oyo ebimaki na monɔkɔ ya Rotumien na 1999. Biblia yango esaleli nkombo ya Yehova na bavɛrsɛ 48 kati na Makomami ya Grɛki ya boklisto

Na nsuka ya ekeke ya 19, William Wyatt Gill, oyo aumeli mingi lokola misionɛrɛ na bisanga ya Pasifike, akomaki mpo na libongoli moko ya kala mpenza boye: “Lokola nasalelaka Biblia na monɔkɔ ya Rarotonga eleki sikoyo mbula 42, nasɛngi bólimbisa ngai ndenge nalobaka ete mpo na ngai yango ezali libongoli moko ya malamu oyo ekokani mpenza na Makomami ya ebandeli. Lokola na kati ya mabongoli nyonso ya Pasifike mpe ya Nouvelle Guinée, nkombo mosantu ‘Yehova’ ekomami ndenge wana, kasi babongolaki yango te, yango nde ezali kosala bokeseni makasi kati na Nzambe ya seko na banzambe oyo bapakano basambelaka.”

Mpo na nini basalelaki nkombo ya Nzambe

Mpo na nini bamisionɛrɛ wana babongoli ya Biblia mpe bateyi basalelaki mbala mingi nkombo mpenzampenza ya Nzambe, Yehova? Likambo ya liboso ezali ete bamonaki malamu kosala bokeseni kati na Yehova, Nzambe ya solo kaka moko, mpe ebele ya banzambe ya lokuta oyo bato bazalaki kosambela na bisanga ya Pasifike. (Yoane 17:3; 1 Bakolinti 8:​5, 6) Banzambe wana nyonso bazalaki na bankombo na bango, yango wana ezalaki na ntina ndenge basambeli na bango batunaki boye “Nzambe na bino nani? Nkombo na ye nani?” Soki básalelaka kaka liloba “nzambe” ndenge babengaka kuna, bato oyo bazalaki kosolola na bango bakokaki kokanisa mbala mosusu ete Oyo-Aleki-likoló azali nzambe mosusu oyo esengeli kobakisa ye na molɔngɔ ya banzambe na bango. Na yango, tokoki mpenza kokamwa te ete bamisionɛrɛ wana ya liboso basalelaki mingi mpenza nkombo ya Nzambe, Yehova.

Yango elingi koloba ete bato nyonso oyo bazali kosalela nkombo Yehova bayebi ye mpenza malamumalamu? Te. Hiram Bingham, misionɛrɛ mpe mobongoli ya Biblia, mwana ya misionɛrɛ moko ya Hawaii oyo ayebanaki mingi kaka na nkombo yango, ntango atatolaki epai ya bato ya Abiang (na Kiribati), azalaki koganga ete “Tozali kaka na Nzambe moko​—Yehova.” Na ntango yango, bato bazalaki kobukabuka bikeko na bango. Kasi buku Mosala oyo bamisionɛrɛ basalaki na Sudi ya bisanga ya Pasifike elobeli likambo yango boye:

“Bingham ayebaki ete, atako bato wana bazali kobukabuka bikeko na bango, yango elingi koloba te ete bato yango babongwani mpenza mpo na kokóma baklisto ya solo. Basimbaki ntina te na makambo oyo baevanzile elobeli, kasi bazwaki nde mwa mateya ya moboko.” Nzokande, koyeba nkombo ya Yehova mpamba ekoki te. Baklisto ya solo basengeli koyeba Yehova lokola moto mpenza mpe kotosa ye na makambo nyonso.​—Baloma 10:13-17.

Atako Moize azalaki moto ya sembo, oyo ayebaki nkombo ya Yehova mpe asalelaki yango, azalaki na mposa kaka ya koyeba lisusu makambo mingi. Abondelaki ete: “Na bongo nabondeli yo, soki nabongi na miso na yo, monisa ngai nzela na yo sasaipi ete nayeba yo mpe nabonga na miso na yo.” Ee, Moize alingaki te koyeba kaka nkombo ya Yehova. Alingaki koyeba bizaleli ya Yehova mpe ndenge nini akokaki kosepelisa ye. Na eyano na motuna na ye, Moize azwaki libaku malamu mpe ya monene mpenza ya komona nkembo ya Yehova oyo esalisaki ye ayeba ndimbola ya nkombo Yehova.​—Exode 33:19; 34:5-7.

Lolenge moko lelo, ebele ya Batatoli ya Yehova ya etúká ya Pasifike bazali kosalela Babiblia oyo bamisionɛrɛ wana ya liboso babongolaki mpo na kosalisa bato ya motema sembo mpo báyeba kaka te ndimbola ya nkombo ya Yehova kasi mpe báyeba eloko nini Yehova azali kosɛnga na bato oyo balingi kosambela ye na “elimo mpe na solo.” (Yoane 4:​23, 24) Ee, bato bazali kokumisa nkombo ya Yehova na “bisanga ya mbu.” Na yango, ebele ya bato bazali kotya elikya na bango na nkombo wana oyo eleki monene.​—Yisaya 24:15; 42:12; 51:5; Masese 18:10.

[Elilingi na lokasa 14]

Bamisionɛrɛ ya liboso ya mangomba ya boklisto balakisaki bato ya bisanga ya Pasifike nkombo ya Nzambe

[Maloba ya kolimbola elilingi na lokasa 14]

Mbila mpe foto ya lobɔkɔ na mwasi euti na mokanda Joyaux des îles coraliennes

[Elilingi na lokasa 15]

John Williams

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Culver Pictures

[Elilingi na lokasa 15]

Papeiha

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Na ndingisa ya Institute of Pacific Studies, na buku La vie des missionnaires dans les îIes du Pacifique, ya Aaron Buzacott

[Elilingi na lokasa 17]

Batatoli ya Yehova bazali kolakisa bato nkombo ya Nzambe na mokili mobimba