Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Nazalaki mwana ya kilikili

Nazalaki mwana ya kilikili

Nazalaki mwana ya kilikili

Lisolo ya Meros William Sunday

Banda bomwana, bateyaki ngai kolinga Nzambe; kasi, na mbula 18, nakómaki motomboki mpe nalongwaki na ndako ya baboti. Na boumeli ya mbula 13, nasalaki makambo lokola mwana ya kilikili oyo Yesu alobelaki na lisese na ye. (Luka 15:11-24) Nakómaki kotɛka bangi mpe etikalaki moke nabebisa mpenza bomoi na ngai. Tiká nayebisa bino makambo oyo esalisaki ngai naboya nzela wana mpe nazongela Nzambe.

NABOTAMAKI na 1956; baboti na ngai bazalaki Batatoli ya Yehova. Tozali bana libwa na libota na biso mpe ngai mwana ya mibale. Tozalaki kofanda na Ilesha, engumba moko na sudi-wɛsti ya Nigeria. Tata akolá na Lingomba ya Katolike; kasi na 1945, ndeko ya tata na ye apesaki ye buku La harpe de Dieu. * Nsima ya kotánga yango, tata akendeki koluka Batatoli ya Yehova. Na 1946, azwaki batisimo mpe mwa moke na nsima, mama mpe azwaki batisimo.

Nabosanaka te ete ntango nazalaki mwana moke, nazalaki kondimela Yehova na motema mobimba mpe nazalaki kosakola na molende elongo na baboti na ngai. Tata azalaki koyekola na ngai Biblia. Ntango mosusu, nazalaki mpe koyekola Biblia elongo na Alice Obarah, mwasi ya mokɛngɛli oyo azalaki koya kolendisa lisangá na biso mpe masangá mosusu ya zingazinga. Baboti na ngai balingaki ete ntango nakokola, nasalela Nzambe mosala ya ntango nyonso. Kasi, mama alendisaki ngai natánga naino tii ntango nakosilisa eteyelo ya katikati.

Ntango kaka nabandaki eteyelo ya katikati, na mbula 16, nasalaki mpenza bozoba: nakómaki moninga ya bana-kelasi oyo bazalaki kotosa mitinda ya Biblia te. Eumelaki te, nakómaki komɛla makaya mpe kosala pite. Natikaki kokende makita ya lisangá mpe kosakola ndako na ndako, mpamba te namonaki ete makambo oyo nakómaki kosala eyokanaki te na mateya oyo nayekolaki na makita yango. Baboti na ngai bayokaki mpasi mingi, kasi ngai nazalaki lisusu kokipe moto te.

Nalongwe na ndako ya baboti

Nsima ya mbula mibale mpamba na eteyelo ya katikati, nalongwaki na ndako ya baboti mpe nakendeki kofanda na baninga na ngai kasi mosika te na ndako na biso. Mikolo mosusu, nazalaki koya na ndako na biso na ndenge ya kobombana mpe kozwa bilei oyo nakomona mpe kokima. Tata ayokaki mpasi mingi mpe atikaki kofutela ngai kelasi mpo akanisaki ete soki asali bongo, nakobongwana.

Atako bongo, na ntango wana kaka soki nabosani te, nazwaki moto ya kofutela ngai kelasi. Azalaki na ekólo Écosse mpe azalaki kofutela ngai kelasi mpe, ntango mosusu kotindela ngai mbongo to biloko mosusu. Yaya na ngai ná leki na ngai mpe batikaki kosangana na Batatoli ya Yehova. Nyonso wana epesaki baboti na biso mawa mingi. Mbala mingi, mama abondelaki ngai na mai na miso. Atako nazalaki koyoka mpasi na motema, natikaki etamboli ya mabe te.

Nakei kofanda na bingumba ya minene

Ntango nasilisaki kelasi na 1977, nakendeki kofanda na Lagos mpe nazwaki mosala. Mwa moke na nsima, nazwaki mbongo na ndenge elongobani te mpe nasombaki motuka mpo ememaka bato. Lokola nakómaki na mbongo, nakómaki komɛla bangi mpe kokende mingi na banganda mpe na bandako ya basi ya ndumba. Eumelaki te, nasepelaki lisusu kofanda na Lagos te. Yango wana, na 1981, nakendeki na Londres. Nsima na yango, nakendeki na Belgique; kuna, nayekolaki Lifalanse mpe nazalaki kosala mwa moke na restora moko. Kasi, mosala nazalaki kosala mingi ezalaki nde ya kotinda mituka, baradio mpe batelevizyo na Nigeria.

Tata akomelaki biro ya filiale ya Batatoli ya Yehova na Belgique mpe asɛngaki bango báluka ngai mpo bámeka koyekola na ngai Biblia. Kasi, mbala nyonso oyo Batatoli bayaki epai na ngai, naboyaki koyoka bango. Nakómaki koyangana na lingomba moko oyo tozalaki kolya, komɛla mpe kosala masano ya ndenge na ndenge nsima ya losambo.

