Bankisi ya banzete—Okoki komisalisa na yango?
Bankisi ya banzete—Okoki komisalisa na yango?
KOBANDA kala, bato bamisalisaka na bankisi ya banzete. Buku Papyrus Ebers, oyo bakomaki na Ezipito na ekeke ya 16 L.T.B. (Liboso ya ntango na biso), elobeli bankama ya bankisi ya bonkɔkɔ oyo ezalaki kosalisa maladi ndenge na ndenge. Nzokande, mbala mingi mikóló bazalaki kolakisa bilenge bankisi yango kaka na monɔkɔ.
Emonani lokola ete moto oyo akolisaki mayele ya kosalela bankisi ya banzete na mikili ya Mpoto ezali Dioscoride, monganga moko Mogrɛki, na ekeke ya liboso ya T.B. (ntango na biso), oyo akomaki buku De Materia Medica. Buku yango esalisaki bato mingi na kosala bankisi na boumeli ya mbula 1600 oyo elandaki. Na bisika mingi na mokili, bato mingi bazali kolanda komisalisa na bankisi ya banzete. Na Allemagne, Leta azongisaka mbongo na moto oyo amisalisi epai ya monganga, ata na bankisi ya banzete.
Atako mbala mosusu balobaka ete bankisi ya bonkɔkɔ oyo basalaka na banzete ezalaka na likama te lokola bankisi ya monganga, kasi bankisi yango ezangi likama te. Na bongo, likambo yango ebimisi mituna oyo: Makambo nini moto asengeli kokeba na yango mpe kotalela ntango alingi komisalisa na bankisi ya banzete? Ntango nini ekoki kozala malamu komisalisa na bankisi ya banzete mpe ntango nini ekoki kozala malamu te? *
Banzete mosusu ezali nkisi
Balobaka ete matiti to banzete mosusu ebikisaka bato na maladi mingi. Nzete mosusu esalisaka nzoto ebundisa maladi. Mosusu, elɛmbisaka bilei na kati ya libumu, esilisaka mpasi, esukolaka libumu, to elongolaka ngɛngɛ na makila.
Matiti mosusu balyaka yango mpe basalaka na yango nkisi. Na ndakisa, matiti oyo etindaka moto asuba mingi, lokola oyo babengi persil, ezalaka mpe na potassium mingi. Matiti yango oyo ezalaka na Potassium mingi, ezongisaka na nzoto ya moto potassium, eloko moko ya ntina mingi, oyo ebimaka na masuba. Ndenge moko mpe, matiti oyo babengi valériane (Valeriana officinalis), oyo basalelaka
banda kala mpo na kokitisa mpasi, ezalaka na calcium mingi. Ekoki kozala ete calcium wana oyo ezalaka na matiti yango nde esalisaka bɔɔngɔ mpo mpasi ekita.Ndenge bamɛlaka yango
Bamɛlaka nkisi ya banzete na ndenge mingi, na ndakisa lokola tii, balambaka yango, batyaka na masanga ya makasi, bapakolaka to batyaka na esika moto azali koyoka mpasi. Nkisi oyo ezalaka lokola tii, batyaka yango na mai ya mɔtɔ. Kasi bato oyo bayebi mosala yango malamu balobaka ete esengeli te kolamba yango. Nkisi ya kolamba, basalaka yango ntango balambi misisa to mposo ya nzete mpo ebimisa nkisi na yango.
Ndenge nini basalaka nkisi oyo batyaka na masanga ya makasi (teintures)? Buku moko elobi ete ezali nkisi “oyo euti na mposo, nkasa, to misisa ya nzete oyo batyaka na masanga ya makasi.” Ezali mpe na nkisi ya kopakola to ya kotya na nzoto oyo bakoki kosala yango na ndenge mingi. Mbala mingi, bapakolaka to batyaka moto nkisi yango na esika oyo azali koyoka mpasi.
Na kokesene na bavitamini mpe bankisi ya monganga, bankisi mingi ya banzete ezalaka bilei mpe mbala mingi balyaka yango kolya. Mosusu batekaka yango lokola nkisi ya mbuma, oyo ezalaka bololo te na monɔkɔ. Soki olingi komisalisa na bankisi ya banzete, ezali malamu kotuna moto oyo ayebi mosala yango malamu.
