Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ntina oyo nandimaka Biblia—Moto moko ya siansi abɛti lisolo na ye

Ntina oyo nandimaka Biblia—Moto moko ya siansi abɛti lisolo na ye

Ntina oyo nandimaka Biblia​—Moto moko ya siansi abɛti lisolo na ye

LISOLO YA ALTON WILLIAMS

NA MOBU 1978, makambo mibale ya minene esalemaki na bomoi na ngai. Na sanza ya libwa, nakómaki doktɛrɛ na fizike niklɛɛrɛ, mpe na sanza ya zomi na mibale, nazwaki batisimo mpe nakómaki ministre Motatoli ya Yehova.

Ntango bato bayokaka ete nazali moto ya mayele na makambo ya siansi mpe nazali Motatoli ya Yehova, mbala mingi bamitunaka ndenge nini nasalaka mpo na koyokanisa boyebi na ngai ya makambo ya siansi ná bindimeli na ngai ya Biblia. Ezali solo ete banda bambula mingi ngai mpe nazalaki komituna soki boyebi ya makambo ya siansi ekoki koyokana na bindimeli ya Biblia. Nsukansuka, nayaki mpenza kondima ete Biblia eyokani na makambo ya solo oyo siansi elobaka. Ndenge nini nakómaki kondima yango? Liboso, tiká nayebisa bino ndenge nakómaki moto ya siansi.

Natángaki kelasi mbula 19

Nabotamaki na mobu 1953 na engumba Jackson, na etúká ya Mississippi, na États-Unis. Nazali mwana ya misato na libota ya bana 11. Libota na biso ezalaki ya babola. Mbala na mbala bazalaki kobimisa biso na bandako ya kofutela mpo baboti na ngai bazalaki kokoka te kofutela yango. Tozalaki kolya mingimingi biloko oyo ebongiseli moko ya Leta epesaka babola, mpe tozalaki kolata bilamba oyo basí balatá oyo bato bazalaki kokabela mama soki asukoleli bango ndako to biro.

Mbala na mbala, baboti na biso bazalaki koloba na biso ete soki tolingi kozala babola te, tosengeli kotánga kelasi mingi. Yango wana, ntango nazalaki naino mwana moke, namityelaki mokano ya kotánga na Iniversite. Nakɔtaki kelasi ntango nazalaki na mbula motoba, mpe nakataki te, nazongelaki mpe kelasi moko mbala mibale te na mbula 19 oyo natángaki. Nazalaki kolinga mingi mateya ya siansi mpe matematike, yango wana ntango nakɔtaki na Iniversite, naponaki kotánga makambo ya siansi mpo nakóma moto ya siansi.

Ntango nazalaki kotánga na Iniversite, nayebanaki na mwana mwasi moko nkombo na ye Del. Profesɛrɛ moko ya siansi nde atindaki ye epai na ngai mpo nalakisaka ye makambo mosusu ya siansi oyo ye azalaki kotánga. Kasi eumelaki te, masolo na biso ekendaki mosika koleka makambo ya siansi, mpe tolinganaki. Tobalanaki na mokolo ya 10 Yanuali 1974​—na bopemi ya midi oyo eumelaka ngonga mibale! Mbula minei na nsima, na mobu 1978, nazwaki diplome na ngai mpe nakómaki doktɛrɛ na makambo ya siansi.

Nazwaki eloko oyo nazalaki kokanisa ete ezali fungola ya bolamu. Nazalaki sikoyo moto ya mayele na makambo ya siansi​—mpe siansi yango nde fizike niklɛɛrɛ! Lokola nautaki kozwa diplome na ngai na makambo ya fizike niklɛɛrɛ, esengelaki nabanda kozwa matomba ya kelasi mingi oyo natángaki. Nazalaki kozela ete ngai mpe nayebana lokola moto monene ya siansi. Longola yango, nazalaki na likoki ya kopona mosala oyo efutaka malamu kati na ebele ya misala oyo bazalaki kobenga ngai nasala, ezala na kompanyi to na Leta.

