Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Kómisá libota na yo esika ya libateli

Kómisá libota na yo esika ya libateli

“BAZANGI bolingo ya libota.” Wana ezali maloba ya mawa oyo Biblia esaleli mpo na kolobela bato mingi ya ntango na biso, oyo ebengami “mikolo ya nsuka.” (2 Timote 3:1, 3, 4) Ndenge bana mingi bazali kobebisama na kati ya libota emonisi polele ete esakweli yango ezali mpenza kokokisama. Kutu, liloba ya Grɛki astorgos, oyo ebongolami na “bazangi bolingo ya libota,” elimboli ete bolingo oyo esengeli kozala kati na bato ya libota, mingimingi kati na baboti mpe bana, ezangi. Mbala mingi, bana babebisamaka na kati ya libota.

Bato mosusu oyo balukaka koyeba likambo yango balobi ete mbala mingi, tata to mobali oyo azali kokamba libota nde abebisaka bana. Bandeko ya mibali mpe babebisaka bana mingi. Atako bana basi nde babebisamaka mingi koleka, bana mibali ebele mpe babebisamaka. Ntango mosusu, okoki kokanisa ete basi oyo babebisaka bana bazali mpenza te, kasi ezali bongo te. Bana mosusu ya mikóló to oyo bazali na makasi mingi balɛngolaka to bakangaka na makasi baleki na bango to bandeko na bango oyo bazali na makasi mingi te mpo na kosangisa na bango nzoto. Ekoki kozala ete lolenge wana ya kobebisa bana elobelamaka mingi te. Kasi, tondimi ete lokola ozali moboti, omonaka yango mabe mpenza.

Okoki kosala nini mpo makambo ya ndenge wana ebima na libota na yo te? Na ntembe te, moto mokomoko na kati ya libota asengeli koyekola mpe kozwa na motuya mingi mitinda oyo esalisaka na kokima etamboli ya mbindo. Biblia, Liloba ya Nzambe nde ebongi mpenza mpo na kolakisa biso mitinda yango.

Ndenge oyo Biblia etalelaka makambo ya kosangisa nzoto

Mpo likama ezala na libota te, esengeli libota elanda mitinda ya bizaleli malamu oyo ezali na Biblia. Biblia elobelaka makambo ya kosangisa nzoto na ndenge ya nsɔni te. Elobelaka yango polelepolele, kasi na limemya. Emonisi ete Nzambe abongisá kosangisa nzoto ezala likambo ya esengo kati na babalani. (Masese 5:15-20) Kasi, epekisi baoyo babalaná te bákokisa bamposa na bango ya nzoto lokola babalani. Na ndakisa, Biblia emonisi polele ete ezali mabe bandeko básangisa nzoto. Na Levitike mokapo 18, Biblia epekisi moto asangisa nzoto na bato ya ndenge nyonso ya libota na ye. Yoká ndenge elobi: “Moto na bino te akobɛlɛma na ndeko na ye ya libota mpo na kolala na ye. Ngai nazali [Yehova].”​—Levitike 18:6.

Yehova atyaki likambo ya kosangisa nzoto na moto ya libota na molɔngɔ ya “makambo ya mbindo” oyo esɛngaki etumbu ya liwa. (Levitike 18:26, 29) Emonani mpenza ete, na likambo yango, mitinda ya Mozalisi eleki mosusu nyonso. Lelo oyo, na mikili mingi, Leta mpe etyá mibeko oyo epekisaka kobebisama ya bana na kati ya libota. Mbala mingi, mibeko yango elobaka ete soki mokóló asangisi nzoto na mwana, asali yango na makasi. Kasi, mpo na nini koloba ete asali yango na makasi soki akangaki ye na makasi te?

Bakonzi mingi bakómá kondima oyo Biblia elobá banda kala na ntina na bana, ete bana mingi bazalaka na likoki te ya kokanisa lokola mikóló. Na ndakisa, Masese 22:15 elobi ete: “Ebebe ezwami na motema ya mwana.” Nzambe atindaki mpe ntoma Paulo akoma ete: “Ntango nazalaki mwana moke, nazalaki . . . kokanisa lokola mwana moke, kotalela makambo lokola mwana moke; kasi sikoyo lokola nakómi mobali, nalongoli bizaleli ya mwana moke.”​—1 Bakolinti 13:11.

Mwana moke akoki koyeba malamu te ntina ya kosangisa nzoto to kokanisa mikakatano oyo yango ekoki kobimisela ye na nsima. Yango wana, bato mingi bamonaka ete mwana akoki mpenza kondima ye moko te básangisa na ye nzoto. Na maloba mosusu, soki mokóló asangisi nzoto na mwana, mokóló yango akoki koluka komilongisa te mpe koloba ete mwana aboyaki te to mwana ye moko nde asɛngaki ye básangisa nzoto. Mokóló yango asangisi nde na mwana nzoto na makasi mpe yango ezali mbeba oyo mbala mingi esɛngaka ete bákɔtisa ye na bolɔkɔ. Foti ezali nde ya ye, kasi ya mwana te.

