Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Nkoma ya batángi

Nkoma ya batángi

Nkoma ya batángi

Lolenge ya sika ya Lamuká! Lobi na butu, nasilisaki kotánga Lamuká! ya Yanuali 2006. Lolenge oyo ya sika ya Lamuká! ezali kosepelisa ngai mingi. Ekómi mpenza zulunalo oyo ezali kosɛnga koyekola yango malamu mpe ezali kotinda motángi akanisa. Banda lokasa ya liboso tii ya nsuka, namoni ete Yehova azali kosalisa biso tókoba kokola na elimo.

B. N., Canada

Nazali na mbula 16. Makambo ya sika oyo bobimisi na Lamuká! ekosalisa biso mingi mpo na koyekola Biblia. Masolo mosusu ezali na mituna mpo na kosalisa motángi akanisa makambo oyo atángi. Nasepelaka kosalela Lamuká! ntango nazali kosala badevuare na ngai ya kelasi. Nazali kolikya ete bokokoba kobimisa masolo ya kitoko mpe oyo ekosalisa biso.

S. N., Namibie

Bamama Natɔndi bino mpo na masolo kitoko oyo bobimisaki, oyo elobelaki “Mokumba ya bamama mpo na koteya bana.” (Yuli-Sɛtɛmbɛ 2005) Esimbaki mpenza motema na ngai mpe ntango nasilisaki kotánga yango, nabengaki mama na biso na telefone. Mama abɔkɔlaki ngai ná yaya na ngai ya mobali ye moko. Atángaki kelasi mosusu mpo azwa likoki ya kokokisa bamposa na biso. Azalaki kosala nyonso mpo tózangisaka te makita na biso ya boklisto mpe tóbimaka na mosala ya kosakola. Milende na ye ebotaki mbuma. Matɔndi mingi na ndenge bosalisi ngai nakanisa lisusu ndakisa na ye malamu.

M. S., États-Unis

Masolo wana esalisaki ngai nakanisa lisusu ndenge mama azalaki koboma nzoto mpo na koteya ngai bizaleli malamu mpe makambo ya Nzambe. Atako tata azalaki kosunga ye na mbongo te to kolendisa ye te soki atungisami na makanisi, mama ateyaki ngai kolinga Yehova; mpe alendisaki ngai nakóma mobongisi-nzela, elingi koloba Motatoli oyo asakolaka mingi sanza na sanza. Nakanisi ete nazalaki komona ete milende oyo mama azalaki kosala mpo na ngai ezali na ntina mingi te; kasi ndenge masolo wana emonisaki yango, mama abongi kozwa longonya. Atako azali mosika, nabengaki ye na telefone mpo na kopesa ye matɔndi.

C.H.K., République de Corée

Tata na ngai azali Motatoli ya Yehova te. Mama nde abɔkɔlaki ngai “na disipilini mpe na makebisi ya Yehova.” (Baefese 6:4) Kasi, ezalaki pɛtɛɛ te soki nakanisi bizaleli oyo nazalaki na yango na bantango mosusu. Nazali sikoyo na mbula 24, mpe nazali kotɔnda ye na ndenge alɛmbaki te kasi akobaki koteya ngai mateya ya Biblia mpo ekɔta na motema na ngai.

D. M., Italie

Mituna oyo bilenge batunaka​—Mpo na nini namizokisaka? (Yanuali-Marsi 2006) Ntango nazalaki elenge, nazalaki kokoka te kotika komɛla bangi ná masanga; kasi momeseno ya komizokisa nde mokakatano eleki monene oyo nabundanaka na yango. Nasalaka makasi natika yango mpe masolo ya ndenge oyo epesaka ngai makasi nazonga nsima te. Nazangi maloba mpo na kotɔnda bino.

E. C., États-Unis

Nabandá komizokisa banda bolenge. Nakómi sikoyo na mbula 56. Natiká momeseno wana eleki sikoyo mbula minei, kasi soki mikakatano elekeli ngai, nayokaka ntango mosusu mposa ya kozongela yango. Lisolo wana esimbaki mpenza motema na ngai mpe ekosalisa bato mosusu lokola ngai tózwa lisusu makasi ya kobundana na mikakatano ya bomoi.

Atye nkombo na ye te, Pays-Bas

Nazali elenge mwasi ya mbula 17 mpe nalingi kotɔnda bino mingi mpo na lisolo wana. Nazali na momeseno ya komizokisa. Eleki mwa mikolo, namizokisaki lisusu. Na nsima, nasɛngaki mama abondela esika moko na ngai. Atako nazali na mokakatano wana, nayebi ete Yehova alingaka ngai. Lisolo wana esalisi ngai mingi, mpe nazali kotɔnda Nzambe mpo na yango!

