Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Nazalaki kokanisa ete kosala monzɛlɛ ezali mabe na miso ya Nzambe

Nazalaki kokanisa ete kosala monzɛlɛ ezali mabe na miso ya Nzambe

Nazalaki kokanisa ete kosala monzɛlɛ ezali mabe na miso ya Nzambe

LISOLO YA EILEEN BRUMBAUGH

NAKOLAKI na lingomba ya ba Frères baptistes allemands du vieil ordre (Old Order German Baptist Brethren), oyo mateya na bango ekokani na lingomba ya Amish mpe ya Mennonite. Lingomba ya ba “Vieux Frères” ebandaki na Allemagne na 1708, ezalaki moko ya mangomba ya sika oyo babengaki piétisme. Buku The Encyclopedia of Religion elobi ete mangomba ya Piétisme ezalaki koteya ete “bato basengeli mpenza na Evanzile ya Klisto.” Mateya wana nde esalaki ete lingomba yango etinda bamisionɛrɛ ebele na mikili mingi.

Na 1719, mwa ndambo ya bato ya lingomba yango, oyo Alexander Mack azalaki kotambwisa, bayaki kofanda na États-Unis, na esika oyo etúká ya Pennsylvanie ezali lelo. Na nsima, lingomba yango ekabwanaki na mwa mangomba mikemike. Mwa mangomba yango ezalaki koteya mateya ya Alexander Mack, mokomoko na ndenge na yango. Mwa lingomba na biso ezalaki na bandimi soki 50. Bazalaki kolendisa bandimi bátángaka Biblia mingi mpe bátosaka makambo nyonso oyo lingomba ezalaki koyebisa bango.

Baboti ya bankɔkɔ na ngai, bankɔkɔ na ngai mpe baboti na ngai, bango nyonso bazalaki bato ya lingomba yango mpe ekómaki mpenza bomoi na bango. Ngai mpe nakómaki mondimi ya lingomba yango mpe nazwaki batisimo ntango nazalaki na mbula 13. Kobanda bomwana, bateyaki ngai ete ezali mabe kosomba to kosalela motuka, traktɛrɛ, telefone, ata radio to mpe eloko mosusu nyonso oyo esalaka na kura. Na lingomba na biso, basi bazalaki kolata bilamba lokola bato nyonso te, mpe bakokaki te kokata nsuki to kotika mitó polele. Mibali bazalaki kotika mandɛfu milai. Na makanisi na biso, kozala bato ya mokili te elimbolaki koboya kolata lokola bato nyonso, koboya kopakola baprodwi, to koboya kolata babiju, mpo tozalaki kokanisa ete yango emonisaka lolendo, oyo ezali lisumu.

Bateyaki biso tózalaka na limemya mozindo mpo na Biblia oyo tozalaki kotalela lokola bilei na biso ya elimo. Ntɔngɔ nyonso liboso ya komɛla tii, tozalaki kofanda na ndako mpo na koyoka Papa, wana azalaki kotánga mokapo moko ya Biblia mpe kolimbola makambo oyo atángi. Na nsima, tozalaki kofukama ntango Papa azali kobondela. Nsima na yango, Mama azalaki kozongela libondeli ya Tata na biso. Nazalaki ntango nyonso kozela na motema likoló losambo na biso ya ntɔngɔ, mpamba te libota mobimba ezalaki elongo mpo na kotalela makambo ya elimo.

Tozalaki kofanda na ferme pene na engumba Delphi, na etúká ya Indiana, esika tozalaki kolona biloko ndenge na ndenge. Tozalaki kotya biloko yango na likalo oyo mpunda ezalaki kobenda mpe tozalaki kokende kotɛka yango na engumba, na balabala to na ndako na ndako. Tozalaki kokanisa ete mosala makasi oyo tozalaki kosala ezalaki mpe mpo na Nzambe. Yango wana, totyaki makanisi nyonso na mosala yango, longolá kaka mokɔlɔ ya Lomingo, oyo tosengelaki te kosala “mosala makasi.” Kasi, na bantango mosusu, libota na biso ezalaki komipesa mobimba na mosala ya ferme mpe ekómaki mwa mpasi mpo na komipesa na makambo ya elimo.