Banda kala, basalelaka bankisi ya matiti to banzete mpo na komisalisa na mwa bamaladi ya mikemike lokola miyoyo, libumu kilo, kozanga mpɔngi mpe mposa ya kosanza, to mpo na kosukola libumu. Kasi, mbala mosusu basalelaka yango mpe mpo na maladi mosusu ya minene—kaka mpo na kosilisa yango te, kasi mpe mpo moto abɛla yango te. Na ndakisa, na Allemagne mpe na Autriche, basalelaka motema ya lititi moko (chou palmiste [Serenoa repens]), liboso mpenza mpo na kosilisa maladi ya prostate (kokangama ya nzela ya masuba). Na mikili mosusu, mibali mingi (50-60 %) basukaka na kobɛla maladi yango. Kasi, liboso ya komɛla nkisi yango, ezali malamu monganga atala naino soki kokangama ya nzela ya masuba esɛngi te básalisa yango na nkisi mosusu ya makasi, ndenge basalaka soki yango euti na kanser.
Makambo mosusu ya kokeba na yango
Ata soki balobi ete nkisi boye ya banzete eyebani ete ezali likama te, esengeli kaka kokeba. Komikosa te kaka mpo balobi ete nkisi yango euti na “banzete ya zamba.” Buku moko oyo elobeli bankisi ya matiti elobi boye: “Eloko oyo ebangisaka na likambo yango ezali ete matiti mosusu ebomaka. [Ezali mawa] komona ete bato mosusu bakanisaka te liboso ya komɛla nkisi ya banzete, ata soki ebomaka.” Banzete mosusu ezalaka na nkisi oyo ekoki kobɛtisa motema mbangumbangu to malɛmbɛmalɛmbɛ, ekoki komatisa to kokitisa tansyo, to mpe ekoki komatisa to kokitisa sukali na nzoto. Yango wana, bato oyo babɛlaka maladi ya motema to baoyo tansyo na bango emataka, to mpe baoyo sukali emataka to ekitaka mingi na nzoto, na ndakisa bato ya diabɛtɛ, basengeli mpenza kokeba.
Kasi, mbala mingi bankisi yango ekoki kobimisa makambo lokola motó mpasi, kizunguzungu, mposa ya kosanza, mpe mokosa. Balobaka mpe ete bankisi yango ekendaka kongalisa “maladi mpo na kosilisa yango,” mpe epesaka gripɛ to maladi mosusu. Moto oyo azali komɛla nkisi ya banzete, maladi na ye ekoki komonana lokola engali lisusu, liboso ayoka malamu. Balobaka ete mbala mingi esalemaka bongo mpo pwazo oyo ezalaki na makila ezali kobima ntango moto abandi komɛla nkisi ya banzete.
Lokola ekómaka mbala mosusu bankisi mosusu ya banzete eboma bato, yango esengeli kotinda biso na kozala ekɛngɛ mpe koluka koyeba nkisi yango malamu liboso ya kosalela yango. Na ndakisa, matiti babengi éphédra, oyo bamɛlaka mpo na koboya koya monene, ematisaka mpe tansyo. Na États-Unis, bato koleka 100 bakufá mpo na nkisi yango, atako Steven Karch, monganga moko na etúká ya San Francisco, alobi ete: “Bato oyo nayebi bakufá [mpo bamɛlaki éphédra], ezalaki bato oyo bazalaki na maladi makasi ya motema to baoyo bamɛlaki nkisi yango mingi koleka.”
Monganga Logan Chamberlain, oyo akomaki buku moko mpo na bankisi ya banzete, alobi boye: “Pene na bato nyonso oyo tozwi lapolo na bambula oyo ete bankisi ya banzete esalaki bango mabe, ezali bato oyo bamɛlaki bankisi yango bimɛlamɛla . . . Komɛla nkisi oyo eyebani malamu kozanga kolekisa ndelo ezali na likama te, kutu ndenge oyo basɛngaka moto amɛla yango ezali mpenza moke mpe ekoki koboma moto te. Mɛlá nkisi yango ndenge basɛngi, kasi soki moto mosusu oyo ayebi malamu kosalisa na bankisi ya banzete apesi yo toli mosusu, okoki kolanda yango.”
Linda Page, oyo asalisaka na bankisi ya banzete, apesi toli oyo: “Ata soki maladi ezali makasi ndenge nini, lolenge malamu ya komisalisa ezali ya komɛla bankisi malɛmbɛmalɛmbɛ, na esika ya kolekisa ndelo. Mbala mingi matomba emonanaka
soki omɛli nkisi na boumeli ya ntango molai mpe oponi komisalisa na nkisi oyo ekonyɔkɔla yo te. Esɛngaka ntango molai liboso ete nzoto ezongela bokolɔngɔnɔ na yango.”Buku moko oyo elobeli bankisi ya banzete elimboli ete banzete mosusu epekisaka moto alya yango na kolekisa ndelo. Na ndakisa, banzete mosusu ya ndenge wana, oyo bamɛlaka mpo na kopesa nzoto makasi, esanzisaka soki moto amɛli yango mingi koleka. Nzokande, yango elingi koloba te ete banzete nyonso esalaka bongo, kasi epekisi mpe te komɛla yango kozanga kolekisa ndelo.