Kasi, nsima ya mwa basanza, na mokolo ya 30 Desɛmbɛ 1978, nasalaki likambo mosusu oyo ekómaki na ntina mingi na bomoi na ngai ya lelo mpe ya mikolo ezali koya, koleka kutu diplome ya Iniversite oyo nautaki kozwa. Na mokolo wana, namonisaki ete namipesi na Yehova Nzambe na nzela ya batisimo, mpe nakómaki Motatoli ya Yehova. Ndenge nini nakómaki na esika wana?

Buku moko epesi ngai mposa

Pene na nsuka ya mobu 1977, ntango nazalaki kotánga na Iniversite ya Massachusetts na Amherst, Batatoli mibale ya basi bayaki na ndako na ngai. Ngai nazalaki te, kasi mwasi na ngai azalaki na ndako ná bana na biso, moko ya mbula misato mpe mosusu oyo autaki kobotama. Del ayambaki Batatoli yango na ndako. Nsima ya masolo ya kitoko oyo basololaki, andimaki báyaka kotala ye mbala moko na pɔsɔ mpo na koyekola na ye Biblia.

Ntango mwasi na ngai ayebisaki ngai ndenge ayokanaki na bango bongo, nasepelaki ata moke te. Nazalaki komona mabe moko te asambela na lingomba moko​—kasi epai ya Batatoli ya Yehova te! Na ntembe te, nayebaki makambo mingi te mpo na Batatoli, kasi na makanisi na ngai bazalalaki mwa lingomba moko ndenge, oyo basalelaka Biblia mpo na kopɛngwisa bato. Yango wana, lokola nazalaki koluka ndenge ya kolongola mwasi na ngai na motambo ya Batatoli, nakanisaki ete nakosalela mayele na ngai ya siansi mpo na kokweisa mateya na bango.

Mokolo moko, nakataki mosala na ngai ya bolukiluki na makambo ya siansi na Iniversite, mpe nazongaki na ndako mpo nazala wana ntango mwasi na ngai akoyekola Biblia. Kasi, nakómaki na ndako nsima ya ngonga oyo nakanaki kokóma, mpe nakutaki mwasi oyo azalaki koyekola na mwasi na ngai Biblia alingi kokenda. Apesaki ngai buku moko oyo ezalaki na motó ya likambo L’homme est-il le produit de l’Évolution ou de la Création? * Ayebisaki mpe mwasi na ngai ete ntango bakoyekola Biblia na pɔsɔ ya nsima, bakotalela esakweli ya Biblia oyo emonisi ete mobu 1914 ezalaki mobu moko ya ntina mingi. Yango ezalaki libaku oyo nazalaki koluka! Nayebisaki Motatoli yango ete nakozala na boyekoli na bango ya Biblia ya mbala ya nsima. Nalingaki koyeba soki mituya oyo basalaka mpo na kozwa mobu ya 1914 ezali mpenza solo.

Kaka na mpokwa wana, nabandaki kotánga buku oyo Motatoli yango atikelaki ngai. Nandimi mpenza ete makambo oyo natángaki na buku yango ekamwisaki ngai. Bakomaki yango na ndenge ya kosilisa ntembe nyonso, mpe ezalaki kozongela maloba ya babuku mingi ya siansi oyo etali liteya ya evolisyo. Nakamwaki na komona ete Biblia elobeli makambo mingi ya solo mpo na bozalisi, nzokande ngai nazalaki koyeba bongo te. Nsima ya mwa mikolo, nasilisaki kotánga buku yango mpe nandimaki ete makambo oyo Biblia elobi mpo na bozalisi ezali te kokweisa oyo siansi elobi mpo na bomoi awa na mabelé.

Nazalaki koluka makambo ya bongolabongola

Atako bongo, nazalaki kaka kotya ntembe na mateya ya Batatoli, mpe nazalaki kozela namona ndenge bakosala mituya mpo na kozwa mobu 1914 ndenge Biblia esakolaki. Nakanisaki ete nakokangisa mwasi wana Motatoli monɔkɔ na likambo yango, mpe yango ekosalisa mwasi na ngai amona ete Batatoli bakosaka bato na mateya na bango.