Libala mpe bomoi ya libota

Na 1963, ntango nazalaki na mbula 17, James, oyo mpe azalaki kosambela na lingomba ya ba Vieux Frères, abalaki ngai. Libota na bango mobimba, kobanda na baboti ya bankɔkɔ na ye, bazalaki bato ya lingomba yango. Biso mibale tozalaki na mposa makasi ya kosalela Nzambe mpe tozalaki kokanisa ete kaka lingomba na biso nde ezalaki lingomba ya solo.

Na 1975, tokómaki na bana motoba, mpe na 1983 tobotaki mwana na biso ya nsambo mpe ya nsuka. Tozalaki na mwana mwasi kaka moko, Rebecca, mwana na biso ya mibale. Tozalaki kosala mingi, tozalaki kobebisa mbongo mpambampamba te, mpe tozalaki na bomoi ya mindɔndɔ te. Tomekaki kokɔtisa na mitema ya bana na biso mitinda ya Biblia oyo baboti na biso mpe bato mosusu ya lingomba ya ba Vieux Frères bateyaki biso.

Ndenge oyo moto azali komonana libanda ezalaki na ntina mingi na lingomba ya ba Vieux Frères. Tozalaki kokanisa ete lokola moto moko te akoki komona na kati ya motema, lolenge oyo moto alati elakisaka oyo ezali na kati ya motema na ye. Yango wana, soki mondimi moko ya mwasi asali modɛlɛ ya nsuki, tozalaki komona yango lokola lolendo. Soki moto alati elamba oyo ezali na mayemi ya minene, yango mpe ezalaki komonisa lolendo. Na bantango mosusu, tozalaki kotyela makambo yango likebi mingi koleka ata Makomami yango moko.

Na kati ya bolɔkɔ

Pene na nsuka ya bambula ya 1960, Jesse, lɛki ya mobali na ngai, oyo mpe akolaki na lingomba ya ba “Vieux Frères,” akɔtaki bolɔkɔ mpo aboyaki kokende mosala ya soda. Ntango azalaki kuna na bolɔkɔ, akutanaki na Batatoli ya Yehova, oyo mpe bandimaka ete kokɔta na bitumba eyokani te na mitinda ya Biblia. (Yisaya 2:4; Matai 26:52) Jesse asololaki na Batatoli masolo mingi ya Biblia mpe amonaki ye moko bizaleli na bango ya malamu. Nsima ya koyekola Biblia ntango molai, azwaki batisimo mpe akómaki Motatoli ya Yehova​—tosepelaki ata moke te.

Jesse ayebisaki mobali na ngai makambo oyo ye ayekolaki. Asalaki mpe nyonso mpo James azwaka bazulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! mbala na mbala. James asepelaki mingi na mateya ya Biblia ntango azalaki kotánga bazulunalo yango. Lokola James azalaki ntango nyonso na mposa ya kosalela Nzambe, kasi mbala mingi azalaki komiyoka mosika na Ye, azalaki kotya likebi mingi na likambo nyonso oyo ekokaki kosalisa ye apusana penepene na Nzambe.

Mikóló ya lingomba bazalaki kolendisa biso tótángaka bazulunalo ya ba Amish, ya ba Mennonites, mpe ya mangomba mosusu ya mikemike oyo eutá na lingomba ya ba “Vieux Frères”, atako tozalaki kotalela mangomba yango lokola ya mokili. Kasi, tata na ngai azalaki kosepela na Batatoli ata moke te. Azalaki kolinga soki moke te tótánga Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Yango wana, nazalaki kosepela te soki namoni James azali kotánga yango. Nazalaki kobanga noki akolanda mateya ya lokuta.

