Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Tv “eteyaka bato kozanga ete báyeba”

Tv “eteyaka bato kozanga ete báyeba”

Tv “eteyaka bato kozanga ete báyeba”

TELEVIZYO ekoki mpenza kosalisa mpo na koteya bato. Na nzela na yango, toyebaka bamboka mpe bato oyo tokokaki koyeba bango soki moke te. Tomonaka bazamba, bisika oyo malili ezalaka makasi, bansongɛ ya bangomba mpe nse ya mbu. Tomonaka biloko kitoko oyo Nzambe akelá, ezala ya mikemike to ya minene lokola minzoto. Tolandaka bansango ya makambo oyo ezali koleka na mikili mosusu na ntango oyo ezali mpenza kosalema. Esalisaka biso tóyeba malamu makambo ya politiki, makambo oyo eleká, makambo oyo ezali kosalema sikoyo mpe mimeseno ya bato. Televizyo elakisaka bomoi ya bato na ntango ya makama mpe ya bisengo. Elakisaka masano mpe makambo mosusu oyo esepelisaka bato, eteyaka bango, ata mpe kopesa bango makanisi ya sika.

Kasi, makambo mingi oyo elekaka na televizyo ezalaka malamu te mpe eteyaka makambo ya malonga te. Emonani ete bato oyo bazali koloba mabe mingi mpo na televizyo ezali baoyo bazali kosepela ata moke te na ndenge elakisaka mingi makambo ya mobulu mpe ya kosangisa nzoto. Na ndakisa, na États-Unis, lapolo moko emonisi ete soki bafilme 3 eleki na televizyo, pene na 2 ekolakisa mobulu mbala pene na motoba na ngonga moko. Banda bomwana tii moto akóma mokóló, akomona makambo mingi ya mobulu mpe ya koboma bato na televizyo. Lisusu, balakisaka mpe balobelaka mingi makambo ya kosangisa nzoto. Na makambo nyonso oyo balakisaka na televizyo, mingi elobelaka makambo ya kosangisa nzoto mpe mwa ndambo elakisaka mpenza makambo yango mpe emonisaka ete ezali na likama te. Mbala mingi, balakisaka bato bazali kosala mabala ya makango kozanga komona yango mabe. *

Na mokili mobimba, bato mingi balingaka bafilme oyo elakisaka makambo ya kosangisa nzoto mpe mobulu. Bafilme ya mobulu oyo esalemaka na États-Unis, balakisaka mpe yango na televizyo; na nsima, batɛkaka yango na mikili mosusu kozanga mindɔndɔ. Yango esɛngaka mpenza te ete bato ya filme yango báyeba mosala yango malamu. Esɛngaka mpe maloba mingi te; yango wana, ezalaka mpasi te mpo na kokanga ntina na yango. Mpo na kobenda likebi ya batali, bafilme yango ezalaka na bitumba mingi, koboma bato, bililingi to mingongo mosusu oyo bakɔtisaka na filme mpe makambo ya kosangisa nzoto. Kasi, mpo na kobenda likebi ya bato yango ntango molai, esɛngaka mpe kokɔtisa na filme makambo ya sika. Bato balɛmbaka noki soki bazali kotala eloko moko mbala na mbala; ata soki eloko yango ezalaki kosepelisa bango mingi liboso, mposa na yango esilaka. Bato oyo babimisaka bafilme basalaka nyonso mpo ete bato bálɛmba te kotalaka bafilme na bango; mpo na kolamwisa mposa ya bato yango, balakisaka mingi makambo ya mobulu na ndenge ya nsɔmɔ mpenza mpe makambo ya kosangisa nzoto na ndenge ya polelepolele.

Ntembe oyo ebimi mpo na televizyo

Bato oyo batalaka ntango nyonso mobulu mpe makambo ya kosangisa nzoto na televizyo bazali na likama nini? Bato oyo balobaka ete kotala mobulu na televizyo ezali mabe, balobi ete yango etindaka bato básala mobulu mpe ata soki bamoni bazali kobɛta moto ya solo to kozokisa ye, bayokaka lisusu mawa te. Balobaka mpe ete lolenge oyo balakisaka makambo ya kosangisa nzoto na televizyo etindaka bato na kindumba mpe ebebisaka bizaleli malamu.