Na pɔsɔ oyo elandaki, mwasi wana Motatoli ayaki elongo na mobali moko, oyo azalaki nkulutu na lisangá na bango. Nkulutu wana nde atambwisaki boyekoli ya Biblia. Alimbolaki bisakweli oyo ezali na mikapo 4 mpe 9 ya mokanda ya Danyele, oyo elobeli komonana ya Yesu lokola Masiya mpe Mokonzi. Nazalaki kokeba mpenza ntango azalaki kosala mituya mpo na kolimbola likambo yango mpo namona mabunga, kasi namonaki yango te. Na esika ya komona bongolabongola, nakamwaki nde na komona ete makambo oyo ezali na Biblia ezali solo.

Tii mokolo wana, nazalaki kokanisa ete kondima Nzambe ezali kaka bindamandima, kasi ezali likambo ya mayele te. Nzokande, nazalaki komikosa! Napesaki Batatoli yango matɔndi mpo na lisolo wana oyo eteyaki ngai makambo mingi mpe nayebisaki bango ete nakosepela kolanda boyekoli yango pɔsɔ na pɔsɔ. Kobanda mokolo wana, nalandaki kotánga makambo ya siansi na Iniversite mpe koyekola Biblia na Batatoli, elongo na mwasi na ngai. Longola yango, ngai ná mwasi na ngai tobandaki mpe kokende na makita ya Batatoli oyo esalemaka na Ndako ya Bokonzi na bango.

Nsima ya mwa basanza, nayekolaki makambo mingi ya Biblia mpe eumelaki te nakokisaki masɛngami mpo na kobima ná Batatoli na mosala ya kosakola ndako na ndako. Nasalaki yango atako nazalaki komibongisa mpo na kosilisa kelasi na ngai na Iniversite mpo nakóma doktɛrɛ na makambo ya siansi, mpe atako yango ezalaki kozwa ngai ntango mingi. Nasilisaki ekzamɛ mpo na kokóma doktɛrɛ (thèse) na eleko ya molunge ya 1978, na nsima tokendaki kofanda na etúká ya Alabama epai nabandaki kotángisa fizike na Iniversite ya Alabama A. & M., na engumba Huntsville. Toumelaki te, tolukaki Batatoli na mboka wana, mpe nkulutu moko ná mwasi na ye balandaki koyekola na biso Biblia. Nsima ya mwa basanza, ngai ná mwasi na ngai tozwaki batisimo mokolo moko.

Nazali moto ya siansi, nazali mpe mosakoli

Mpo na ngai, namonaki ata mokakatano moko te kozala moto ya siansi mpe kozala Motatoli ya Yehova. Na 1983, nabandaki kosala na esika bayekolaka minzoto, esika oyo batindaka bafize na likoló, na centre George C. Marshall ya NASA (Agence Nationale de l’aéronautique et de l’espace), kaka na engumba Huntsville. * Nasalaki na esika ya koyekola makambo na télescope rayon X mpe ndenge ya kolimbola makambo ya sika. (Na mobu 1999, batindaki télescope yango​—observatoire rayon X Chandra—na likoló na lisalisi ya fize Columbia.) Nasepelaki mingi ndenge napesaki mabɔkɔ na mosala yango oyo ezalaki kosɛnga koyekola ba rayons X oyo ebele ya minzɔtɔ mpe bagalaxi ebimisaka, nyonso wana mpo na koluka koyeba malamu molɔ́ngɔ́.