Kasi banda kala, James azalaki kondima te mateya mosusu ya lingomba ya ba “Vieux Frères”, oyo azalaki komona ete eyokani te na Biblia​—mingi mpenza liteya oyo ezalaki koloba ete kosala “mosala makasi” na mokolo ya lomingo ezali lisumu. Na ndakisa, lingomba ya ba “Vieux Frères” ezalaki koteya ete okoki komɛlisa bibwɛlɛ na yo mai na mokolo ya lomingo, kasi okoki te kokata matiti mokolo yango. Mikóló ya lingomba bazalaki komonisa ye te esika Makomami epesi mobeko yango. Mokemoke, ngai mpe nabandaki kotya ntembe na mateya lokola oyo wana.

Lokola banda kala tozalaki kokanisa ete lingomba na biso nde endimami na Nzambe mpe tozalaki koyeba oyo ekoki kokómela biso soki tolongwe, tomonaki ete ezali mpasi tólongwa na lingomba ya ba “Vieux Frères.” Atako bongo, lisosoli na biso ezalaki kotika biso kimya te ete tólanda kosambela na lingomba oyo tosilaki komona ete ezalaki te kolanda makambo nyonso oyo Biblia elobi. Yango wana na 1983, tokomaki mokanda mpo na kolimbola bantina oyo tolingi kolongwa mpe tosɛngaki ete batánga mokanda yango na lingomba. Kobanda wana, balongolaki biso na lingomba yango.

Tobandi koluka lingomba ya solo

Nsima na yango, tobandaki koluka lingomba ya solo. Tozalaki koluka lingomba oyo bandimi na yango babotaka mbuma oyo bango bateyaka bato mosusu bábota. Liboso mpenza, tolongolaki mangomba nyonso oyo ekɔtaka na bitumba. Tozalaki naino koluka mangomba oyo “elingaka bomoi ya bisɛngo te,” mpo tozalaki kokanisa ete kozala na bomoi oyo ezangi bisɛngo mpe koboya kolata lokola bato nyonso nde ezalaki komonisa lingomba oyo ezali ya mokili te. Kobanda 1983 tii 1985, totambolaki na bamboka mingi ya ekólo na biso, tozalaki kotalela lingomba mokomoko​—ba Mennonites, ba Quakers, mpe mangomba mosusu oyo “elingaka bomoi ya bisɛngo te.”

Na ntango yango, Batatoli ya Yehova bayaki epai na biso na ferme, pene na engumba Camden, na etúká ya Indiana. Tozalaki koyoka bango mpe kosɛnga bango básalela kaka Biblia King James Version. Nazalaki na limemya mpo na Batatoli ndenge bakɔtaka na bitumba te. Kasi, ezalaki mpasi nandimela bango mpo nakanisaki ete lokola balataka ndenge bato nyonso balataka, bakabwani na mokili te mpe bongo bakoki kozala lingomba ya solo te. Nazalaki kokanisa ete lolendo nde etindaka bato bálata na lolenge oyo ekeseni na biso. Nazalaki mpe kokanisa ete biloko ya mokili ekómisaka moto lolendo.

James abandaki kokende na Ndako ya Bokonzi ya Batatoli ya Yehova, mpe azalaki komema bana na biso mosusu. Nazalaki kosepela ata moke te. Mobali na ngai azalaki kosɛnga ngai nakende na ye, kasi nazalaki kolinga te. Mokolo moko, alobaki boye: “Ata soki ozali kondima mateya na bango nyonso te, yaka kaka komona yo moko ndenge balinganaka.” Bolingo na bango ekamwisaki ye mingi.

Nsukansuka, nandimaki kokende elongo na ye, kasi nasɛngelaki kozala na bokɛngi. Nakɔtaki na Ndako ya Bokonzi wana nalati ndenge tozalaki kolata na lingomba na biso, nalataki mpe litambala. Bana na biso mosusu bazalaki makolo ngulu, mpe balataki kaka ndenge lingomba na biso ezalaki kosɛnga. Atako bongo, Batatoli bayambaki biso mpe basepelaki na biso. Nakanisaki ete ‘tokeseni na bango, kasi atako bongo bayambaki biso.’

