Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Asepelaki mingi na makambo oyo azalaki koyekola?

Asepelaki mingi na makambo oyo azalaki koyekola?

Asepelaki mingi na makambo oyo azalaki koyekola

LISOLO oyo ezali kolobela mokanda oyo mwasi moko akomaki mwa moke liboso akufa na maladi ya kansɛr na sanza ya Mai 2004. Asilisaki kokoma mokanda yango te mpe atindaki yango te, ntango mosusu mpo maladi na ye eyaki makasi mbalakaka. Atako bongo, mokanda yango esimbaki mpenza mitema ya baoyo batángaki yango na nsima mpe balelaki; lisusu, eyeisaki kondima na bango makasi.

Na kati ya mokanda wana, Susan oyo akomaki yango alobi ete azalaki naino elenge mpenza ntango abengaki na telefone, mpo na mbala ya liboso, nkulutu moko ya lisangá ya Batatoli ya Yehova na Connecticut, etúká moko ya États-Unis. Na nsima, alobeli mikakatano oyo akutanaki na yango na bolenge na ye. Na nsuka ya mobu 2005, mokanda wana ekómelaki mama ya Susan mpe atindaki kopi na yango na biro monene ya Batatoli ya Yehova na New York.

Susan akomaki ete azwaki nimero ya telefone ya nkulutu wana na 1973, na kati ya buku oyo ezalaka na banimero ya telefone ya bato. Akomaki boye: “Na mbula wana, ntango nazalaki na mbula 14, nayaki komona mpenza ete makambo oyo nazalaki kotánga na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe na Lamuká! ezali solo. Lokola nakutanaki na Batatoli ya Yehova naino te, nalukaki banimero na bango ya telefone na kati ya buku oyo ezalaka na banimero ya telefone ya bato. Naponaki nimero moko oyo mitángo na yango misato ya liboso ekokanaki na oyo ya ngai, mpo nakoka kosolola na Motatoli moko ya Yehova ya mboka na biso. Ntango nabengaki na nimero yango, ndeko Genrich ayambaki mpe akamwaki ntango nayebisaki ye ete nakutanaki naino te na Batatoli ya Yehova.” *

Likambo moko ya mawa mingi

Susan alobi na mokanda na ye ete ntango azalaki na mbula 10, batindaki ye akende kofanda mwa mikolo epai ya mama leki na ye na etúká ya Connecticut. Kasi, nsima ya kofanda kuna mwa moke, Susan ayebisaki mama na ye, oyo atikalaki ye moko na etúká ya Floride, ete alingi kotikala epai ya mama leki. Nzokande, epai ya mama leki yango bazalaki konyokola ye makasi. Ye moko alobi na mokanda na ye ete azalaki lokola “moto oyo bazali konyokola, kasi akómi kolinga mingi bato oyo bazali konyokola ye (babengaka yango syndrome de Stockholm).” *

Susan akomaki boye: “Mama leki ná mobali oyo azalaki kofanda na ye bazalaki konyokola ngai na ndenge moko ya nsɔmɔ. Longola yango, bazalaki mpenza te koyamba bapaya epai na bango. Ntango bapesaki ngai nzela nakendeke kelasi, bazalaki kopesa ngai biloko ya kolya te, bilamba mpe ya malonga te; nzokande, mama azalaki kotinda mbongo mingi. Nazalaki kaka na mwa bakaleso ya kotánga, kasi bana ya mama leki mibale ya basi, oyo bazalaki baleki na ngai, bazalaki na nyonso.” Susan alobeli makambo wana mpo na komonisa polele ntina oyo ayebaki malamu ete mama leki na ye akobimisela ye mikakatano minene mokolo oyo akoyoka ete azali koluka koyeba Biblia malamu.

Makambo oyo esalisaki Susan ayeba Biblia malamu

Susan akomaki boye: “Ndeko Genrich apesaki ngai na mabɔkɔ ya Laura, mwasi moko moklisto oyo akɔmeli na elimo. Mbala mingi tozalaki kokutana na mwasi yango na ndako oyo bato bayaka kosukola bilamba na masini; kuna, azalaki koyanola ebele ya mituna oyo nazalaki kotuna ye na makambo ya Biblia mpe yango ezalaki kozwa biso ntango mingi.” Susan alobaki ete naino azwá ekateli ye moko te, kasi nsima ya masolo wana mpe ntango atángaki mikanda oyo elimbolaka Biblia, na ndakisa buku Solo oyo ezali komema na bomoi ya seko, azwaki ekateli ye moko mpo na mbala ya liboso.

