LAMUKÁ! Sanza ya Janvier 2008

ELOBELI TITRE YA EZIPELI

Likama oyo ezali kobangisa baboti nyonso

Baboti mingi bayebi mpenza makambo etali kosangisa nzoto na bana mpe mpai oyo yango ememaka.

ELOBELI TITRE YA EZIPELI

Kómisá libota na yo esika ya libateli

Mpo na kobatela libota na yo, moto mokomoko na kati ya libota asengeli koyekola mpe kozwa na motuya mingi mitinda oyo esalisaka na kokima etamboli ya mbindo. Biblia, Liloba ya Nzambe nde ebongi mpenza mpo na kolakisa biso mitinda yango.