Nakómi kotɛka bangi

Na 1982, natindaki motuka moko ya ntalo mingi mpe ngai moko nasalaki mobembo tii na libongo, na Nigeria, mpo nalekisa yango na dwanɛ. Bato ya dwanɛ bamonaki ete mikanda oyo nasalisaki mpo na motuka yango ezalaki ya lokuta, bakangaki ngai mikolo soki 40. Tata afutaki mbongo oyo basɛngaki mpo bátika ngai naino tii mokolo bakosambisa ngai. Lokola nasengelaki na mbongo mpo na kosilisa likambo yango, nazongaki na Belgique na biloko ya kotɛka mpe na bakilo ebele ya bangi. Ntango tribinale ekataki likambo na ngai, batikaki ngai. Na nsima, nakómaki motɛki monene ya bangi.

Na mobembo moko nasalaki, bakangaki ngai na ekólo Pays-Bas. Basali ya Leta oyo batalelaka makambo ya bapaya bakangaki ngai mpe bakɔtisaki ngai na mpɛpɔ moko oyo ezalaki kokende na Nigeria. Na kati ya mpɛpɔ, nakutanaki na batɛki-bangi mosusu mpe toyokanaki mpo tóbanda kotɛka bangi elongo. Na sanza ya Yanuali 1984, nakendeki kofanda na ekólo mosusu ya Afrika. Lokola nayebaki koloba Lifalanse, monɔkɔ oyo balobaka na ekólo yango, eumelaki te nakómaki moninga ya bapolisi, basoda mpe basali ya Leta oyo batalelaka makambo ya bapaya. Na ndenge yango, tokɔtisaki bakilo ebele mpenza ya bangi na ekólo yango.

Bakangi ngai mpe batye ngai na bolɔkɔ

Na nsima, nazwaki lisusu mikakatano. Toyokanaki na kapitɛnɛ moko ya basoda ete asalisa ngai na libándá ya mpɛpɔ mpo nakɔtisa bangi ya kotɛka na ekólo yango. Kasi, ayaki noki te mpe bapolisi bakangaki ngai. Babɛtaki ngai, banyongaki ngai mabe mpenza mpe nazalaki lisusu koyeba eloko te. Bamemaki ngai na lopitalo mpe batikaki ngai kuna; bakanisaki ete nakokufa. Kasi nakufaki te; na nsima, bafundaki ngai na tribinale, basambisaki ngai, bakweisaki ngai na likambo mpe nakɔtaki bolɔkɔ.

Ntango nabimaki na bolɔkɔ, nayaki kokuta moninga oyo natikaki abatelaka ndako na ngai atɛki biloko nyonso mpe akimi. Mpo na kobikela, nabandaki mbala moko kotɛka bangi. Kasi nsima ya mikolo zomi, bakangaki ngai lisusu mpe batyaki ngai na bolɔkɔ sanza misato. Ntango babimisaki ngai, nazalaki kobɛla makasi; mbala oyo lisusu, nakómaki pene ya liwa. Atako bongo, nazwaki likoki ya kozonga na Lagos.

Nazongeli mombongo ya bangi

Na Lagos, nakutanaki na bato mosusu oyo tozalaki kotɛka na bango bangi; tokendeki na Inde mpe kuna, tosombaki bangi oyo ezalaki na valɛrɛ ya dolare 600 000. Tolongwaki na engumba Bombay (lelo oyo Mumbai), na Inde, mpe tokendeki na Suisse, na Portugal, mpe tosukaki na Espagne. Mokomoko na biso azwaki matabisi mingi mpe moto na moto azongaki na Lagos na nzela na ye. Na nsuka ya 1984, natɛkaki lisusu bangi ebele. Nazalaki mpenza kokana kokokisa dolare milio moko mpe na nsima nakende kofanda na États-Unis.

Na 1986, na Lagos, nazwaki mbongo nyonso oyo nazalaki na yango mpe nasombaki bangi oyo basangisá na eloko mosusu te. Nakendeki na yango na ekólo mosusu. Kuna, mosombi moko ya lokoso azwaki yango mpo atɛka kasi apesaki ngai mbongo te. Lokola nabangaki ete bakoki koboma ngai, nazongaki na Lagos. Ntango nakómaki, nayebisaki moto moko te likambo yango. Natikalaki mabɔkɔ mpamba mpe nalɛmbaki mpenza nzoto. Mpo na mbala ya liboso, nakanisaki mingi mpo na koyeba ntina mpenza ya bomoi. Namitunaki: ‘Mpo na nini makambo na ngai ezalaka kaka boye: lelo malamu, lobi mabe?’

Nazongeli Nzambe

Eumelaki te, mokolo moko na butu, nabondelaki Yehova asalisa ngai. Likambo ya kokamwa, na ntɔngɔ, tata moko ya mobange ná mwasi na ye babɛtaki na porte na ngai. Bazalaki Batatoli ya Yehova. Nafandaki nyɛɛ ntango bazali koloba mpe nazwaki zulunalo oyo bapesaki ngai. Nayebisaki bango ete: “Baboti na ngai mpe bazali Batatoli ya Yehova. Alice Obarah azalaki koyekola na ngai Biblia.”