Susan akomaki boye: “Ezalaki na mokolo ya mitano na butu, nayebisaki mama leki ete nasololaka na Batatoli. Asɛngaki ngai na makasi ete natɛlɛma butu mobimba na katikati ya kuku. Na nsima, nakómaki lisusu na mposa makasi ya kokóma Motatoli.”

Kobanda mokolo wana, ndeko Genrich azalaki ntango nyonso kopesa Susan bazulunalo mpe mikanda mosusu mpo na kosalisa ye ayeba Biblia. Susan akomaki ete: “Nabosanaka te Annuaire des Témoins de Jéhovah ya 1974 mpamba te elobelaki ndenge oyo bato ya Hitler banyokolaki Batatoli na Allemagne, liboso ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba mpe nsima na yango. . . . Na ntango wana nde nasɛngaki nkulutu wana [Genrich] akɔtisela ngai banzembo ya Bokonzi na kasɛti mpo nayekolaka yango. Na boumeli ya mbula moko, nayebaki koyemba na molɔngɔ mpenza banzembo nyonso 119 oyo ezalaki na buku ya banzembo oyo ezalaki na motó ya likambo Koyembáká na miziki elongo na kati ya mitema na bino, oyo ebimisamaki na mobu 1966 (na Lingelesi).”

“Kaka na ntango wana, ndeko Genrich azalaki mpe kotikela ngai bakasɛti ya drame, ya masukulu mpe ya mateya oyo ezalaki kopesama na mayangani. Azalaki kotikela ngai bakasɛti yango pembeni ya likonzi moko ya nsinga ya telefone, na balabala 10, mpe nazalaki koleka kozwa yango. . . . Ekómaki kopesa ngai nkanda, mpamba te nayebaki makambo mingi ya elimo kasi nayanganaki naino te ata na likita moko. Nakanisi ete nalɛmbaki nzoto.”

Susan alobi ete mbula soki mibale oyo elandaki ezalaki mpenza mpasi mpo na ye. Azalaki lisusu kosolola te na Batatoli mibale wana oyo ayebaki. Kasi, abakisi ete ‘akómaki kotungisama mingi lokola ayekolaki banzembo nyonso.’ Mpo na nini? Alobi boye: “Mpamba te maloba ya banzembo yango ezalaki kozongela ngai na makanisi, na ndakisa maloba oyo, ‘Mpasi ezali, biso basodá na Yah.’ Nayebaki ete maloba yango ekomamaki na Motatoli moko ntango azalaki na kaa ya bakangami, na Allemagne, na ntango ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba; yango ezalaki kotungisa ngai lisusu koleka. Namonaki ete nazali moto ya bibangabanga mpe nakanisaki ete Yehova asundoli ngai.” *

Nsukansuka, azwi bonsomi

“Makambo ebongwanaki mokolo oyo nakokisaki mbula 18. Ezalaki mokolo ya pɔsɔ, mpe mpo na mbala ya liboso soki nabosani te, natikalaki kaka ngai moko na ndako. Batatoli ya Yehova balekisaki bambula mingi kozanga kotya makolo na bango epai na biso mpo bankolo ndako bapekisá bango. Kasi, mokolo wana, mwasi moko Motatoli ya Yehova ya lisangá mosusu ayaki epai na biso mpe nasololaki na ye mpo moto mosusu azalaki na ndako te. Namonaki mpenza ete Yehova asundolaki ngai te. Na nsima, nabengaki lisusu ndeko Genrich na telefone. Nayebisaki ye ete nalingi kolongwa na ndako mpe natunaki ye ayebisa ngai soki nakoki kosala ndenge nini. Nsukansuka, basalisaki ngai mpe nalongwaki na ndako.”

Na sanza ya Aprili 1977, Susan akendeki kofanda epai mosusu. Na mokanda na ye, alobi lisusu boye: “Nsukansuka, na mbula oyo elandaki, nazwaki likoki ya koyangana na makita mpe na mayangani nyonso; nabandaki mpe mosala ya kosakola. Nasololaki lisusu na mama. Ayokaki mpasi mingi ntango nayebisaki ye ndenge banyokolaki ngai makasi bambula wana nyonso. Kozanga kozela, alukaki kosalisa ngai mpe asalaki nyonso mpo nazalaka na eloko nyonso oyo nasengeli na yango. Mwa bambula liboso, mama akendeki kofanda na Alaska. Lokola asepelaki mingi na mateya ya Biblia, na 1978 nakendeki kofanda na ye esika moko. Nsukansuka, akómaki Motatoli ya Yehova mpe azali sembo tii lelo.”

