Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Kɔtá na bozindo ya Liloba ya Nzambe!

Kɔtá na bozindo ya Liloba ya Nzambe!

Kɔtá na bozindo ya Liloba ya Nzambe!

Buku Tósambela Nzambe kaka moko ya solo ekosalisa yo okɔta na bozindo ya Liloba ya Nzambe. Buku yango ebongisami mpo na kosalisa bato oyo bazali koyekola Biblia mpo básalela mateya ya Liloba ya Nzambe na bomoi na bango. Mobali moko na Nigeria, na Afrika ya Wɛsti, oyo ateyaka Biblia, alobaki boye: “Eloko ebendaki likebi na ngai mingi ezalaki mituna oyo etindaka na kokanisa oyo ezali na mokapo mokomoko, oyo ezali kosalisa motángi akɔta mpenza na bozindo ya makambo oyo azali kotánga mpe amanyola likoló na yango.”

Mwasi moko oyo ateyaka Biblia banda bambula mingi, alobaki boye: “Bakomi buku oyo na ndenge moko ya pɛtɛɛ mpenza! Ezali esengo mingi koyekola na bato na buku yango.”

Mbala mosusu yo mpe okoloba kaka bongo mpo na buku yango ntango okotánga mikapo lokola “Likambo oyo etali biso nyonso,” “Ntina oyo Nzambe atiki nzela ete mabe ezala,” “Nguya oyo elikya ya lisekwa epesaka,” mpe “Yoká toli mpe ndimá mpamela.” Okoki kosɛnga buku yango Tósambela Nzambe kaka moko ya solo, oyo ezali na nkasa 192 mpe ezali na ezipeli ya makasi te, soki otondisi eteni ya lokasa oyo ezali awa na nse mpe otindi yango na adresi oyo etyami awa to oyo ebongi na yo na lokasa 5 ya zulunalo oyo.

□ Nalingi kozwa buku Tósambela Nzambe kaka moko ya solo.

□ Bóya kotala ngai mpo na koyekola na ngai Biblia kozanga kofuta mbongo.

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 32]

Cover of book: U.S. Navy photo