Nazalaki kosepela mingi na mosala na ngai wana mpo na bantina mibale: Ezalaki kosalisa ngai nayekola makambo ya siansi oyo ezalaka mpasi mpo na kokanga ntina na yango, mpe nazalaki komona malamu nguya mpe bwanya ya Mozalisi. Kutu, nakangaki mpenza ntina ya maloba oyo Yehova alobaki na monɔkɔ ya Yisaya, mosakoli moko ya kala. Mozalisi alobaki ete: “Bótombola miso na bino likoló mpe bómona! Nani asalaki yango? Ye oyo akobimisa ebele na bango na motuya, akobyanga bango nyonso na nkombo; mpo na monene na nguya na ye mpe mpo ete azali na makasi kati na nguya, moko te azali kozanga.” (Yisaya 40:26) Mbala nyonso oyo nazalaki ‘kotombola miso likoló’ mpo na kotala bonene mpe kitoko ya molɔ́ngɔ́, mpe lolenge ya kokamwa oyo yango esalemá, nazalaki komona bonene ya mosala oyo Mozalisi ya mayele, ndenge azalisá biloko wana nyonso mpe atyá mibeko mpo na kotambwisa yango.

Kaka na ntango yango, nazalaki na mosala mingi ya kokoma na bazulunalo ya makambo ya siansi, masolo ya makambo oyo nazalaki koyekola mpo na ba rayon X, na makambo etali minzoto. Atako bongo, yango ezalaki kopekisa ngai te nazala na molende na makambo ya lisangá. Nazalaki nkulutu mpe nazalaki kolekisa ngonga 20 sanza na sanza na mosala ya kosakola. Mwasi na ngai, ye asɛngaki mosala ya ntango nyonso mpo na koteya bato mingi Biblia.

Nsima ya kosala mbula minei na NASA, nazalaki kaka koyoka mposa makasi ya kolekisa ntango mingi mpo na kosalisa bato mosusu báyekola makambo kitoko oyo ezali na Biblia. Kasi, ndenge nini nakokaki kosala yango? Nsima ya kosolola likambo yango na mwasi na ngai mpe koyebisa Yehova na libondeli, namonaki ete nasengelaki kozwa bikateli ya minene.

Bikateli ya minene oyo nazwaki

Nakendaki kokutana na mokonzi na ngai ya NASA mpe nayebisaki ye ete nalingi bákitisela ngai mikolo ya mosala, nasalaka mikolo minei na pɔsɔ, na esika ya mikolo mitano. Na ntembe te, nandimaki mpe bákitisa mbongo oyo bazalaki kofuta ngai. Nayebisaki ye ete mikolo misato oyo etikali, nalingi kolekisa yango na mosala ya kosakola. Andimaki, atako likambo ya ndenge wana esalemá naino te mpo na bato ya siansi oyo basalaka na NASA. Kasi, atindaki ngai nakende mpe kosolola na mokonzi mosusu oyo azalaki likoló na ye. Nakendaki mpe nakamwaki ndenge mokonzi wana andimaki mpe likambo oyo nasɛngaki. Yango wana, na sanza ya Sɛtɛmbɛ 1987, nabandaki mosala na ngai ya ntango nyonso, elingi koloba kolekisa ngonga 90 sanza na sanza na mosala ya ndako na ndako mpe balolenge mosusu ya mosala ya kosakola.

Na nsima, mokonzi moko ya Iniversite ya Huntsville, na etúká ya Alabama, abengaki ngai na telefone. Atunaki ngai soki nakolinga kokende kotángisa na departema ya fizike, na Iniversite na bango. Nayebisaki ye ete nakondima mosala yango kaka soki ekotikela ngai ntango mingi mpo na kokokisa mosala na ngai ya kosakola. Kasi, mpo na kokitisa ye motema, nayebisaki ye ete mosala ya kosakola ekopekisa ngai te nasala malamu mosala na ngai ya molakisi. Mokonzi yango andimaki. Tii lelo, natángisaka kaka na Iniversite yango mpe nazali kaka kosala mosala na ngai ya ntango nyonso. Nazwaki kutu ntango ya koyekola monɔkɔ ya Espagnol. Lelo oyo, ngai ná mwasi na ngai tozali na lisangá moko ya Batatoli ya Yehova ya monɔkɔ ya Espagnol na engumba Huntsville.