“Wana nakómaki koyangana na makita, ndeko Genrich azwaki bibongiseli mpo bandeko mosusu ya lisangá bákende kotala biro monene ya Batatoli ya Yehova na Brooklyn (New York); ayebisaki mpe ngai nakende na bango. Mpo na ngai, yango ezali likabo moko oyo nabosanaka te, mpamba te esalisá ngai nasepelaka mingi na ebongiseli ya Yehova. Nakanisi, lisolo na ngai esuki wana. Nabɛti lisolo yango na mokuse, mpamba te nalingaki kosilisa kokoma mokanda oyo na ntango oyo esengeli.”

Na lisolo oyo, tozongeli kaka mwa ndambo ya makambo oyo tozwi na mokanda ya Susan, oyo etondisaki nkasa motoba na ndambo mpe akomaki milɔngɔ na yango penepene. Pene na nsuka ya mokanda yango, alobaki boye: “Na sanza oyo eleki, maladi na ngai eyaki makasi na lopitalo mpe namonaki mpenza liwa na miso . . . Nabondelaki Yehova ete, soki nakozala mwa makasi ata pɔsɔ mibale lisusu, nakotalela mwa makambo mosusu. . . . Nandimi te ete nakoumela lisusu, kasi mpo na ngai, bambula oyo nasali na lisangá ezalaki malamu mingi, ezalaki bomoi ya malamu koleka.”

Mokanda yango ezalaki na maloba ya nsuka te, sinyatire te mpe etindamá te. Baoyo bamonaki mokanda yango, bayebaki te soki basengeli kotindela yango nani. Kasi, ndenge tolobaki yango na ebandeli, nsukansuka batindelaki yango mama na ye.

Makambo mosusu oyo etali Susan

Susan azwaki batisimo na mokolo ya 14 Aprili 1979; nsima na yango, mama na ye azongaki na Floride. Susan atikalaki na Alaska, mpamba te ye na bandeko ya lisangá ya North Pole balinganaki mingi. Eumelaki te, akómaki mobongisi-nzela, elingi koloba Motatoli oyo asakolaka mingi sanza na sanza. Nsukansuka, ye mpe akendeki kofanda na Floride. Na 1991, babalanaki na mobongisi-nzela mosusu, oyo azalaki mpe nkulutu na lisangá. Mwa moke nsima ya liwa ya Susan, mobali na ye mpe akufaki.

Bandeko bazalaki kolinga Susan ná mobali na ye mingi. Bango nyonso mibale bazalaki kosalela Yehova mosala ya ntango nyonso tii ntango bakokaki lisusu kokoba te na mosala yango mpo na maladi ya Susan. Susan asalaki mosala yango mbula koleka 20. Bandeko ya lisangá ya North Pole balandaki, na telefone, lisukulu oyo esalemaki na etúká ya Floride mokolo bakundaki ye.

Mokanda ya Susan ekoki kosalisa biso tózwa na motuya mingi makabo ya elimo oyo Yehova apesaka baoyo bazali kosalela ye mpe bazali na elikya kitoko ya lisekwa. (Misala 24:15) Lisolo oyo ya Susan emonisi mpe polele ete Nzambe azalaka mpenza penepene na bato nyonso oyo bapusanaka penepene na ye.​—Yakobo 4:7, 8.

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 4 Ndeko Genrich ná mwasi na ye bakufaki na likama moko ya nsɔmɔ, na 1993.

^ par. 6 Talá Lamuká! ya 22 Desɛmbɛ 1999, lokasa 7 (na Lifalanse).

^ par. 13 Buku Nzembo mpo na kokumisa Yehova, loyembo 29, “Batatoli, tókende liboso!”

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 27]

“Bambula oyo nasali na lisangá ezalaki malamu mingi, ezalaki bomoi ya malamu koleka”

[Elilingi na lokasa 25]

Ntango Susan azalaki na mbula zomi

[Elilingi na lokasa 27]

Susan ná mobali na ye, James Seymour