Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ndenge nini nakoki kotika momeseno oyo?

Ndenge nini nakoki kotika momeseno oyo?

Mituna oyo bilenge batunaka . . .

Ndenge nini nakoki kotika momeseno oyo?

“Nabandaki kosimbasimba nzoto na ngai ya mibali mpo na komisepelisa ntango nazalaki na mbula mwambe. Na nsima nayaki koyeba ndenge Nzambe atalelaka momeseno yango. Nazalaki koyoka mabe mbala nyonso oyo nazalaki kozongela yango. Nazalaki komituna ete: ‘Nzambe akoki mpenza kolinga moto lokola ngai?’ Namonaki mpenza ete nakokɔta te na mokili ya sika ya Nzambe.”​—Luiz. *

LOKOLA Luiz, mbala mosusu yo mpe ozali moombo ya momeseno ya kosimbasimba nzoto na yo ya mibali to ya basi mpo na komisepelisa. Oyebi ete Yehova akosepela na yo soki otɛmɛli momeseno yango mpe omonisi komipekisa, mbuma ya elimo santu ya Nzambe. (Bagalatia 5:22, 23; 2 Petelo 1:5, 6) Kasi, ekómelaka yo ete ozongela momeseno yango. Mbala nyonso oyo ozongelaka yango, omonaka ete okokoka te kotika yango mpe kotosa mitinda ya sembo ya Nzambe.

Elenge Pedro azalaki mpe kokanisa bongo. Alobi boye: “Ntango nazalaki kozongela momeseno yango, nazalaki mpenza komiyoka mabe. Nazalaki komona ete nakokoka te kobongisa mabe oyo nasali. Nazalaki kokoka te kobondela. Nazalaki kobanda libondeli na maloba oyo: ‘Yehova, nayebi te soki okoyoka libondeli oyo, kasi  . . .’” Elenge mobali moko na nkombo André azalaki mpe kokanisa bongo. Alobi boye: “Nazalaki komona ete nazali mpenza mokosi. Ezalaki mpasi kolamuka na ntɔngɔ mpe kosala misala. Nazalaki kokoka te koyangana na makita mpe kobima na mosala ya kosakola.”

Soki yo mpe ozali kotungisama lokola Luiz, Pedro mpe André, yiká mpiko. Likambo yango ezali kokómela kaka yo moko te, mpe kokanisa te ete okoki kotika momeseno yango te. Ebele ya bilenge mpe mikóló babundanaki na momeseno yango mpe batikaki yango. Yo mpe okoki kotika yango. *

Ntango omiyoki ete omemi ngambo

Lokola touti kolobela yango, mbala mingi bato oyo bazalaka na momeseno ya kosimbasimba nzoto na bango ya mibali to ya basi mpo na komisepelisa, bamiyokaka ete bamemi ngambo. Na ntembe te, “koyoka mawa . . . na ndenge Nzambe alingi” ekoki kolendisa yo otika momeseno yango. (2 Bakolinti 7:11) Kasi, komitungisa koleka ndelo ekosalisa yo te. Ekoki mpenza kolɛmbisa yo mpe okoki kotika kobundisa momeseno yango.​—Masese 24:10.

Luká koyeba ndenge ya malamu ya kotalela likambo yango. Kosimbasimba nzoto na yo ya mibali to ya basi mpo na komisepelisa ezali moko ya misala ya mbindo. Yango ekoki kokómisa yo ‘moombo ya bamposa ndenge na ndenge mpe ya bisengo’ mpe ekotinda yo okóma na bizaleli oyo ekoki kobebisa makanisi na yo. (Tito 3:3) Kasi, moto oyo azali kosimbasimba nzoto na ye moko ya mibali to ya basi mpo na komisepelisa asali te lisumu monene lokola pite. (Baefese 4:19) Na yango, soki ozali kosimbasimba nzoto na yo ya mibali to ya basi mpo na komisepelisa, kokanisa te ete osali lisumu oyo ekoki kolimbisama te. Likambo eleki ntina ezali nde osala makasi mpo na kopekisa mposa mabe wana mpe kolɛmba soki moke te kobundisa yango.