Siansi mpe kondima

Na bambula nyonso oyo nalekisi na koyekola makambo ya siansi, namoná naino te likambo moko ya solo oyo siansi elobi ndenge mosusu, mpe Biblia elobi ndenge mosusu. Mbala mingi, bisika oyo emonanaka lokola bongolabongola, ezalaka mpo bato bayebi likambo yango te​—ezala makambo ya siansi to makambo oyo Biblia ezali mpenza koloba. Na ndakisa, bato mosusu ya siansi mpe bato mosusu bakanisaka ete Biblia eteyaka ete banzete, matiti, banyama, mpe bato, nyonso ebimaki na mabelé na boumeli ya mikolo motoba ya ngonga 24. Yango ekoki koyokana te na mateya ya siansi oyo eyebani malamu. Kasi Biblia eteyaka bongo te. Yango elobi nde ete “mikolo” ya kozalisa ezali bankóto ya bambula. *

Mobulungano eutaka mpe na makanisi ya libunga oyo bato mosusu bazalaka na yango ete kondima Nzambe ezali kaka bindimandima. Nzokande ezali bongo te; kondima Nzambe mpe kondima Biblia eutaka na makambo ya solo oyo ekoki komonisama polele. Na kotalela ndenge Biblia elimboli yango, “Kondima ezali ezaleli ya kozela na motema mobimba biloko oyo ozali kolikya kozwa, elakiseli ya polelepolele ya makambo ya solosolo atako ezali komonana te.” (Baebele 11:1) Ya solo, kondima etongamaka likoló na makambo ya solo. Bankama ya bisakweli esilá kokokisama na ntango ya kala mpe na mikolo na biso. Yango wana, ata soki tosaleli mayele oyo bato nyonso ya siansi basalelaka mpo na kondimisa likambo moko, tokoki kondima na motema moko ete bisakweli ya Biblia mpo na mikolo ezali koya ekokokisama.

Moko ya bisakweli yango ezali elaka oyo ete etikali moke tokozala na likoki ya kosepela na bomoi ya malamu na Paladiso awa na mabelé. Mikakatano nyonso oyo eutaka na bobange, na maladi, liwa, bitumba, mpe kozanga bosembo ekozala lisusu te. (Emoniseli 21:3, 4) Na nsima, tokozwa ntango ya kotala malamumalamu mpe koyekola na mozindo makambo ndenge na ndenge ya bozalisi kitoko ya Yehova Nzambe mpe ebele ya mibeko oyo ye atyá mpo na kotambwisa molɔ́ngɔ́, oyo etondi na makambo ya kokamwa.

Nazali kopesa Yehova Nzambe matɔndi mingi ndenge asalisaki ngai nayeba sɛkɛlɛ ya bolamu ya solosolo: mateya kitoko oyo ezali na Liloba na ye, Biblia. Nazali kobondela mpo ete bato mosusu, ezala mpe bato ya siansi, báyeba mpe sɛkɛlɛ wana ya motuya mingi.

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 14 Ebimisami na Batatoli ya Yehova kasi ebimaka lisusu te.

^ par. 22 NASA ezali kompanyi moko ya Leta na États-Unis oyo ndenge ya kotambwisa yango ekeseni na oyo ya bakompanyi mosusu ya Leta.

^ par. 30 Talá buku Y a-t-il un Créateur qui se soucie de vous ? na mokapo 6, “Un récit ancien de la création: est-il fiable?”, ebimisami na Batatoli ya Yehova.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 14]

Nazalaki kokanisa ete kondima Nzambe ezali kaka bindimandima, kasi ezali likambo ya mayele te

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 16]

Namoná naino te likambo moko ya solo oyo siansi elobi ndenge mosusu mpe Biblia elobi ndenge mosusu

[Elilingi na lokasa 15]

Mpo na koleisa libota na ngai natángisaka ndambo ya mokolo

[Bililingi na lokasa 17]

Masini Chandra ya NASA na likoló mpo na koyekola ba rayons X, mpe fɔtɔ ya eloko babengi système binaire à trou noir

[Eutelo ya bafɔtɔs]

Fɔtɔ ya NASA

NASA/CfA/J. McClintock et al.

[Bililingi na lokasa 17]

Ngai ná mwasi na ngai tosepelaka na mosala ya ntango nyonso