Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Kebá na miyibi ya mituka na nzela!

Kebá na miyibi ya mituka na nzela!

Kebá na miyibi ya mituka na nzela!

EUTI NA MOKOMI NA BISO NA AFRIKA YA SUDI

LIKAMBO oyo ya mabe ekómi kosalema mingi: miyibi bakobimela moto oyo azali na kati ya motuka na ye, bakosɛnga ye na makasi apesa bango biloko nyonso ya motuya oyo azali na yango, ata mpe motuka na ye. Okokuta miyibi ya ndenge wana na bingumba mingi ya mokili, na ndakisa na engumba Karachi (na ekólo Pakistan), Lisbonne (na Portugal), Nairobi (na Kenya) mpe Rio de Janeiro (na Brésil). Ebongiseli moko ya guvɛrnema ya États-Unis (Bureau of Justice Statistics) elobi ete na ekólo yango, kobanda na 1993 tii 2002, mbula na mbula moyibi ya ndenge wana ezalaki kosalema mbala soki 38 000.

Na Afrika ya Sudi, moyibi yango eleki kutu oyo ya États-Unis mpo esalemaka mbala koleka 14 000 na mbula. Nzokande, motángo ya bato oyo bafandaka na États-Unis eleki mbala motoba oyo ya bato ya ekólo yango. Soki otaleli mwa bandakisa ya bato oyo bayibaki bango ndenge wana, okoyeba ntina oyo, mpo na bato mingi, likambo yango ezali moko ya makambo ya mabe oyo babangaka mingi. Masolo oyo elandi elobeli bato oyo likambo yango ekómelaki; bango nyonso bafandaka na Johannesburg, engumba oyo eleki monene na Afrika ya Sudi. Soki otángi masolo yango, ekosalisa yo oyeba ndenge ya kosala soki likambo yango ekómeli yo, mpe okoyeba malamu ndenge ya komibatela mpo ekómela yo te.

Makambo oyo bakutanaki na yango

◼ “Na boumeli ya mbula mobimba, ngai ná moninga na ngai Susan tozalaki kosakola nsango malamu elongo. Ezalaki mokolo ya misato, toutaki koyekola Biblia na moto moko. Kasi, liboso tókende epai ya moyekoli mosusu, totɛlɛmisaki motuka na biso pembeni ya balabala, na nse ya nzete moko mpo tómɛla ti. Susan akitaki mpe akendeki na nsima ya motuka mpo na kozwa kitunga oyo tomemaki. Ntango kaka apesaki ngai kɔpɔ, mibali mibale babimelaki biso pwasa mpe moko na bango atyaki Susan mondoki na nkingo. Nayokaki nsɔmɔ mpe nalingaki kokita; kasi, mobali mosusu wana azongisaki ngai na makasi na kati ya motuka. Tozalaki na eloko mosusu ya kosala te. Na kati ya motuka, tokómaki basi mibale mibali mibale mpe bango nde bakómaki kotambwisa motuka. Nakanisaki mpenza ete bakosangisa na biso nzoto na makasi to bakoboma biso.”​—Anika, elenge mwasi oyo abalá.

◼ “Ezalaki ngonga ya 7 na ntɔngɔ, nazalaki kokende mosala na motuka na ngai. Ntango nakómaki na esika moko oyo banzela ekutaná, natɛlɛmaki; nzokande, bato oyo balukaka misala bayaka mingi na esika yango. Lokola natikaki lininisa ya motuka polele, moto moko akɔtisaki lobɔkɔ kozanga ete nayeba mpe atyaki ngai mondoki na nkingo. Alobaki na ngai: ‘Bimá! Soki te, nakobɛta yo masasi.’ Na ntango wana kaka, hélicoptère ya bato oyo bakɛngɛlaka ndenge mituka ezali kotambola na nzela elekaki na likoló. Lokola moyibi yango akanisaki ete ezali nde bapolisi, abɛtaki ngai masasi mpe akimaki. Masasi ezwaki ngai na nkingo mpe ebebisaki mafuta ya mokuwa ya mokɔngɔ (moelle épinière). Ebomaki ngai nzoto banda na nkingo tii na makolo. Mabɔkɔ na ngai mpe makolo na ngai esalaka lisusu te.”​—Barry, tata ya elenge moko mobali.