Tata wana, oyo nkombo na ye ezalaki Ogbanefe, alobaki boye: “Toyebi Obarah ná mwasi na ye malamu. Sikoyo, bazali kosala na biro ya filiale na biso awa na Lagos.” Tata yango ná mwasi na ye balendisaki ngai nakutana na Obarah ná mwasi na ye. Nakutanaki na bango mpe yango elendisaki ngai mingi. Na nsima, ndeko Ogbanefe akómaki koyekola na ngai Biblia. Eumelaki te, nabandaki kotika etamboli ya mabe. Kotika bangi ezalaki pɛtɛɛ te mpamba te namɛlaki yango bambula mingi. Atako bongo, mokano na ngai ezalaki ete natika makambo ya mabe nyonso mpo bomoi na ngai ekóma pɛto.

Kasi, komekama ezalaki makasi! Baninga na ngai ya kala bazalaki koya epai na ngai mbala na mbala kopesa ngai makanisi ya kozongela makambo oyo tozalaki kosala. Na boumeli ya mwa ntango, nazongelaki kutu komɛla makaya mpe kosala pite. Nabondelaki Nzambe mpe nayebisaki ye nyonso oyo ezalaki na motema na ngai. Eumelaki te, nayaki koyeba ete baninga ya mokili bakosalisa ngai te mpo bango nde babungisaki ngai nzela. Namonaki ete, mpo nakola na elimo, esengelaki nalongwa na Lagos. Kasi nazalaki koyoka nsɔni mpo na kozonga epai ya baboti na ngai na Ilesha. Nsukansuka, nakomelaki tata ná yaya na ngai ya mobali mpo na kosɛnga bango soki nakoki kozonga na ndako.

Tata ayebisaki ngai ete soki nazongi, bakoyamba ngai mpe yaya alobaki ete akosalisa ngai na mbongo. Mbula zomi nsima ya kolongwa na ndako ya baboti, nazongaki. Bayambaki ngai na esengo. Mama alobaki na esengo mpenza ete: “Matɔndi mingi, Yehova.” Na mpokwa, ntango tata azongaki na ndako, alobaki na ngai ete: “Yehova akosalisa yo.” Libota mobimba esanganaki, tata abondelaki Yehova asalisa ngai lokola nazongi mpo na kosala mokano na ye.

Namipesi na mosala oyo esengelaki nasala banda kala

Nabandaki lisusu koyekola Biblia mpe nakolaki nokinoki na elimo; nazwaki batisimo mokolo ya 24 Aprili 1988. Eumelaki te, nakómaki kosakola mingi. Na mokolo ya 1 Novɛmbɛ 1989, nakómaki mobongisi-nzela, elingi koloba Motatoli ya Yehova oyo asakolaka mingi sanza na sanza. Na 1995, babengaki ngai nakɔta na kelasi ya zomi ya Eteyelo mpo na kobongisa basungi na Nigeria. Na nsima, na sanza ya Yuli 1998, bapesaki ngai mokumba ya kotalaka masangá ya Batatoli ya Yehova mpo na kolendisa bango. Nsima ya mbula moko, nakutanaki na Ruth. Tobalanaki mpe nasalaka mibembo na ngai elongo na ye.

Bandeko na ngai mosusu mpe bakolaki na elimo. Yaya na ngai, oyo mpe atiká kosalela Yehova, azongelaki losambo ya solo mpe azwaki batisimo. Nazali na esengo na ndenge tata amonaki biso nyonso tozongeli Yehova. Azalaki mosaleli na misala na kati ya lisangá mpe azalaki kosalela Yehova na esengo tii na liwa na ye na 1993, azalaki na mbula 75. Mama azali kokoba kosalela Yehova na molende na engumba Ilesha.

Natambolaki na mikili 16 ya Mpoto, ya Azia mpe Afrika mpo na koluka bomɛngo; kasi namiyokisaki nde mpasi mingi. (1 Timote 6:9, 10) Soki nakanisi makambo oyo eleká, nayokaka mawa mingi na ndenge nabebisaki bambula na ngai mingi ya bolenge na makambo ya bangi mpe pite. Nayokaka mpe mawa na ndenge nayokisaki Yehova Nzambe ná libota na ngai motema mpasi. Kasi, nazali na botɔndi na ndenge nazali naino na bomoi mpe nazongeli nzela ya malamu. Nazali na mokano ya kotikala sembo epai ya Yehova mpe kosalela ye libela na libela.

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 4 Ebimisami na Batatoli ya Yehova kasi sikoyo ebimaka lisusu te.

[Elilingi na lokasa 15]

Na bolenge, ntango nazalaki motomboki

[Elilingi na lokasa 17]

Mokolo ya batisimo na ngai

[Elilingi na lokasa 17]

Ngai ná mwasi na ngai Ruth