Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Makambo mazali koleka na mokili

Makambo mazali koleka na mokili

Makambo mazali koleka na mokili

“Emonani mpenza ete komɛla likaya epesaka kansɛr ya mimpululu; ndenge moko mpe kotala mobulu na televizyo ezali kotinda [bilenge] na mobulu.”​—THE MEDICAL JOURNAL OF AUSTRALIA.

Emonani ete ngembo oyo balyaka na bamboka mosusu ya Afrika “ekoki kozala na mikrobɛ ya Ebola na nzoto na yango.”​—MACLEANS, CANADA.

Bansango oyo euti na biro ya ministre ya makambo etali kosambisa na ekólo Mexique emonisi ete na boumeli ya mbula mwambe oyo euti koleka, bayibaki bana koleka 130 000 na ekólo yango mpo na kotɛka bango, kosalisa bango misala na makasi, kosangisaka na bango nzoto, to kolongola bango binama mosusu ya nzoto mpo na kotɛka yango.​—MILENIO, MEXIQUE.

Mbula 12 na bolɔkɔ​—Mpo na nini?

Batatoli ya Yehova misato bakɔtaki bolɔkɔ na Sawa, mboka moko ya ekólo Erythrée (na Afrika ya ɛsti) mpe bakokisi sikoyo mbula 12. Bafundamá na likambo moko te mpe basambisamá te. Bapekisá bato, ata mpe bandeko na bango, báyaka kotala bango. Mpo na nini? Mpamba te Batatoli yango baboyaki kosala mosala ya soda. Na mibeko ya ekólo Erythrée, moto akoki koboya mosala ya soda te mpo na lisosoli na ye. Soki bakangi bilenge mibali, batyaka bango na bolɔkɔ na kaa ya basoda; kuna, mbala mingi babɛtaka bango makasi mpe banyokolaka bango na ndenge nyonso.

Internet ekómi likama mpo na banyama?

Zulunalo moko (The New York Times) etuni boye: Internet ezali nde kosala ete banzoku ya Afrika esila nokinoki?” Bato mosusu oyo balukaka kobatela banyama bakanisaka bongo mpe balobi ete ebele ya banyama mosusu ezali mpe na likama. Emonani ete lokola Internet epalangani mingi, bato bakómi kosalela yango mingi mpo na kotɛka mpe kosomba biloko oyo epekisami. Na boumeli ya sanza misato, ebongiseli moko elukaki na Internet, na Lingelesi, mpe bamonaki ete “bato bazali kotɛka biloko koleka 6 000 oyo etali banyama; nzokande, bapekisá to bakoki kopekisa kotɛka biloko yango.” Bikwokolo ya nkoba, bikeko oyo basali na mikuwa ya nzoku, ata mpe bankɔi ya moindo oyo ezali naino na bomoi, ezali kati na biloko yango oyo ezalaki kotɛkama.

Epesaka molunge kasi ebebisaka mopɛpɛ te

Zulunalo moko (El País) ya Espagne elobi ete: “Bakómi kotumba bandika ya olive mpo na kopesa molunge na ndako.” Na engumba Madrid, bandika yango ezali kosalisa mabota koleka 300 bázwa molunge mpe mai ya mɔtɔ na bandako na bango. Bandika ya olive oyo bazali kotumba mpo na kopesa molunge ezali ntalo moke koleka mazuti (60%) mpe charbon (20%). Bandika wana ebebisaka mopɛpɛ te mpo, ezala ntango bazali kotumba yango to ntango yango moko epɔlaka na mabelé, ebimisaka mopɛpɛ mabe (gaz carbonique) kaka ndenge moko. Lisusu, ezali mpasi te mpo na kozwa bandika yango mpamba te soki babimisi mafuta na mbuma ya olive, bandika etikalaka. Nzokande, Espagne eyebani ete ezali ekólo oyo ebimisaka mafuta ya olive mingi koleka bikólo nyonso na mokili.

Lolenge moko ya makaroni oyo eumeli mbula nkóto minei

Zulunalo moko (The New York Times) eyebisi ete bato ya siansi balobi ete bakundoli “lolenge moko ya makaroni oyo eumeli mingi koleka bamakaroni nyonso oyo eyebani.” Makaroni yango ezali na langi ya mosaka, mikemike, na bolai ya santimɛtrɛ 50 mpe esalemi na farini ya loso moko (millet) ya ekólo Chine. Bakundolaki yango pene na ebale Huang, na nɔrdi-wɛsti ya Chine. Ezalaki na nse ya zɛlo, na bozindo ya mɛtrɛ misato, na kati ya saani moko ya mbɛlɛ oyo ebaluká. Zulunalo mosusu (Nature) elobi ete ekoki kozala ete koningana ya mabelé mpe “mpela moko ya nsɔmɔ” nde ebebisá esika yango esili koleka mbula soki 4 000. Bato balobaka ete makaroni ebandá na Italie, to na bikólo mosusu ya Azia ya wɛsti to ya ɛsti. Kasi, zulunalo mosusu (Times) elobi ete Houyuan Lu, mosangani ya ebongiseli moko ya bato ya siansi na Chine (Chinese Academy of Sciences) mpe moko na bato oyo bakundolaki lolenge yango ya makaroni, alobi boye: “Boyekoli oyo tosali emonisi ete Chine nde ezali ekólo ya liboso oyo ebandaki kosala lolenge wana ya makaroni.”