Makambo nyonso wana ezali kouta kaka na kotala televizyo? Motuna oyo ebimisá ntembe makasi banda kala. Bato mingi ya mayele bataleli motuna yango mpe ebele ya babuku mpe mikanda elobeli yango. Likambo oyo ezali mpenza kobimisa ntembe ezali nde ya komonisa soki likambo moko ebimisaka likambo mosusu, na ndakisa komonisa soki moto oyo azalaki kotala bafilme ya mobulu banda bomwana, nsukansuka akokóma moto ya mobulu. Mbala mosusu, ezalaka mpasi komonisa polele ete likambo moko nde ebimisi likambo mosusu. Na ndakisa, soki omɛli nkisi moko ya monganga mpo na mbala ya liboso mpe mwa moke na nsima, omoni buyibuyi na nzoto mpe ebandi kosala yo mokosa, ekozala mpasi te mpo na koyeba ete nkisi oyo omɛlaki nde esali yo bongo. Kasi, mbala mosusu buyibuyi mpe mokosa yango ekoki kobanda mokemoke tii ekóma makasi. Lokola bantina oyo nzoto ebimisaka buyibuyi mpe mokosa ezali ebele, ekozala mpasi koyeba nkisi oyo esali yo bongo.

Ndenge moko mpe, ezali mpasi mpo na komonisa ete mobulu oyo balakisaka na televizyo etindaka bato bábuka mibeko mpe bákóma na bizaleli oyo ezali kosepelisa bato mosusu te. Balapolo mingi emonisi ete mobulu oyo balakisaka na televizyo etindaka bato na mobulu. Lisusu, bato mosusu oyo basalaka makambo ya mabe balobaki ete bizaleli na bango mpe mposa na bango ya kobimisaka mobulu euti mingimingi na makambo oyo batalaka na televizyo. Atako bongo, ezali mpe na makambo mingi ya bomoi oyo ekoki kotinda moto abimisaka mobulu. Masano ya video oyo ezali kolakisa bitumba, ndenge oyo baninga to bandeko na ye bazalaka na bato mosusu mpe bomoi oyo azali na yango, nyonso wana ezali makambo oyo ekoki kotinda moto abimisaka mobulu.

Yango wana, tokoki kokamwa te soki, na likambo yango, bato bazali na makanisi ekeseni. Na Canada, moto moko ya mayele na pisikoloji, akomaki boye: “Bilembeteli ya siansi emonisi te ete kotala mobulu na televizyo etindaka bato bábimisa mobulu to bámesene na mobulu mpe bámona yango lisusu mabe te.” Nzokande na États-Unis, ebongiseli moko ya bato ya mayele na pisikoloji (American Psychological Association Committee on Media and Society) elobaki boye: “Ntembe ezali te ete bato oyo batalaka mingi makambo ya mobulu oyo balakisaka na televizyo bakómaka kolinga mobulu mingi mpe kokanga miso na bizaleli oyo etindaka bato na kobimisa mobulu.”

Makambo nini televizyo ekoki kosala na makanisi na biso?

Tóbosana te ete bato ya mayele bazali kotyana ntembe nde mpo na bilembeteli, elingi koloba makambo oyo emonisi ete mobulu oyo bato batalaka na televizyo etindaka bango bábimisa mobulu. Kasi, kaka bato moke nde bakoki koloba ete televizyo esalaka eloko te na makanisi mpe na bizaleli na biso. Tókanisa mwa moke. Fɔtɔ moko mpamba ekoki kotinda biso tósilika, tólela to tóyoka esengo. Miziki mpe esimbaka mpenza mitema na biso. Maloba oyo moto alobi, ata oyo ezali na mokanda, etindaka biso tókanisa, tóyoka mawa to esengo mpe tósala likambo moko. Bililingi, miziki mpe maloba oyo babongisi yango malamu mpe batye yango esika moko ezali na bopusi monene koleka. Tokoki kokamwa te soki televizyo epalangani mingi mpe ezali mpenza kobenda bato. Mokomi moko alobi boye: “Ntango bato bayebaki kokoma makanisi na bango na mokanda . . . yango ekómaki na ntina mingi na bomoi ya bato; kasi banda wana, naino mayele moko te ya sika ya koteya bato ekómá na bopusi monene koleka televizyo.”