Mbala mosusu, soki ozongeli likambo yango, okoki kolɛmba nzoto. Soki eyeli yo, kanisá lisusu maloba ya Masese 24:16, oyo elobi: “Moyengebene akokwea mbala nsambo nde akotɛlɛma lisusu; kasi bato mabe bakokweisama libela na mobulu.” Soki okwei mbala moko to mibale, komona te ete ozali moto mabe. Kotika te kobundisa momeseno yango. Luká nde koyeba nini esalaki ete okwea mpe salá makasi mpo ozongela yango lisusu te.

Na esika ya komipamela ntango nyonso, kanisáká nde bolingo mpe motema mawa ya Nzambe. Davidi, mokomi na nzembo oyo asalá mpe mabunga, alobaki boye: “[Lokola] tata akoyokela bana na ye mawa, boye [Yehova] akoyokelaka bango mawa baoyo bakobangaka ye. Zambi ayebi nzoto na biso, azali kobosana te ete tozali bobele putulu.” (Nzembo 103:13, 14) Yehova ayebi mpenza ete tozali bato ya kozanga kokoka mpe azalaka “pene mpo na kolimbisa” biso soki tosali mabe. (Nzembo 86:5NW) Kasi, asepelaka mpe ete tósalaka milende mpo na kobongisa etamboli na biso.

Osengeli kosala nini mpo otika momeseno wana mpe ozongela yango lisusu te?

Luká lisalisi epai ya moto mosusu

Atako na bikólo mingi makambo ya kosangisa nzoto ekómá kobenda likebi ya bato mingi, kasi tii lelo oyo bato mingi bakokaka te kolobela yango na limemya mpenza. Okoki koyoka nsɔni mpo na koyebisa moto mosusu mokakatano na yo. Na boumeli ya bambula mingi, moklisto moko azalaki na momeseno ya kosimbasimba nzoto na ye ya mibali mpo na komisepelisa. Alobaki boye: “Soki nazalaki mpenza na mpiko ntango nazalaki naino elenge, mbɛlɛ nayebisaki moto mosusu likambo yango. Na boumeli ya bambula mingi, nazalaki komiyoka ete namemi ngambo mpe yango ebebisaki mpenza boyokani na ngai na bato mosusu mpe koleka nyonso, boyokani na ngai na Yehova.”

Okoyebisa nani? Ebongi mpenza koyebisa ndeko oyo akɔmeli na elimo, mingimingi tata na yo to mama na yo. Okoki kobanda koloba boye: “Nakoki koyebisa yo likambo moko oyo ezali mpenza kotungisa ngai?”

Mário azwaki ekateli ya koyebisa tata na ye, oyo amityaki mpenza na esika na ye. Kutu ayebisaki Mário ete ye mpe azalaki na momeseno yango ntango azalaki elenge. Mário alobi boye: “Lokola tata ayebisaki ngai makambo polele, yango elendisaki ngai mpenza. Namonaki ete lokola atikaki momeseno yango, ngai mpe nakoki kotika yango. Mpo na ezaleli oyo tata amonisaki, nakokaki lisusu te kokanga mai ya miso.”

André azwaki mpiko ya kosolola na nkulutu moko ya lisangá mpe azali na esengo ndenge asalaki yango. * André alobi boye: “Ntango nkulutu yango azalaki koyoka ngai, atondaki na mai ya miso. Ntango nasilisaki koloba, ayebisaki ngai ete Yehova alingaka ngai mingi. Alobaki ete likambo yango ezali mpe kokómela bato mosusu. Alakaki ngai ete akobanda kotala milende oyo nakosala mpe akopesa ngai batoli mosusu oyo akozwa na mikanda oyo elimbolaka Biblia. Nayebisaki ye ete nakokoba kosala makasi mpo na kotika momeseno yango, ata soki nazali kozongela yango mbala mosusu.”

Na ndakisa ya Mário mpe André, okoki kozwa lisalisi ntango ozali kosala milende mpo na kotika momeseno ya kosimbasimba nzoto na yo ya mibali to ya basi mpo na komisepelisa. Landá toli oyo ezali na etanda oyo ezali na motó ya likambo: “Oyo osengeli kosala.” Ya solo, yebá ete okoki kotika momeseno wana.

