Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Bomoi ya Yesu—Likabo moko ya motuya

Bomoi ya Yesu—Likabo moko ya motuya

Bomoi ya Yesu​—Likabo moko ya motuya

Eleki mbula soki 2000, Nzambe apesaki bato likabo oyo eleki makabo nyonso: bomoi ya Mwana na ye, Yesu Klisto, oyo epesi biso likoki ya kozwa bomoi ya seko. (Yoane 3:16) Bato mingi bamonisaki botɔndi na bango na likabo yango mpe bakabelaki baninga mpe bandeko na bango buku Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo, oyo elobeli bomoi ya Yesu ndenge Baevanzile minei emonisi yango.

Eleki mwa mikolo, mobali moko alobaki ete apesaka bato oyo bapesaka ye kalati ya Noele buku yango. Akomelaka bango mikanda mpo na kolimbola na mokuse ntina oyo ye asepelaka lisusu Noele te, mpe asalelaka makanisi oyo azwaka na encyclopedie moko, na diksionɛrɛ mpe na Biblia. Na nsima, atindaka mokanda na ye esika moko na buku Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo.

Mobali yango alobaki ete nsima ya kotindela baprofesɛrɛ mibale ya iniversite babuku yango, bango bakomelaki ye mikanda ya kolendisa mpenza. Mokanda yango moko elobaki boye: “Tozwaki likabo na yo ya kitoko, buku Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo, mokolo mosusu. Tosepeli mingi ndenge tozwi yango. Ezali buku moko ya kitoko mpenza na makambo mingi. Tozali kosalela yango na makambo ndenge na ndenge.”

Buku yango ezali na mateya oyo Yesu ateyaki, bakisa mpe bandakisa oyo asalelaki mpe makamwisi oyo asalaki. Bameki kolobela makambo yango na molɔngɔ ndenge elandanaki mpenza. Buku yango ezali mpe na bililingi ya kitoko oyo bayemi yango malamumalamu, oyo ezali komonisa mpenza Yesu mpe bato ya ntango wana, na esengo to na mawa to na nkanda.

Soki okosepela kozwa buku yango ya nkasa 448, okoki kotondisa eteni ya lokasa oyo ezali awa na nse mpe kotinda yango na adrɛsi oyo etyami awa to na oyo ebongi na yo na lokasa 5 ya zulunalo oyo.

□ Bótindela ngai buku Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo.

□ Bóya kotala ngai mpo na koyekola na ngai Biblia na ndako kozanga kofuta mbongo.