◼ “Nalingaki kobima ná mwasi na ngai Lindsay mpo tókende kolya na midi. Nazalaki kozela ye na kati ya motuka. Nakangaki baporte na yango, kasi nakangaki maninisa tii na nsuka te mpo molunge ezalaki. Nafandaki na kiti ya sofɛlɛ mpe nazalaki kotala liboso. Namonaki mibali mibale bauti na nzela mosusu mpe bakɔti na nzela oyo nazalaki; bazalaki komonana lokola baleki-nzela. Ntango bakómaki pene na motuka, bakabwanaki: moko akei na lobɔkɔ ya mobali, mosusu na lobɔkɔ ya mwasi. Mbala moko, bakómaki na baporte ya motuka, ngámbo na ngámbo; balakisaki ngai mindoki mpe babandaki kopesa ngai mitindo. Ntango napelisaki motuka ndenge basɛngaki, balobaki na ngai na mongongo makasi ete nakita mpe nakende kofanda na kiti ya nsima. Moko na bango abandaki kotambwisa motuka mpe mosusu alobaki na ngai ete nakitisa motó na nse mpe natombola yango te. Atunaki ngai boye: ‘Yebisá ngai, eloko nini ekopekisa ngai naboma yo?’ Nayanolaki ete: ‘Nazali Motatoli ya Yehova.’ Azalaki kaka koloba ete akoboma ngai; ngai mpe natikaki te kobondela mpe kokanisa mwasi na ngai, komituna soki akosala nini ntango akomona ete mobali na ye alimwe ná motuka.”​—Alan, mokɛngɛli-motamboli mpe tata ya libota.

Masolo ya bato oyo emonisi ete moyibi ya mituka na nzela esalemaka mbalakaka. Lisusu, emonisi mabaku oyo epesaka miyibi nzela ya koyiba bato ndenge wana. Na bamboka mingi, ekómi mpenza likama kozela to kopema mwa moke na kati ya motuka oyo otɛlɛmisi pembeni ya nzela. Esengeli mpe kokeba na bisika oyo banzela ekutaná mpe banzela ya mikuse oyo elongwaka na balabala tii na mapango ya bato.

Esukelaki bango ndenge nini?

Mpo na Susan ná Anika, makambo esukaki malamu. Nzelanzela, na kati ya motuka, babandaki kolimbwela miyibi wana mosala ya koteya bato Biblia oyo bazalaki kosala. Emonani ete mibali yango bayokaki mpasi na motema. Anika alobi boye: “Basɛngaki bolimbisi mpo na makambo oyo bazalaki kosala, kasi balobaki ete bazali koyiba mituka ya bato na nzela to biloko mosusu mpo na kozwa mwa eloko ya kobikela, mpamba te bomoi ezali mpasi. Tolimbwelaki bango ntina oyo Nzambe atiki ete bobola mpe mpasi ezala.” Mateya ya Biblia esimbaki mitema na bango mpe bazongiselaki Susan ná Anika mbongo mpe bamontre na bango oyo babɔtɔlaki; lisusu, bayebisaki bango ete bakosala bango mabe te. Susan alobi boye: “Na nsima, moko na bango abandaki koyebisa biso makambo oyo ekosalisa biso mpo tókwea lisusu te na mabɔkɔ ya miyibi ya mituka na nzela.” Anika abakisi boye: “Bayebisaki biso tólaka bango ete tokotɛlɛmisa lisusu motuka pembeni ya balabala te mpo na komɛla ti.” Na nsima, kaka ndenge miyibi wana balobaki, batɛlɛmisaki motuka mpe bakitaki. Bandimaki na botɔndi mpenza mikanda oyo elimbolaka Biblia oyo bapesaki bango mpe batikaki Susan ná Anika bákende malamu na motuka na bango.