Atako bongo, bato mingi balobaka ete mpo nkisi ya banzete esalisa, esɛngaka komɛla yango mingi mpe na ndenge oyo esɛngami. Mbala mosusu, esengeli kobimisa makasi ya nkisi mpo ekoka kosalisa. Ndakisa moko ezali ya nzete babengi ginkgo biloba, oyo basalelaka banda kala mpo na kofungola bɔɔngɔ mpe mpo makila etambola malamu na nzoto, mpamba te esɛngaka nkasa na yango ezala mingi mpenza mpo na kosala mwa nkisi moke.
Kosangisa bankisi ekoki kozala likama
Bankisi ya banzete ekoki kosala yo mabe soki ekei kokutana na nkisi ya monganga na kati ya nzoto. Na ndakisa, ekoki kokitisa to kobakisa makasi ya nkisi oyo yango ekuti na nzoto, kobimisa yango nokinoki, to mpe kobimisa makambo mosusu lokola kosanza to kizunguzungu. Matiti babengi millepertuis, oyo mbala mingi na Allemagne, bapesaka yango bato oyo bazali kobɛla maladi ya konyokwama na makanisi, ebimisaka nokinoki bankisi mosusu oyo yango ekuti na nzoto, mpe esilisaka makasi na yango. Yango wana, soki ozali komɛla bankisi ya monganga, ata bankisi oyo epekisaka basi kozwa zemi, osengeli kokutana na monganga liboso ya komisalisa na nkisi ya banzete.
Buku moko oyo elobeli ndenge banzete mosusu esalisaka, elobi boye: “Masanga ya makasi, bangi ná cocaïne, to bankisi mosusu oyo elangwisaka mpe likaya, ekoki kosala moto mabe soki ekei kokutana na bankisi ya banzete na kati ya nzoto. . . . Soki tozali mpenza na bwanya, tosengeli koboya komɛla biloko wana nyonso, mingi mpenza ntango tozali kobɛla.” Lisusu, basi ya zemi mpe basi oyo bazali komɛlisa bana basengeli kozwa toli wana na lisɛki te. Toyebi ete mpo na oyo etali komɛla likaya mpe bangi, baklisto babatelami mpo bamɛlaka yango te, na boyokani na etinda ya Biblia oyo ya ‘komipɛtola na mbindo nyonso ya mosuni mpe ya elimo.’—2 Bakolinti 7:1.
Buku moko ekebisi mpo na bankisi ya banzete boye: “Soki ozwi zemi na ntango oyo ozali komɛla nkisi moko ya banzete, tiká komɛla yango tii mokolo okosolola na monganga na yo mpo na likambo yango. Meká kokanisa bakɔpɔ boni to milangi boni ya nkisi yango omɛlaki mpe na boumeli ya ntango boni omɛlaki yango.”
Tozali kotánga na buku moko (encyclopedia) ete, “komɛla nkisi [ya banzete] na ndenge na yo moko ezali na makama mingi.” Etanda “Kebá na komɛla bankisi na ndenge na yo moko” elobeli makama mosusu ya bankisi ya banzete.
Ndenge kaka ezalaka mpo na bankisi nyonso, esengeli kosalela bankisi ya banzete na ekɛngɛ mpe na kolekisa ndelo te. Kobosana mpe te ete ezali na bamaladi mosusu oyo ekoki kosila na ebongiseli oyo te. Baklisto ya solo bazali kozela na motema likoló ntango oyo kozanga kokoka, oyo tosangolá epai ya baboti na biso ya liboso, oyo ezali ntina ya liboso oyo tobɛlaka mpe tokufaka, ekosila mpo na libela, ntango Bokonzi ya Nzambe ekoyangela mokili oyo.—Baloma 5:12; Emoniseli 21:3, 4.
[Maloba na nse ya lokasa]
^ par. 4 Lamuká! ezali zulunalo ya makambo ya monganga te, na yango etindaka moto te amisalisa na nkisi boye to boye, ezala ya banzete to te, to alya eloko boye. Makambo oyo ezali na lisolo oyo ezali bobele mpo na kosalisa bato báyeba likambo yango. Motángi ye moko nde asengeli kopona komisalisa na lolenge oyo ye amoni malamu.