Nzokande, likambo ya mawa, lelo oyo bato mingi oyo basalaka makambo ya ndenge wana bazwaka etumbu te. Na ndakisa, na Australie, emonani ete kati na bato oyo basalaka mbeba wana, bobele bato moke (10 %) nde basambisamaka mpe moke mpenza nde bakweisamaka na tribinale. Ezali mpe bongo na mikili mosusu. Atako Leta ekoki kosala mingi te mpo na kobatela mabota, kasi kosalela mitinda ya Biblia ekobatela mabota malamu koleka.

Baklisto ya solo bayebi ete Nzambe oyo akomisaki mitinda yango na kati ya Liloba na ye abongwani te. Amonaka makambo nyonso oyo tosalaka, ata na kobombana. Biblia elobi ete: “Biloko nyonso ezali bolumbu mpe etandami polele na miso ya moto oyo epai na ye tokozongisa monɔkɔ.”​—Baebele 4:13.

Soki tobuki mibeko ya Nzambe mpe tosali basusu mabe, tokozala na ngambo na miso na ye. Kasi, akopambola biso soki tozali kolanda mitinda oyo atyá mpo na libota. Wapi ndambo ya mitinda yango?

Libota oyo bazali na bomoko mpo balingani

Biblia eyebisi biso ete: “Bolingo . . . ezali ekanganeli ya kokoka mpo na bomoko.” (Bakolose 3:14) Biblia emonisi ete bolingo ezali kaka mayoki mpamba te, kasi emonanaka nde na makambo oyo etindaka moto asala to asala te. (1 Bakolinti 13:4-8) Kolingana na kati ya libota esɛngi kopesana lokumu, limemya mpe komoniselana boboto. Elimboli komitambwisa na ndenge oyo emonisi ete totalelaka moto mokomoko ya libota ndenge Nzambe atalelaka ye. Nzambe apesi moto mokomoko na kati ya libota esika ya ntina mpe ya lokumu.

Lokola tata azali mokonzi ya libota, asengeli kozala moto ya liboso ya komonisa bolingo na kati ya libota. Ayebi ete moklisto oyo azali tata azali na ndingisa te ya kokonza to konyokola mwasi na ye to bana na ye. Kasi, amekolaka ndenge oyo Klisto amonisaki bokonzi na ye. (Baefese 5:23, 25) Yango wana, alingaka mwasi na ye mpe asalelaka ye makambo na boboto; lisusu, azalaka motema molai mpe malamu na bana na ye. Abatelaka bango ntango nyonso mpe abomaka nzoto mpo na kotikela ata eloko moko te nzela ete ebebisa kimya mpe makanisi na bango ya bomwana to mposa na bango ya kotyela basusu motema mpe kobatelama.

Mwasi to mama ya libala azali mpe na mokumba ya ntina mpe ya lokumu mingi. Biblia elobeli ezaleli oyo banyama bazalaka na yango ya kobatela bana na bango ya mike mpo na komonisa ete Yehova mpe Yesu bakoki mpenza kobatela biso. (Matai 23:37) Se ndenge moko, mama asengeli kozala na ekateli makasi ya kobatela bana na ye. Lokola alingaka bango, akakatanaka te mpo na kotya kobatelama mpe bolamu na bango na esika ya liboso. Baboti bango moko banyokolanaka te mpe bakanelanaka te; basalelaka mpe bana na bango makambo yango te. Lisusu, bapekisaka bana na bango básalelana makambo yango.

Soki bato bazali kopesana limemya mpe lokumu na kati ya libota, bakobanda kosolola malamu. William Prendergast akomaki boye: “Mokolo na mokolo, baboti nyonso basengeli kosololaka malamu mpenza na bana na bango, ezala ya mike to oyo bakómi bilenge.” Abakisaki ete: “Emonani ete yango ezali ndenge oyo eleki malamu ya kobatela bana mpo bábebisama te.” Yango nde Biblia ezali kosɛnga: kosololaka na boboto mpenza. (Deteronome 6:6, 7) Soki libota ezali kosalela malako yango, ekozala esika oyo moto nyonso akobanga te koloba makambo oyo ezali na motema na ye.

Toboyi te, tozali na mokili moko mabe mpe likoki ya kopekisa makambo nyonso ya mabe ezali te. Atako bongo, libota oyo ezali esika ya libateli ekoki kosalisa mingi. Soki bato mosusu basali moto moko ya libota mabe, ayebi esika oyo akokende mpo na kozwa libɔndisi. Libota ya ndenge wana ezali mpenza esika ya komibomba mpo na kobatelama na mokili oyo etondi na mobulu. Tiká ete Nzambe apambola milende oyo ozali kosala mpo na kokómisa libota na yo esika ya libateli!