Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Okosala nini mpo okóma moombo ya televizyo te?

Okosala nini mpo okóma moombo ya televizyo te?

Okosala nini mpo okóma moombo ya televizyo te?

CLAUDINE alobaki boye: “Soki tofungoli televizyo, tozalaki kotala makambo nyonso oyo bazalaki kolakisa. Tozalaki kokanga yango kaka soki tolingi kolala.” Bato mosusu balobaka ete: “Nakokaka te kolongola miso na televizyo.” Basusu mpe balobaka boye: “Nalingaka kotala televizyo mingi te, kasi nakokaka te.” Otalaka televizyo mingi? Omitungisaka mpo na makambo oyo televizyo ezali ntango mosusu kosala epai ya bato ya libota na yo? Batoli oyo ekoki kosalisa yo okóma moombo ya televizyo te.

1. LUKÁ KOYEBA NGONGA BONI OTALAKA TELEVIZYO. Masese 14:15 elobi ete: “Moto ya mayele akotala malamu na nzela ekokenda ye.” Ekozala likambo ya bwanya otalela mimeseno na yo ya kotala televizyo mpo na koyeba soki esɛngi kobongisa. Na boumeli ya pɔsɔ soki moko, komá mokolo na mokolo ngonga boni olekisi na kotala televizyo. Okoki mpe kokoma makambo oyo omoni, oyo oyekoli mpe soki makambo yango esepelisi yo. Kasi, osengeli nde koluka koyeba ntango boni olekisaka na kotala televizyo. Mbala mosusu, okokamwa soki oyebi yango. Soki oyebi ntango boni otalaka televizyo na bomoi na yo, yango ekoki kotinda yo osala mbongwana.

2. KITISÁ BANGONGA OYO OTALAKA TELEVIZYO. Meká kolekisa mokolo, pɔsɔ to sanza mobimba kozanga kotala televizyo. Okoki mpe kopona ngonga boni okolekisa mokolo na mokolo na kotala yango. Soki olongoli miniti 30 na ngonga oyo otalaka televizyo mokolo na mokolo, okozwa ngonga 15 na sanza mokomoko. Salelá ntango yango mpo na kosala misala ya ntina lokola komipesa na makambo ya elimo, kotánga buku moko ya malamu mpe kolekisa ntango elongo na libota to na baninga. Baankɛtɛ emonisi ete bato oyo batalaka televizyo mingi te basepelaka na yango mingi koleka bato oyo batalaka yango mingi.

Lolenge mosusu ya kokitisa ngonga ya kotala televizyo ezali ya kolongola yango na shambre. Bana oyo bazali na televizyo na shambre na bango balekisaka pene na ngonga moko na ndambo mokolo na mokolo na kotala televizyo koleka bana mosusu. Lisusu, baboti na bango bayebaka te makambo oyo bana na bango batalaka na televizyo na shambre na bango. Baboti mpe babalani bakozala na ntango mingi ya kolekisa elongo soki bango mpe balongoli televizyo na shambre na bango. Basusu bamonaki malamu bázala na televizyo te na ndako na bango.

3. SALÁ PROGRAMƐ YA MAKAMBO OYO OKOTALA. Ntembe ezali te ete makambo ya malamu na televizyo ezali mingi. Na esika ya kofinafina babutɔ ya televizyo mpo na koluka epai oyo bazali kolakisa makambo oyo ekosepelisa yo to na esika ya kotala makambo nyonso oyo elekaka na televizyo, talá na programɛ oyo epesamaka mpe poná makambo oyo okotala. Fungolá televizyo kaka na ngonga oyo osengeli kolanda makambo oyo oponi mpe soki esili, kangá televizyo. Na esika ya kotala makambo yango kaka na ntango oyo bazali kolakisa yango, okoki mpe kokɔtisa yango na kasɛti mpo otala yango nsima. Na ntango oyo ebongi, okoki kotala yango mpe kolekisa nokinoki bapiblisite.

4. PONÁ MAKAMBO OYO OKOTALA. Biblia esakolaki ete na mikolo na biso bato bakozala “bato oyo bamilingaka bango moko, bato balingá mbongo, bato ya lofundo, bato ya lolendo, batuki, bato bazangi botosi epai ya baboti, bato bazangi botɔndi, bato bazangi bosembo, bazangi bolingo ya libota, bandimaka boyokani te, bakoselaka bato makambo, bazangi komipekisa, bato ya kongala, bazangi bolingo ya makambo ya malamu, bato oyo batɛkaka bamosusu, bato ya motó makasi, bato bavimbi na lolendo [mpe] bato balingá bisengo na esika ya kozala bato oyo balingaka Nzambe.” Na ntembe te, yo mpe omonaka ete bato mingi oyo balakisaka na televizyo bazalaka na bizaleli yango. Biblia elobi: “Yo kimá bato yango.” (2 Timote 3:1-5) Biblia ekebisi biso ete: “Bómikosa te. Baninga mabe babebisaka bizaleli ya malamu.”​—1 Bakolinti 15:33.

Mpo na kopona makambo oyo okotala, esɛngaka komipekisa. Esilá kokómela yo ete otala mwa moke ebandeli ya filme moko oyo omoni ete ezali mabe, kasi okobi kotala yango na mobimba mpo na koyeba ndenge ekosuka? Bato mingi basalaki bongo. Kasi, soki ozwi ekateli ya kokanga televizyo mpo na kosala makambo mosusu, okomona ntango mosusu ete filme yango ezalaki na ntina te.

Bambula mingi liboso básala televizyo, mokomi na nzembo akomaki boye: “Nakotya eloko ya nsɔni liboso na miso na ngai te.” (Nzembo 101:3) Ezali mpenza mokano kitoko oyo tosengeli kobosana te ntango tozali kopona makambo oyo tokotala na televizyo. Na ndakisa ya Claudine, bato mosusu mpe bazwaki ekateli bázala lisusu na televizyo te na ndako na bango. Alobaki boye: “Nazalaki koyeba te ete ndenge nameseneki na makambo mingi na televizyo, nakómaki komona yango lisusu mabe te. Sikoyo, ntango natalaka televizyo, nayokaka mabe soki natali makambo oyo liboso nazalaki komona yango mabe te. Nazalaki kokanisa ete makambo oyo nazalaki kopona ezalaki mabe te, kasi sikoyo namoni ete ezalaki malamu te. Ntango natalaka makambo ya malamu na televizyo, nasepelaka mingi.”

[Elilingi na lokasa 8]

Komá ngonga boni olekisaka na kotala televizyo

[Elilingi na lokasa 8]

Na esika ya kotala televizyo, salá nde misala ya ntina

[Elilingi na lokasa 9]

Kokakatana te mpo na kokanga televizyo