Nakamwaki mingi na bolingo na bango, kasi nalobaki ete nakotala naino kaka na miso. Natɛlɛmaki te mpo na koyemba banzembo na bango. Nsima ya makita, natunaki bango ebele ya mituna na makambo oyo nakanisaki ete bazalaki kosala yango malamu te, to na ndimbola ya mikapo mosusu. Atako nazalaki kotuna mituna mosusu na ndenge ya mayele te, moto nyonso oyo natunaki azalaki kolanda ngai na likebi. Nakamwaki mpe ete soki natuni motuna moko epai ya bato ebele, nazalaki kozwa kaka eyano yango moko. Mbala mosusu, bazalaki kokomela ngai biyano na papye, mpe yango esalisaki ngai mingi mpo nakokaki koyekola makambo yango ngai moko na nsima.

Na eleko ya molunge ya 1985, libota na biso mobimba ekendaki na liyangani moko ya Batatoli ya Yehova na engumba Memphis, na etúká ya Tennesse​—kaka mpo na kotala. James azalaki naino na mandɛfu na ye ya milai, mpe biso tolataki kaka ndenge tomesanaki kolata na lingomba na biso. Na ntango ya bopemi, miniti ezalaki koleka te kozanga ete moto moko aya esika tozalaki. Bolingo oyo bamoniselaki biso, ndenge bazalaki kotyela biso likebi mpe ndenge basepelaki na biso, nyonso wana ebendaki biso. Tokamwaki mpe na bomoko na bango, mpamba te ezala esika nini tokɔtaki na makita, mateya ezalaki kaka ndenge moko.

Lokola James asepelaki mingi ndenge Batatoli bamoniselaki ye bolingo, andimaki koyekola Biblia. Azalaki kolandela likambo mokomoko mpo na komindimisa ete makambo oyo azalaki koyekola ezali solo. (Misala 17:11; 1 Batesaloniki 5:21) Nsima ya mwa ntango, James amonaki ete azwi solo. Kasi ngai, motema ezalaki naino kopekisa ngai. Nazalaki kolinga kosala oyo ezali malamu, kasi nalingaki te “kolata lokola bato nyonso,” noki nakomimona lokola “moto ya mokili.” Na ebandeli, ntango nandimaki koyekola Biblia, nazalaki kosalela mabongoli mibale ya Biblia: King James Version mpe Libongoli ya Mokili ya sika. Nazalaki kotala vɛrsɛ mokomoko na mabongoli wana nyonso mibale mpo nandima ete bazali kokosa ngai te.

Ndenge nayaki kondima

Ntango toyekolaki na Batatoli, tomonaki ete Tata na biso ya likoló azali Nzambe kaka moko, kasi misato te, mpe ete moto azali molimo kasi azalaka te na molimo oyo ezangi kokufa. (Genese 2:7; Deteronome 6:4; Ezekiele 18:4; 1 Bakolinti 8:5, 6) Toyekolaki mpe ete lifelo ezali nkunda ya bato nyonso, kasi ezali te esika ya mɔtɔ to ya minyoko. (Yobo 14:13; Nzembo 16:10; Mosakoli 9:5, 10; Misala 2:31) Koyeba solo na ntina etali lifelo ezalaki likambo monene, mpamba te ba “Vieux Frères” bazalaki kolimbola likambo yango ndenge moko te.

Kasi, na makanisi na ngai, nazalaki naino komituna ndenge nini Batatoli bakokaki kozala lingomba ya solo, nzokande bazali kaka bato ya mokili. Baboyaka bomoi “ya bisengo” te, likambo oyo nakanisaki ete ezalaki na ntina mingi. Kasi, namonaki mpe ete bazalaki kokokisa etinda oyo Yesu apesaki ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi epai ya bato nyonso. Makanisi na ngai ekɔtaki mobulu!​—Matai 24:14; 28:19, 20.