N. M., République tchèque

Ntango namonaki lisolo wana, nandimaki te. Nazali na mbula 18 mpe namizokisaka. Mpasi oyo namiyokisaka esalisaka ngai nasilisa mitungisi na ngai. Mbala mingi, nayokaka mposa ya komizokisa, kasi nayebaka te ndenge oyo nakoki kotika yango. Nakamwaki mpenza ntango namonaki lisolo wana. Mai etondaki ngai na miso, mpe nabondelaki Yehova mpo na kopesa ye matɔndi. Kaka na ebongiseli ya Yehova nde tokoki kozwa libɔndisi ya ndenge wana!

A. P., Russie

Ntango nazalaki na mbula 14, nabandaki komizokisaka mpo na kolɛmbisa mpasi na ngai. Kutu, nakɔtá na lopitalo mpo na yango. Lokola nakomaka makambo oyo ekómelaka ngai, yango esalisi ngai nayeba mpenza makambo oyo etindaka ngai na komizokisa mpe namipekisa. Lisusu, soki nayoki mposa ya komizokisa, nabengaka moninga moko oyo ayebaka komitya na esika na ngai. Mabondeli mpe esalisaka ngai mingi. Kasi, soki namiyoki ete nabongi te mpo na kobondela Yehova, baninga mpe bankulutu ya lisangá babondelaka esika moko na ngai. Ezali mpenza etumba, kasi nayebi sikoyo ndenge ya kobunda yango mpe nandimaka lisalisi nyonso oyo nazwaka mpo natika komizokisaka.

N. W., Allemagne

Fɔtɔ oyo ezali na ebandeli ya lisolo wana elakisi elenge mwasi moko azali komipikola nsuki mpe na lisolo yango, bolobeli “Sara” oyo azalaki komipikola nsuki mpo na komipesa etumbu. Mwana na ngai ya mwasi abɛlaka maladi oyo babengaka trichotillomanie oyo etindaka moto amipikola nsuki. Moto oyo abɛlaka maladi yango alukaka kotika momeseno yango kasi akokaka te. Amipikolaka nsuki mpo na komiyokisa mpasi te, kasi mposa moko ya makasi nde etindaka ye. Momeseno ya komipikola nsuki etindaka moto amizokisa te.

M. H., États-Unis

Eyano ya “Lamuká!”: Liloba “trichotillomanie” ebimá pene na mobu 1900 mpe elakisi maladi moko oyo esalaka ete moto ayokaka mposa makasi ya komipikola nsuki, kasi akokaka kopekisa mposa yango te. Na fɔtɔ wana, tomekaki komonisa na ndenge oyo ebongi ete basusu bamipikolaka nsuki mpo na koyokisa nzoto na bango mpasi. Atako bongo, yango elingi koloba te ete moto nyonso oyo amipikolaka nsuki azali na molɔngɔ ya bato oyo bamizokisaka oyo tolobeli na lisolo wana. Ndenge motángi oyo amonisi yango, soki bato mosusu bamipikolaka nsuki ezali nde maladi etindaka bango básala bongo.

Minganga mosusu balobaka ete esengeli koluka koyeba ntina oyo moto amipikolaka nsuki mpo na kopesa ye lisalisi ya monganga oyo ebongi. Yango wana, ekozala malamu ete baoyo bazali na momeseno yango bákutana na monganga mpo báyeba mpenza maladi oyo bazali kobɛla mpe bázwa lisalisi oyo ebongi.

Okopesa eyano nini? (Yanuali-Marsi 2006) Nasepeli mingi na eteni oyo ya sika! Lokola totángisaka bankɔkɔ na biso ya mike na ndako, eteni yango ekosalisa bango mingi; tokobakisa yango na programɛ na bango ya kotánga Biblia mokolo na mokolo mpe na masolo ya Lamuká! oyo topesaka bango bátánga lokola devuare. Matɔndi mingi na ndenge bozali kotyela bana likebi mingi.

B. E., États-Unis

Mituna ya eteni oyo ezalaka pɛtɛɛ te, kasi nasepelaka mpenza soki nazwi eyano. Natángaki yango mpokwa mobimba ya lobi; esepelisaki ngai mingi. Mposa na ngai ezali ete ntango nakokóma mokóló, ngai mpe napesa mabɔkɔ na mosala ya kobimisa zulunalo oyo mpo basusu bákoka koyeba Yehova.

D. H., États-Unis

Nazali na mbula mwambe. Na boyekoli na biso ya libota, tosalelaka mpe eteni yango. Tosepelaka mpenza kolukaluka mpo na kozwa biyano. Eteni oyo elobaka “Ngai nani?” ezalaka ntango mosusu makasi, kasi tosepelaka na yango. Bókoba na mosala malamu oyo bozali kosala.

C. W., États-Unis