Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Tv eyibaka ntango na biso?

Tv eyibaka ntango na biso?

Tv eyibaka ntango na biso?

ELEKI mwa bambula, batunaki bato ya États-Unis motuna oyo: Soki balobi bápesa yo mbongo dolare milio 1 mpo otika kotala televizyo bomoi na yo mobimba, okondima? Basusu (25 %) baboyaki. Na ankɛtɛ mosusu, batunaki mibali eloko nini balingaka mingi. Mingi kati na bango balobaki ete balingaka kimya mpe esengo. Kasi, na kati ya makambo oyo balingaka mingi, yango ezalaki na esika ya mibale. Eloko ya liboso oyo balingaka mingi ezali televizyo ya monene.

Na mokili mobimba, bato bakómi kosepela na televizyo mingi. Na 1931, ntango televizyo eyebanaki naino mingi te, mokonzi ya kompanyi moko (Radio Corporation of America) alobaki boye: “Ntango makambo ya televizyo ekokola mingi, emonani ete bato ya mokili mobimba bakobanda kotala televizyo.” Ekoki kozala ete na ntango wana bato bamonaki ete alekisi ndelo, kasi lelo oyo maloba yango ezali solo. Balapolo emonisi ete motángo ya batelevizyo na mokili mobimba ezali miliare moko na ndambo mpe bato oyo bazali kotala yango baleki motángo wana. Ata soki bato basepelaka na yango to te, televizyo ezali na ntina mingi na bomoi ya bato.

Ntango oyo bato mingi balekisaka na kotala televizyo ezali mpenza kokamwisa. Eumeli te, ankɛtɛ moko oyo esalemaki na mokili mobimba emonisaki ete mokolo na mokolo bato mingi batalaka televizyo koleka ngonga misato. Bato ya Amerika ya nɔrdi balekisaka ngonga minei na ndambo mokolo na mokolo mpo na kotala televizyo. Nzokande, bato ya Japon nde balekisaka ntango mingi: ngonga mitano mokolo na mokolo. Bangonga yango ekómaka mingi soki osangisi yango. Na ndakisa, soki ozali kotala televizyo ngonga minei mokolo na mokolo, ntango okokóma na mbula 60, okolekisa mbula zomi ya bomoi na yo na kotala televizyo. Nzokande, moto moko te akolinga ete nsima ya liwa na ye bákanisaka ye lokola moto oyo alekisá mbula zomi ya bomoi na ye na kotala televizyo.

Bato balekisaka ngonga nyonso wana kaka mpo balingaka kotala televizyo? Mbala mingi, ezalaka bongo te. Bato mingi bamonaka ete balekisaka ntango mingi na kotala televizyo mpe lisosoli na bango etungisaka bango mpo bamonaka ete babungisaki ntango na bango mpamba. Basusu balobaka ete bazali “baombo ya televizyo.” Atako moto akoki te kokóma moombo ya televizyo ndenge bakómaka moombo ya bangi, makambo yango ekokani. Baombo ya bangi balekisaka ntango mingi na komɛla yango. Atako balukaka kokitisa ntango yango to kotika komɛla bangi, bakokaka te. Mpo na bangi, bakipaka te kosala misala ya ntina mpo na libota na bango mpe bato mosusu, mpe soki batiki komɛla yango, bamiyokaka malamu te. Bilembo nyonso wana ekoki komonana epai ya bato oyo batalaka televizyo mingi.

Salomo, mokonzi ya bwanya, akomaki boye: “Ezali malamu te kolya mafuta ya nzoi mingi.” (Masese 25:27) Etinda yango etali mpe likambo ya kotala televizyo. Atako makambo mingi oyo totalaka na televizyo ezali na ntina, kolekisa ntango mingi na kotala yango ekoki kolya ntango oyo osengeli kolekisa elongo na libota, ekoki kosala ete bana báyeba kotánga malamu te mpe bázwa bilembo malamu te na kelasi. Yango ekoki mpe kokómisa moto nzoto mineneminene. Soki olekisaka ngonga mingi na kotala televizyo, ekozala malamu omituna soki epesaka yo matomba nini. Ntango na biso ezali na motuya mingi mpe tosengeli te kobebisa yango. Ekozala mpe likambo ya bwanya otalela makambo oyo otalaka na televizyo. Lisolo oyo elandi ekolobela yango.