Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Nkoma ya batángi

Nkoma ya batángi

Nkoma ya batángi

Mpɔngi Masolo oyo ezalaki na motó ya likambo “Olalaka mingi?” (22 Marsi 2003, na Lifalanse) eyaki mpenza na ntango ebongi mpo na ngai. Mpo na maladi moko ya mbalakaka oyo mwana na ngai ya mwasi abɛlaki, nazalaki lisusu kozwa mpɔngi te. Nsima ya mikolo mitano to motoba, nakendaki na lopitalo moko ya pembeni mpe ntango bapesaki ngai nkisi, nakómaki kozwa mpɔngi. Nzokande, zulunalo na bino emonisi ete esengeli mpe kosalaka ngalasisi mingi na moi, kasi kosala ngalasisi ya makasi mingi te liboso ya kolala. Nakoumela te komeka kosalela toli wana.

T. M., Japon

Mikolo oyo euti koleka, nazalaki kolɛmba mingi. Monganga oyo asalisaka libota na biso asalaki ngai baekzamɛ mpe ayebisaki ngai ete nazali kolɛmba mpo nazali kolala mingi te na butu mpe lisusu mpo na nkisi moko oyo nazalaki komɛla mpo na maladi ya ndɛkɛ. Nandimelaki ye te. Kasi, pɔsɔ moko na nsima, nazwaki zulunalo na bino oyo elobeli mpɔngi. Nalingaki te zulunalo wana elongwa na mabɔkɔ na ngai, mpe ntango namekaki kosala ndenge bolobi na lokasa 9, nandimaki ete monganga na ngai alobaki solo. Sikoyo, nazali komeka kolanda toli oyo ezali na lisolo yango. Natɔndi bino mpo na lisolo yango oyo eyei mpenza na ntango ebongi.

M. B., États-Unis

Kokoti Nalingi koyebisa bino ete nasepelaki mingi na lisolo “Mbuma oyo basalelaka mingi na mokili.” (Lamuká! ya Ɔkɔtɔbɛ-Desɛmbɛ 2003) Mikolo oyo euti koleka, nazalaki na Mexique, mpe namonaki mpenza na miso biloko ndenge na ndenge oyo basalaka na kokoti! Namonaki pene na biloko nyonso oyo bolobeli na lisolo wana. Eloko mosusu oyo basalaka na kokoti, bakataka mangalala, balongolaka nkasa na mbanzi mpe soki bakaukisi mbanzi yango, basangisaka yango 10 to 15. Basalaka na yango mwa bakɔmbɔ ya koboma nzinzi!

D. S., États-Unis

Lisolo oyo etindi ngai nakanisa lisusu bakɔpɔ ya ndika ya kokoti oyo nkɔkɔ na biso ya mwasi azalaki komɛlela na yango na bambula ya 1930. Bato mingi oyo bazalaki kofanda pembeni na ye bazakaki kosala mwa bandako na bango na mabaya ya kokoti, mpe bazalaki kozipa bandako yango na nkasa ya kokoti oyo ekauki. Nalingi kopesa bino matɔndi mpo na masolo ya kitoko ndenge wana.

M. B., États-Unis

Mabɛlɛ ya mama Lisolo oyo ebimaki na “Makambo mazali koleka na mokili,” oyo elobelaki “Matomba ya mabɛlɛ ya mama,” (Lamuká! ya Ɔkɔtɔbɛ​—Desɛmbɛ 2003) etungisaki ngai mingi. Nandimi likanisi oyo ete bana oyo bamɛlá mabɛlɛ ya mama te babɛlaka mpambampamba. Ngai moko namɛlá mabɛlɛ ya mama te, yango wana nabɛlaka gripɛ mingi. Kasi ankɛti oyo bolobeli, oyo emonisi ete baoyo bamɛlá mabɛlɛ ya mama te bazalaka mayele mingi te lokola basusu, ezali komonisa kozanga kotyela mayoki ya basusu likebi.

C. B., Italie

Eyano ya “Lamuká!”: Mposa na biso ezalaki te ya koyokisa moto moko motema mpasi. Biso tolobelaki bobele ankɛti oyo esalemaki na Danemark mpo na mabɛlɛ ya mama. Ntango tozali kobimisa masolo ya ndenge wana, yango ekoki kosalisa baboti báyeba kozwa bikateli ya mayele mpo na kobɔkɔla bana na bango.

Masese ya Afrika Nakamwaka na masolo ndenge na ndenge oyo ebimaka na Lamuká! Bandá nabandá kotánga Lamuká! tii lelo, esali sikoyo mbula soki 40, mpe nasepelaki mingi na lisolo “Masese ya ba Akan​—Emonisaka bizaleli ya bato ya Ghana.” (Lamuká! ya Ɔkɔtɔbɛ-Desɛmbɛ 2003) Lisolo yango esalisi ngai nayeba ete bizaleli malamu ezali mpenza na ntina mpo na kofanda malamu na bato. Nakomaki mwa ndambo ya masese yango mpo nasalelaka yango mbala na mbala.

D. Z., États-Unis

Natángá naino te lisolo ya kitoko, ya kosɛkisa, mpe oyo etondi na mateya, lokola lisolo wana oyo elobeli masese. Ezali mpenza likambo ya esengo koyekola mwa moke bizaleli ya bato ya bikólo mosusu. Nsima ya kotánga lisese mokomoko, nazalaki kopema moke mpo na komeka kopesa ndimbola na yango ngai moko. Nakoki koyebisa bino ete mbala mingi nazalaki kokoka te!

J. K., Allemagne