Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Sabuni—“Mangwele oyo okoki komikata yo moko”

Sabuni—“Mangwele oyo okoki komikata yo moko”

Sabuni—“Mangwele oyo okoki komikata yo moko”

ZULUNALO The Economist elobi ete: “Maladi ya mibale oyo eleki koboma bana na mokili mobimba ezali malaria te, ezali maladi ya ntolo (tuberculose) te, ezali mpe sida te. Ezali nde . . . pulupulu.” Kasi, mingi na bana yango mbɛlɛ bazali na bomoi soki bango moko mpe baboti ná bandeko na bango bazalaki kosukola mabɔkɔ na sabuni mbala na mbala.

Zulunalo yango elobi ete bato oyo bayekolaki likambo yango na London School of Hygiene and Tropical Medicine, bamonaki ete “soki bato bazali kosukola mabɔkɔ malamu, mbɛlɛ bato 43 likoló na 100 bakozwa maladi ya pulupulu te. Soki bana bazali kosukola mabɔkɔ bakobɛla bamaladi ya mimpululu te, maladi ya liboso oyo ebomaka bana mingi. Ntango bakonzi ya basoda ya Amerika batindaki báyekola likambo yango na mozindo, bamonaki ete ntango basoda bazalaki kosukola mabɔkɔ mbala mitano na mokolo, basoda 45 likoló na 100 bazwaki miyoyo ná kɔsukɔsu te.” Ata na mikili ya bobola, sabuni ezalaka ntalo makasi te mpo na bato mingi. Yango wana, ebongi mpenza kobenga yango “mangwele oyo okoki komikata yo moko.” Mpe esalaka mpasi te!

Biblia mpe elendisaka bopɛto. Na 2 Bakolinti 7:1, elobi ete: “Tiká . . . tómipɛtola na mbindo nyonso ya mosuni mpe ya elimo.” Atako Nzambe atalelaka libosoliboso bopɛto na biso ya elimo, atalelaka mpe bopɛto ya nzoto ete ezali na ntina mingi. (Levitike mokapo 12-15) Ya solo, asɛngaka te tóluka kozala pɛto na koleka ndelo. Atako bongo, tosengeli kosukolaka mabɔkɔ soki touti na twalɛti, nsima ya kosukola mwana to kolongola ye elamba oyo asumbeli to asubeli, liboso ya kolamba to liboso ya kolya, mpe ntango nyonso oyo tokanisi ete tosimbi eloko oyo ekoki kopesa bato mosusu mikrobe. Soki tozali kosukola mabɔkɔ na biso mbala na mbala, tozali nde komonisa bolingo ya boklisto epai ya bandeko na biso mpe bato nyonso oyo tokoki kopesa bango mbote to kosimba bango.​—Malako 12:31.