Bakompanyi ebimisaka bamiliare ya dolare mbula na mbula mpo na kosala piblisite, mpamba te bayebi ete makambo oyo bato bazali koyoka mpe kotala na televizyo ebendaka bango. Soki babimisaka mbongo nyonso wana, yango emonisi te ete bayebaka te makambo oyo piblisite esalaka; bayebaka yango malamu. Na mobu 2004, kompanyi Coca-Cola ebimisaki dolare koleka miliare 2 mpo na kosala piblisite ya biloko na bango na mokili mobimba na nzela ya bazulunalo, radio mpe televizyo. Mbongo oyo babimisaki esalaki mosala? Na mbula wana, kompanyi yango ezwaki matabisi pene na dolare miliare 22. Bato oyo basalaka piblisite bayebi ete piblisite moko mpamba ekoki kobenda bato te. Yango wana, basalaka bapiblisite mingi na boumeli ya bambula mpo na kobenda bato.

Soki piblisite ya segɔnde 30 mpamba ebongolaka makanisi mpe bizaleli na biso, tokoloba boni mpo na bangonga oyo tolekisaka na televizyo? Mokomi ya buku moko (Television​—An International History) alobi boye: “Ata na nzela ya lisano moko ya mpambampamba, televizyo eteyaka bato kozanga ete báyeba.” Buku moko (A Pictorial History of Television) elobi ete: “Televizyo ezali kobongola lolenge na biso ya kokanisa.” Tosengeli komituna boye: ‘Makanisi oyo televizyo ezali kopesa ngai, ezali mpenza oyo nalingaka?’

Mpo na bato oyo bazali kosalela Nzambe, motuna yango ezali na ntina mingi. Makambo mingi oyo balakisaka na televizyo eyokani te na mitinda mpe bizaleli ya malamu mpenza oyo Biblia eteyaka. Na televizyo, balobelaka lolenge ya bomoi mpe misala oyo Makomami epekisi lokola nde ezali mabe te, kutu bamonisaka yango lokola makambo ya sika. Longola yango, batyolaka mpe bakipaka te mitinda ya boklisto mpe bato oyo batosaka yango. Na mawa mpenza, mokomi ya buku moko alobaki boye: “Na miso na bango, mabe ezali komonana malamu mpe malamu esengeli komonana mabe.” Mbala mingi, ezalaka lokola nde televizyo ezali koyebisa bato na ndenge ya mayele ete: ‘Malamu ezali mabe mpe mabe ezali malamu.’​—Yisaya 5:20.

Tosengeli mpenza kokeba na makambo oyo totalaka na televizyo, mpamba te yango ekoki kobongola makanisi na biso. Biblia elobi ete: “Ye oyo akotambola na bato ya mayele akozala na mayele, nde motamboli elongo na bazoba akobukana.” (Masese 13:20) Adam Clarke, molimboli moko ya maloba ya Biblia, alobi boye: “Mpo na kotambola na moto elongo esengeli kolinga ye makasi; mpe ezali mpasi te tólanda ndakisa ya bato oyo tolingaka. Yango wana, balobaka ete bayebaka moto na baninga oyo atambolaka na bango. Yango elingi koloba ete soki oyebi bizaleli ya baninga na ye, mbala moko okoyeba mpe bizaleli na ye.” Ndenge tolobeli yango, na nzela ya televizyo, bato mingi bazali kolekisa ntango mingi elongo na bato oyo bazangi bwanya, bato oyo moklisto ya sembo akoki ata kokanisa te kobenga bango na ndako na ye.

Soki monganga akomeli yo nkisi moko ya makasi, na ntembe te okoluka koyeba matomba mpe makama na yango. Soki omɛli nkisi ya mabe, to omɛli nkisi ya malamu kasi olekisi ndelo, ekoki kosala yo mabe. Ezali se ndenge moko mpo na makambo oyo totalaka na televizyo. Ezali mpenza likambo ya bwanya tótalela malamu makambo oyo totalaka na televizyo.