Mpo na Alan, mokɛngɛli-motamboli oyo tolobelaki, miyibi oyo bazwaki motuka na ye bakitisaki ye ntango bakómaki na esika oyo ezali na bato te. Atako bazwaki biloko na ye ya motuya, atɔndaki Nzambe na ndenge basalaki ye mabe te. Ye moko alobi boye: “Nakanisi ete soki basalaki ngai mpenza mabe te, ezali mpo nasalaki oyo basɛngaki ngai, naswanisaki bango te mpe nabangaki mingi te. Atako bongo, esengelaki nde nazala ekɛngɛ koleka. Likambo oyo ekómelaki ngai eteyi ngai ete, lokola mikolo ya nsuka ya mokili oyo mabe ya Satana etikali ya kotánga, esengeli kozala ntango nyonso ekɛngɛ.” Mokolo oyo elandaki, Alan ná mwasi na ye Lindsay bazongaki na kartye oyo likambo wana ekómelaki ye mpo na kokoba kosakola elongo na bandeko ya lisangá oyo bayaki kotala. Alan alobi boye: “Tobondelaki mpe tozalaki mpenza ekɛngɛ mokolo mobimba. Ezalaki pɛtɛɛ te, kasi Yehova apesaki biso ‘nguya oyo eleki makasi.’”​—2 Bakolinti 4:1, 7.

Barry, oyo likambo na ye esukaki mabe mingi koleka, akokisi mbula 11 banda akómá kofanda na velo ya bibɔsɔnɔ. Atako bongo, azalaka kaka na makanisi ya malamu mpe abombá nkanda na motema te mpo na likambo oyo ekómelaki ye. Andimaka mpenza ete Yehova Nzambe akokokisa elaka na ye ya mokili ya sika ya boyengebene. (2 Petelo 3:13) Lisusu, Barry akendeke na makita nyonso ya Batatoli ya Yehova mpe atikaka ata libaku moko te mpo na koteya bato Biblia. Alobi boye: “Nazalaka ntango nyonso na esengo na mosala ya Yehova. Atako nakómá kofanda na velo ya bibɔsɔnɔ mpe nakoki kosala eloko moko te ngai moko, nakanisaka mingi bolamu oyo Yehova asaleli ngai mpe yango esalisaka ngai nayika mpiko. Etikali moke, mokili mabe oyo esuka, mpe nakosepela mingi mokolo oyo nakotambola lisusu!”​—Yisaya 35:6; 2 Timote 3:1-5.

Bikateli oyo bakonzi ya Afrika ya Sudi bazwaki esali ete moyibi ya mituka na nzela ekita. Atako bongo, moyibi yango esili te; kutu, ekómi nde kosalema mingi na mikili mosusu. Mpo na baklisto ya solo, kaka Bokonzi ya Nzambe nde ezali boyangeli oyo ekosilisa mobulu mpe makambo mabe ya ndenge wana.​—Nzembo 37:9-11; Matai 6:10.

[Etanda/​Elilingi na lokasa 14]

NDENGE YA KOMIBATELA

◼ Soki ozali kotambwisa motuka na esika oyo moyibi wana esilá kosalema, kangá baporte mpe maninisa.

◼ Ntango ozali koya na motuka na yo malɛmbɛ mpo otɛlɛma na esika oyo banzela ekutaná, kebá na bato oyo bazali koyengayenga pembeni ya nzela.

◼ Soki ozali kotika mwa ntaka ya malamu kati na motuka na yo ná oyo ezali liboso na yo, okozala na mokakatano mpenza te mpo na kokima na ntango ya likama.

◼ Soki motuka mosusu etuti oyo ya yo na nsima, kowela kokita te mpo na kotala esika oyo motuka na yo ebebi mpo ekoki kozala motambo batyeli yo. Soki batuti yo ndenge wana na esika oyo bayibaka bato na mituka mingi, ekozala malamu okoba kotambwisa motuka na yo tii na biro ya polisi oyo ezali pene.

◼ Soki bato oyo oyebi te bazali koyengayenga pene na porte ya lopango na yo, kebá. Soki ozali kozonga ndako na motuka na yo mpe omoni bango, ekozala malamu oleka mpe oya kokɔta na lopango nsima to okoki okende na biro ya polisi oyo ezali pene.

◼ Soki esɛngi ete ofanda na kati ya motuka mpo na kozela kasi ozali na esika oyo bayibaka bato na mituka mingi to na esika oyo bato bazali mpenza mingi te, taláká liboso mpe nsima. Soki omoni ete likama ekoki kozala, pelisá motuka na yo mpe kende epai mosusu.

[Elilingi na lokasa 14]

Barry azalaka kaka na makanisi ya malamu atako akómá kofanda kaka na velo ya bibɔsɔnɔ