Na boumeli ya eleko wana ya mobulungano, bolingo ya Batatoli esalisaki ngai nalanda koluka solo. Lisangá mobimba ezalaki komitungisa mpo na libota na biso. Bandeko mingi ya lisangá bazalaki koya epai na biso​—ntango mosusu bazalaki koya kosomba miliki mpe maki na biso kaka mpo na komona biso—​tobandaki komona ete bazali mpenza bato malamu. Atako Motatoli moko nde azalaki koyekola na biso, Batatoli mosusu baboyaki te koya kotala biso. Kasi, mbala nyonso oyo bandeko ya lisangá bazalaki koleka pembeni na ndako na biso, bazalaki kozanga te kokɔta epai na biso. Tozalaki na mposa ya mabaku mingi ya ndenge wana mpo tóyeba Batatoli malamu mpe tokómaki kosepela mingi ndenge bazalaki mpenza komitungisa mpo na biso mpe komonisa ete balingi biso.

Bolingo yango esukaki kaka te na Batatoli ya lisangá oyo ezalaki pembeni na biso. Lokola nazalaki komitungisa mpo na likambo ya molato mpe ndenge ya kobongisa nzoto, Kay Briggs, Motatoli moko ya lisangá mosusu ya pembeni, oyo azalaki kolata lokola bato nyonso te mpe azalaki kopakola baprodwi te, ayaki kotala ngai. Namonaki ete ye nde moto abongi kozala moninga na ngai mpe tozalaki kosolola malamu mpenza. Na nsima, mokolo mosusu Lewis Flora, oyo mpe akolaki na lingomba moko oyo “elingaka bomoi ya bisɛngo te,” ayaki kotala ngai. Ntango kaka atalaki ngai na elongi, ayebaki mokakatano na ngai, na nsima akomelaki ngai mokanda molai ya nkasa zomi, mpo na komeka kobɔndisa ngai na likambo yango. Boboto na ye etindaki ngai nabimisa mai ya miso, mpe natángaki mokanda na ye mbala na mbala.

Natunaki mokɛngɛli-motamboli moko, ndeko O’Dell, alimbolela ngai mikapo ya Yisaya 3:18-23 mpe 1 Petelo 3:3, 4. Natunaki ye boye: “Mikapo oyo emonisi te ete koboya kolata lokola bato nyonso ezali na ntina mpo na kosepelisa Nzambe?” Azongisaki boye: “Mabe nini ezali soki moto alati litambala? Kokanga nsuki ezali mabe?” Na lingomba ya ba “Vieux Frères”, tozalaki kokanga bana mike nsuki, kasi basi bazalaki kolata matambala. Namonaki polele bongolabongola na mateya ya lingomba yango, mpe nakamwaki mpo na motema molai mpe boboto ya mokɛngɛli-motamboli wana.

Mokemoke nabandaki kondima makambo mwa mingi, kasi ezalaki na likambo moko oyo ezalaki naino kotungisa ngai mingi​—basi basengeli te kokata nsuki na bango. Bankulutu baklisto basalisaki ngai nakanga ntina ete nsuki ya basi mosusu ekolaka malɛmbɛ, nzokande ya basusu eumelaka te na kokóma milai. Yango elingi nde koloba ete nsuki ya basi mosusu ezali malamu koleka ya baninga? Basalisaki mpe ngai nayeba ete kolata mpe kobongisa nzoto etalelaka lisɔsɔli ya moto na moto mpe bakomelaki ngai makambo yango na papye mpo nakende kotánga yango na ndako.

Tobandi kosalela makambo oyo toyekolaki

Tozalaki koluka lingomba oyo ebotaka mbuma malamu, mpe tozwi yango. Yesu alobaki ete: “Na ndenge wana bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai, soki bozali na bolingo na kati na bino.” (Yoane 13:35) Tondimaki ete Batatoli ya Yehova bazali bato oyo bamonisaka bolingo ya solo. Atako bongo, eleko yango etyaki mobulu na makanisi ya bana na biso mibale ya liboso, Nathan mpe Rebecca, mpamba te bakómaki bandimi ya lingomba ya ba “Vieux Frères” mpe bazwaki batisimo kuna. Nsukansuka, solo ya Biblia oyo tozalaki kolakisa bango, bakisa mpe bolingo oyo Batatoli bazalaki komonisa, ebendaki bango.

