Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Moto amekolaka biloko oyo Mozalisi akelá

Moto amekolaka biloko oyo Mozalisi akelá

Moto amekolaka biloko oyo Mozalisi akelá

Mpo na nini ampulɛ, atako ezalaka na epesɛrɛ moke, epasukaka te ntango basimbaka yango makasi mpo na kotya nsɔngɛ na yango na esika ya kopelisa? Na kotalela buku How in the World?, oyo ebimisami na Reader’s Digest, eyano ezali mingi mpenza na lolenge oyo basalá ampulɛ, na kolanda ndenge “mposo ya likei ezalaka.” Atako mposo ya makei ezalaka mpenza na epesɛrɛ moke, makei epasukaka te na kilo ya ndɛkɛ ya mwasi ntango efandelaka yango na zumbu mpo na kopesa yango molunge. Ezali bongo mpo mposo ya likei esalemá mpo na kobatela likei epasuka te ata soki mwa eloko moko ya kilo mingi te ezali likoló na yango. (Mwana ya ndɛkɛ oyo azali na kati ya likei akokoka te kopasola yango mpo na kobima soki ezalaka na epesɛrɛ moke te.) Lokola basalá ampulɛ na kolanda likei oyo Mozalisi akelá, yango wana basalá yango lokola libungutulu mpo, ata soki osimbi yango makasi, kilo ya lobɔkɔ “ekokende mbala moko na ampulɛ mobimba, kasi ekofina makasi esika osimbi ampulɛ te.” Yango wana, ndenge ezalaka mpo na likei, lobɔkɔ oyo esimbi ampulɛ efinaka yango te makasi kaka na esika moko, ezali mpo na yango nde ampulɛ epasukaka te. Moto ayekoli makambo mingi na komekola bozalisi!