Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Komɛla likaya ezali mpo na ngai te!

Komɛla likaya ezali mpo na ngai te!

Komɛla likaya ezali mpo na ngai te!

LISANGÁ Missouri State Medical Association [MSMA] (Ebongiseli moko ya minganga na etúká ya Missouri, na États-Unis) ebongisaki momekano moko mpe esɛngaki bankama ya bana-kelasi ya biteyelo ebele ya etúká yango bákoma lisolo moko oyo ekolobela motó ya likambo wana. Bana-kelasi soki 675 oyo bautaki na biteyelo 42, basalaki momekano yango. Mwana-kelasi oyo azwaki libonza ya momekano yango ezalaki Breanna, elenge mwasi ya mbula 12, mpe lisolo kitoko oyo akomaki ebimaki na zulunalo Missouri Medecine ya lisangá MSMA. Breanna azwaki mpe libaku malamu ya kotánga lisolo na ye liboso ya bato oyo bayaki na likita ya nsuka ya mbula ya lisangá MSMA. Liboso ya kotánga lisolo na ye, Breanna ayebisaki bato yango boye:

“Nazali Motatoli ya Yehova mpe makambo nyonso oyo nalobeli na lisolo na ngai euti na zulunalo Lamuká! Kutu, makanisi oyo nasepeli na yango mingi na lisolo na ngai, nazwi yango nde na motó ya likambo ya Lamuká! oyo. Lamuká! yango emonisi mokuwa ya motó ya moto, ná likaya na monɔkɔ, mpe elobi ete: ‘Bazali kotɛka liwa.’ Banda bambula mingi, zulunalo Lamuká! ebimisá masolo ebele mpo na komonisa ete komɛla likaya ezali likama.”

Batatoli ya Yehova bamɛlaka likaya te. Bandimaka ete kosalela na nko eloko nyonso oyo etyaka nzoto na likama emonisi kozanga limemya mpo na likabo ya bomoi mpe mpo na Mozalisi. (Misala 17:24, 25) Yango wana, balandaka toli oyo ya Makomami: “Tiká tómipɛtola na mbindo nyonso ya mosuni mpe ya elimo.”​—2 Bakolinti 7:1.

Breanna azali moko ya ebele ya bilenge Batatoli oyo basalaka makasi mpo na koyokanisa bomoi na bango na mitinda ya Biblia. Na ntembe te bilenge nyonso ya ndenge wana basepelisaka motema ya Mozalisi.​—Masese 27:11.

[Elilingi na lokasa 31]

Breanna (sikoyo azali na mbula 14) asimbi papye ya lisolo na ye