Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ndenge nini nakoki koyeba koloba liboso ya bato?

Ndenge nini nakoki koyeba koloba liboso ya bato?

Ndunda ya elanga na yo moko

EUTI NA MOKOMI NA BISO NA RÉPUBLIQUE CENTRAFRICAINE

NA BAMBOKA mingi, koleisa libota ezali likambo oyo etungisaka bato mokolo na mokolo. Mbala mingi, koleisa libota ezali kokóma mpasi mpo ndunda ezali ntalo mingi. Atako bongo, bato mosusu bazwaki mayele moko ya pɛtɛɛ: kolona ndunda bango moko!

Ekoki kozala ete yo mpe olingaka kosala mwa elanga na yo ya ndunda. Mbala mosusu okoki koloba ete ozali na esika ya kosala elanga ya ndunda te nsima ya ndako. Kasi, ntango mosusu mwa mabelé ekoki komonana mwa mosika na ndako na bino epai okoki kosala elanda ya ndunda. Kanisá naino mbongo oyo okobimisa lisusu te soki yo moko ozali kolona ndunda ya kitoko mpe ya pɛto! Kosala elanga ya ndunda ekoki mpe kozala mwa ngalasisi ya malamu mpo na nzoto. Elanga ya ndunda ekoki mpe kozala mosala ya libota mobimba oyo bana na yo bakosepela kosala yango. Kutu, mosala ya elanga ya ndunda eteyaka moto makambo ebele. Eteyaka moto ezaleli ya motema molai. (Yakobo 5:7) Longolá yango, ntango ozali kotala ndenge ndunda ezali kokola, yango ekoki kotinda yo opusana lisusu pene na Mozalisi ya biloko nyonso ya malamu.​—Nzembo 104:14.

Sikoyo, kokanisa te ete kolona ndunda yo moko ekosɛnga milende te, to okolya yango kaka mokolo oyo oloni yango. Kasi, soki olingi kozala na elanga ya ndunda mpe oluki koyeba ndenge basalaka yango, okoki kozwa ndunda ya malamu!

Ndakisa ya libota moko

Tózwa ndakisa ya Timothée ná mwasi na ye Lucie, ná bana na bango mibale, oyo bafandaka na Bangui, engumba-mokonzi ya République centrafricaine. Lokola bazali na mbongo mingi te, bamonaki malamu bango moko bálonaka ndunda ya kolya.

Ntango Lucie azalaki na mbula 13, asalaki mwa elanga ya ndunda pembeni ya ndako na bango, azalaki kobongisa yango soki auti kelasi mpe na mokolo ya pɔsɔ to ya eyenga. Azalaki kosepela mingi komona ndenge ndunda ezali kokola. Kasi, ezali kaka bambula mingi na nsima nde likanisi ya kosala elanga ya ndunda mpo na libota na ye eyelaki ye. Amonaki ete akoki kosala elanga ya ndunda na mwa esika moko oyo bazalaki kobwaka matiti, oyo ezalaki mosika te na ndako na bango. Lucie amonaki ete esika yango ekoki kobimisa ndunda ya kitoko. Kutu, na esika ete bosɔtɔ oyo bazalaki kobwaka wana na boumeli ya bambula ebebisa mabelé yango, ekómisaki yango nde mabelé kitoko oyo ekólisaka ndunda malamu. Lucie ná Timothée babongisaki esika yango mpe basalaki elanga kitoko ya ndunda.

Ndenge babandaki

Kasi liboso mpenza, esengelaki báluka koyeba ndenge balonaka ndunda. Basololaki na bato mosusu oyo bayebi malamu mosala ya kolona ndunda mpe bayokaki bango na likebi mpenza. Lokola mabelé na bango wana esɛngaki kosopela yango mai, batimolaki libulu ya mai bango moko. Batángaki babuku oyo elobelaka ndenge ya kosala bilanga ya ndunda mpe yango esalisaki bango mingi.