Okoki kokuta masolo mosusu ya “Mituna oyo bilenge batunaka . . .” na Internet, na esika oyo: www.watchtower.org/ypf

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 3 Topesi bango bankombo mosusu.

^ par. 6 Atako bato oyo tolobeli na lisolo oyo bazali mibali, basi mingi mpe bazali na momeseno ya kosimbasimba nzoto na bango ya basi mpo na komisepelisa. Na yango, toli oyo ezali mpo na basi mpe mibali. Lisusu, tósimba ete na lisolo oyo tozali kolobela momeseno ya kosimbasimba nzoto na yo moko ya mibali to ya basi mpo na komisepelisa. Na kotalela Biblia, kosimbasimba moto oyo azali mobalani na yo te na nzoto na ye ya mibali to ya basi mpo na komisepelisa ezali pite, lisumu monene na miso ya Nzambe.​—Talá lisolo “Mituna oyo bilenge batunaka . . . Kosangisa nzoto liboso ya kobala ezali mabe?” na Lamuká! ya Yanuali-Marsi 2005, nkasa 14-16.

^ par. 17 Elenge mwasi akoki koyebisa mama na ye to ndeko mwasi moko ya lisangá oyo akɔmeli na elimo.

MITUNA YA KOMANYOLA

◼ Mpo na nini ezali na ntina obosanaka te ete Yehova azali “pene mpo na kolimbisa”?​—Nzembo 86:5NW.

◼ Okosala nini mpo otika momeseno ya kosimbasimba nzoto na yo ya mibali to ya basi mpo na komisepelisa?

◼ Mpo na nini osengeli koyoka nsɔni te mpo na koluka lisalisi?

◼ Nini ekoki kosalisa yo mpenza mpo okanisaka ntango nyonso makambo oyo ezali pɛto?

[Etanda/​Elilingi na lokasa 23]

Ata okwei, kolɛmba te!

Ezali mpasi te koloba ete: ‘Lokola nakwei lisusu, malamu natika.’ Longolá makanisi wana. Soki okwei mbala moko to mbala mingi, kokanisa te ete okokoka lisusu te kotika momeseno na yo ya mabe.

Na ndakisa, soki ozali komata na baesikalye, obɛti libaku mpe okwei na esikalye moko to mibale na nsima, okoloba ete ‘malamu nakita na nse mpo nabanda lisusu komata’? Te! Na yango, mpo na nini okoki kozala na likanisi wana ya libunga ntango ozali kosala makasi mpo otika momeseno moko ya mabe?

Mbala mingi, moto amiyokaka ete amemi ngambo soki akwei lisusu na momeseno na ye ya mabe. Yango ekoki kotinda yo okanisa ete ozali na ntina te, okokoka te kotika momeseno yango mpe obongi básalela yo makambo ya malamu te. Komimemisa ngambo koleka ndelo bongo te. Yango ekolɛmbisa yo mpe okokoba te kosala makasi mpo na kotika momeseno yango. Mpe kobosana te ete Yesu Klisto, moto oyo aleki bato nyonso, ayaki awa na mabelé mpo na kosikola bato ya masumu, kasi bato ya kokoka te. Mpo na sikoyo, moko te kati na biso akoki kosala makambo na ndenge ya kokoka.​—Euti na Lamuká! ya 8 Aprili 1991, lokasa 15, na Lifalanse.

[Etanda/​Elilingi na lokasa 24]

Oyo osengeli kosala

◼ Tyá makanisi na yo na makambo mosusu.​—Bafilipi 4:8.

◼ Kotala te makambo oyo ekoki kolamwisa mposa mabe.​—Nzembo 119:37.

◼ Bondelá mpo ozwa “nguya oyo eleki makasi.” ​—2 Bakolinti 4:7.

◼ Omipesa mingi na makambo ya elimo.​—1 Bakolinti 15:58.

[Etanda/​Elilingi na lokasa 24]

Lisalisi mosusu

Mpo na koyeba makambo mosusu oyo ekoki kosalisa yo otika momeseno ya kosimbasimba nzoto na yo ya mibali to ya basi mpo na komisepelisa, talá mokapo 25 mpe 26 na buku Mituna oyo bilenge batunaka . . . Biyano bibongi, ebimisami na Batatoli ya Yehova.