Na ndakisa, Rebecca azalaki na mposa makasi ya kozala moninga ya Nzambe. Amonaki ete kobondela Nzambe ezalaki lisusu mpasi te ntango ayekolaki ete Nzambe yango abongisá te liboso ndenge oyo moto akozala to ndenge mikolo oyo ezali koya ekozala mpo na moto mokomoko. Apusanaki lisusu penepene na Nzambe ntango ayebaki ete Nzambe yango azali te na kati ya Bosato oyo ekoki kolimbolama te, kasi azali nde moto ya solo, oyo ye akoki komekola. (Baefese 5:1) Mpe azalaki na esengo mpo asengelaki lisusu te kosalela Lingelesi ya kala oyo ezali na Biblia King James Version ntango azali kosolola na ye. Lokola ayekolaki masɛngami ya Nzambe mpo na libondeli, bakisa mpe mokano monene oyo azali na yango ete bato bázala na bomoi ya libela na paladiso awa na mabelé, akómaki koyoka ete apusani lisusu penepene na Mozalisi na ye.​—Nzembo 37:29; Emoniseli 21:3, 4.

Mapamboli oyo tozwi

Ngai ná James mpe bana na biso mitano ya liboso​—Nathan, Rebecca, George, Daniel, mpe John—​tozwaki batisimo mpe tokómaki Batatoli ya Yehova na eleko ya molunge ya 1987. Harley azwaki batisimo na 1989, mpe Simon na 1994. Tii lelo, libota na biso mobimba ezali kaka komipesa na mosala oyo Yesu Klisto apesaki bayekoli na ye etinda, elingi koloba mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe.

Bana na biso ya mibali mitano ya liboso​—Nathan, George, Daniel, John, mpe Harley—​bakisa mpe mwana na biso ya mwasi Rebecca​—bango nyonso basalaki na boumeli ya mwa ntango na biro monene ya Batatoli ya Yehova na États-Unis. George azali kosala kuna ekoki sikoyo mbula 14, mpe Simon, oyo asilisaki kelasi na ye na 2001, autaki mpe kokɔta na libota ya Betele. Bana na biso mosusu ya mibali bazali bankulutu mpe mosusu basaleli na misala na masangá ya Batatoli ya Yehova. Mobali na ngai azali nkulutu na lisangá ya Thayer, na etúká ya Missouri, mpe ngai nazali kosala mingi na mosala ya kosakola.

Sikoyo, tozali na bankɔkɔ misato​—Jessica, Latisha, mpe Caleb—​tozali na esengo ya komona ndenge baboti na bango bazali kokɔtisa bolingo ya Yehova na mitema na bango, wana bazali naino mike. Biso nyonso libota mobimba, tozali na esengo ndenge Yehova abendaki biso epai na ye mpe asalisaki biso tóyeba bato oyo balati nkombo na ye na nzela ya bolingo oyo bamonisaka.

Tozali nde koyokela bato mosusu mawa, baoyo bazali na mposa makasi ya kosepelisa Nzambe, kasi mbala mosusu lisɔsɔli na bango eteyamá nde na mimeseno ya libota na bango to ya esika oyo bakolá, na esika eteyama na Biblia yango moko. Tozali na elikya ete mokolo mosusu, bango mpe bakoyoka esengo oyo biso tozali koyoka lelo ya kokende ndako na ndako, mpo na kotɛka biloko ya ferme te, kasi mpo na koyebisa bato nsango ya Bokonzi ya Nzambe mpe makambo kitoko oyo yango ekosala. Miso na ngai etondaka na mpisoli ya esengo ntango nakanisaka motema molai mpe bolingo oyo libota oyo elati nkombo ya Yehova emoniselaki biso!

[Bililingi na lokasa 21]

Ntango nazalaki na mbula soki nsambo, mpe ntango nakómi mokóló

[Elilingi na lokasa 22]

James, George, Harley, mpe Simon, balati ndenge lingomba na biso ya kala ezalaki kosɛnga

[Elilingi na lokasa 23]

Fɔtɔ na ngai oyo, nazali kobimisa biloko ya kotɛka, ebimaki na zulunalo moko

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Journal and Courier, Lafayette, Indiana

[Elilingi na lokasa 25]

Libota na biso lelo