Ntoma Paulo oyo apemamaki na elimo santu, alendisaki baklisto bátalelaka makambo oyo ezali ya solo, oyo ebongi na lobanzo, makambo ya boyengebene, ya pɛto, oyo ekoki kolingama, oyo elobelami malamu, oyo eyokani na bizaleli ya malamu mpe oyo ebongi kosanzolama. (Bafilipi 4:6-8) Okosalela toli oyo? Soki osaleli yango, okozwa esengo.

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 3 Balapolo oyo ya États-Unis ekokani na oyo ya bikólo mosusu, mpamba te bafilme mpe makambo mosusu oyo balakisaka na batelevizyo na États-Unis elakisamaka mpe na mokili mobimba.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 5]

“Na nzela ya televizyo, okoki kosakana na ndako na yo na bato oyo okolinga te kobenga bango epai na yo.”​—David Frost, mopanzi-nsango moko na Grande-Bretagne

[Etanda na lokasa 5]

NTINA OYO BIBLIA ELOBELAKA MAKAMBO YA KOSANGISA NZOTO MPE MOBULU

Ndenge oyo Biblia elobelaka makambo ya kosangisa nzoto mpe mobulu ekeseni na ndenge oyo televizyo elakisaka yango? Biblia elobelaka makambo ya kosangisa nzoto mpe mobulu mpo na koteya, kasi te mpo na kosakanisa to kosepelisa bato. (Baloma 15:4) Liloba ya Nzambe elobeli makambo oyo esalemaki solo. Liloba yango esalisaka biso tóyeba ndenge Nzambe atalelaka makambo mpe tózwa mateya na mabunga ya basusu.

Na bamboka mingi oyo balakisaka bapiblisite na televizyo, balakisaka makambo ya kosangisa nzoto mpe mobulu mpo na kozwa mbongo, kasi te mpo na koteya bato. Bato oyo basalaka bapiblisite bazalaka na mokano ya kobenda likebi ya bato mingi, mpe makambo ya kosangisa nzoto ná mobulu nde ebendaka mingi likebi ya bato oyo batalaka televizyo. Yango ebimisaka matomba nini? Bato batalaka bapiblisite yango mpe basombaka biloko oyo yango ezali kolakisa. Bato oyo bapanzaka nsango na televizyo balandaka likanisi oyo elobi ete esengeli kolobela libosoliboso bansango oyo ezali na makambo mingi ya mobulu lokola kobuka mibeko, makama mpe bitumba, mpamba te yango nde ebendaka likebi ya bato.

Atako Biblia elobeli mobulu oyo bato mosusu basalaki, ezali kolendisa bato báfanda na kimya mpe bázongisaka mabe na mabe te, kasi bábongisaka makambo na kimya. Biblia ezali ntango nyonso kolendisa bato bázala na etamboli ya malamu na makambo ya kosangisa nzoto. Makambo mingi oyo balakisaka na televizyo eteyaka bato te ndenge ya kofanda na kimya mpe kozala na bizaleli malamu.​—Yisaya 2:2-4; 1 Bakolinti 13:4-8; Baefese 4:32.

[Etanda/​Elilingi na lokasa  7]

TELEVIZYO EZALI MALAMU MPO NA BANA MIKE?

“Baankɛtɛ oyo esalemi na boumeli ya bambula ebele etindi bato ya siansi mpe minganga mingi báloba ete mobulu oyo balakisaka na televizyo ezali mpenza likama mpo na bana.”​—The Henry J. Kaiser Family Foundation.

“[Tondimi likanisi ya] Lisangá ya minganga ya Amerika oyo basalisaka bana ntango balobi ete ‘bana oyo balekisi naino mbula mibale te basengeli te [kotala televizyo].’ Lokola bazali naino na eleko oyo bɔɔngɔ na bango ezali kokola mingi, basengeli kosakana mpe kosolola na bato ya solo. Yango ekosalisa bango bákola malamu mpe bámesena na bato.”​—The National Institute on Media and the Family.

[Elilingi na lokasa 6, 7]

Makanisi oyo televizyo ezali kopesa ngai, ezali mpenza oyo nalingaka?