Babuku yango esalisaki bango báyeba ete milona mosusu eyokanaka te, mpe ete milona mosusu esalisaka mosusu ekola malamu. Milona mosusu ekangelaka mosusu nzela to epekisaka yango ekola malamu. Balobaka ete carotte mpe tomati ekolaka malamu soki baloni yango esika moko. Ndenge moko mpe, céleri chou-fleur ekolaka malamu soki baloni yango esika moko. Aneth ezali “moninga” ya kunde (pois), ya concombre, ya salade, mpe ya matungulu ya mbuma. Nzokande, laitue persil ekolaka malamu te soki baloni yango esika moko. Matungulu ya mbuma ekobebisa madesu (haricot vert) mpe kunde soki baloni yango esika moko. Soki baloni milona oyo eyokanaka te esika moko, ekokola malamu te mpe nyama oyo ebebisaka milona mpe nyama-nkɛkɛ ekobanda kobebisa yango.

Timothée ná Lucie bayebaki mpe ete ezali malamu te kolona bobele lolenge moko ya ndunda na elanga mobimba. Soki maladi ekɔteli yango to nyama-nkɛkɛ elei yango, bakobungisa nyonso. Mpo likambo yango ekómela bango te, bamonaki malamu bálona ndunda ndenge na ndenge. Matiti ya nsolo kitoko mpe bafololo ekómisaki elanga yango kitoko mpo na kotala, ezalaki mpe kobenda nzoi mpe nyama-nkɛkɛ mosusu oyo ezalaka na ntina mingi mpo milona ekóla malamu.

Lisusu, baboyaki kosalela bankisi ya kobengana nyama-nkɛkɛ ya mabe na elanga na bango. Bamonaki malamu kolona ail mpo ebenganaka nyama-nkɛkɛ ya mabe. *

Esɛngaki Timote na Lucie básala mosala makasi mpe bázala na motema molai mpo lelo bázala na elanga kitoko ya ndunda. Balonaka choux, persil, tomati, carottes, concombres mpe mambelengani (aubergines), mbala mosusu koleka kutu oyo libota na bango ekoki kolya!

Salá elanga na yo ya ndunda!

Kasi, ezali bobele na Afrika te nde bato balonaka bilanga ya ndunda mpo na bango moko. Na ndakisa, na Allemagne, ezali na bilanga koleka milio moko oyo balonaka ndunda pembeni ya bingumba. Mbala mosusu babengaka yango Schrebergaerten (euti na nkombo ya Daniel Schreber, monganga moko ya Allemagne), bilanga wana ezali mabelé bakabolá na mapango ya mɛtrɛ-kare 200 tii 400, mpe bato mosusu oyo bafandaka na bingumba bafutelaka yango. Moto moko oyo ayekolaki likambo yango alobaki ete bilanga wana ya mikemike “ezali na ntina mingi mpo bálonaka mbuma kuna mpe ndunda.” Bilanga yango ezali mwa bisika lokola “paladiso,” bisika oyo basali-bilanga bakendaka kosala misala na bango mpe kozwa mopɛpɛ.

Biblia elaki ete mokolo mosusu mabelé mobimba ekokóma elanga ya monene​—paladiso ya solosolo. (Luka 23:43) Kasi, lokola tokómi naino na ntango wana te, mbala mosusu okoki kozwa mwa esika oyo okosepela kosala elanga ya ndunda mpo na libota na bino.

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 13 Mpo na koyeba makambo mosusu etali kobengana nyama-nkɛkɛ na elanga ya ndunda kozanga kosalela bankisi, talá lisolo “Le jardinage biologique, une autre façon de jardiner,” na Lamuká! ya 22 Marsi 2002 (na Lifalanse).

[Elilingi na lokasa 20]

Timothée ná Lucie bazali kotoka mai oyo bakosopa na elanga na bango ya ndunda

[Elilingi na lokasa 20]

Elanga moko na Munich, Allemagne