Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mateya ya solo to ya lokuta?

Mateya ya solo to ya lokuta?

Mateya ya solo to ya lokuta?

Timote, oyo azalaki nkulutu na lisangá ya boklisto, apesaki bato oyo basambelaka Nzambe ya solo etinda ete bátyaka likebi te na “mateya ya ndenge mosusu” mpe na “masapo ya lokuta.” (1 Timote 1:3, 4) Etinda yango ezali mpenza na ntina lelo oyo? Ɛɛ, mpamba te lelo oyo, makanisi mabe oyo bato bazalaka na yango mpo na Biblia mpe mateya na yango epekisaka bato mosusu bálanda losambo ya solo. Okomona awa na nse mwa makanisi ya lokuta oyo bato bazalaka na yango mpo na Biblia. Talá oyo Biblia yango moko elobi. Yango ekosalisa yo okesenisa mateya ya solo na oyo ya lokuta.

Lokuta: Makamwisi ya Biblia esalemaki te.

Solo: Ezali na makambo mingi oyo bato bayebi naino te na biloko oyo Nzambe akelá. Moto moko te ya siansi akoki kolimbola malamumalamu nguya oyo esalaka ete biloko ekweaka na mabelé, moko te akoki kolimbola malamu biloko oyo esali atomɛ mpe eloko babengi ntango. “Okoki kososola makambo mabombami ya Nzambe? Okoki komona ndelo ya Oyo-na-Nguya-Nyonso?” (Yobo 11:7) Lokola toyebi malamu te biloko oyo Nzambe akelá, bato ebele ya siansi oyo bazali na mayele mingi balingi lisusu te koloba ete eloko boye to boye ekoki kosalema te.

Lokuta: Mangomba nyonso endimami na Nzambe.

Solo: Yesu alobaki ete: “Soki botikali kaka na kati ya liloba na ngai, bozali mpenza bayekoli na ngai, mpe bokoyeba solo, mpe solo ekopesa bino bonsomi.” (Yoane 8:31, 32) Soki Nzambe andimaka mangomba nyonso, Yesu alingaki mpenza koloba ete solo ekopesa bandimi na yango bonsomi? Kutu, Yesu ateyaki ete kaka bato moke nde bazali na ‘nzela oyo ememaka na bomoi.’​—Matai 7:13, 14.

Lokuta: Bato nyonso ya malamu bakendaka na likoló nsima ya liwa.

Solo: “Bato ya bopɔlɔ bakosangola mokili, bakosepela mpe na kimya ya solo. Bayengebene bakosangola mokili mpe bakofanda wana libela. Zelá mpo na [Yehova] mpe batelá nzela na ye, akokembisa yo ete osangola mokili.” (Nzembo 37:11, 29, 34) Kaka bato ya sembo 144 000 nde bakokende na likoló. Nzambe apesi bango mokumba ya “koyangela mabelé.”​—Emoniseli 5:9, 10; 14:1, 4.

Lokuta: “Testama ya Kala” ezali na ntina te mpo na baklisto.

Solo: “Makomami nyonso epemami na Nzambe mpe ezali na litomba.” (2 Timote 3:16, 17) “Makambo nyonso oyo ekomamaki kala ekomamaki mpo na kolakisa biso, mpo ete na nzela ya ezaleli na biso ya koyika mpiko mpe na nzela ya kobɔndisama oyo euti na Makomami tókoka kozala na elikya.” (Baloma 15:4) “Testama ya Kala” to Makomami ya Liebele ezali na mateya ya ntina mingi oyo ekoki kosalisa biso na elimo mpe kotinda biso tóndima makambo oyo ezali na “Testama ya Sika” to Makomami ya Grɛki ya boklisto.

Lokuta: Makambo mingi oyo ezali na mokanda ya Genese, bakisá mpe lisolo ya Adama ná Eva, ezali kaka masapo.

Solo: Luka, moko ya bakomi ya Baevanzile, atángaki molɔngɔ ya bankɔkɔ ya Yesu tii na Adama. (Luka 3:23-38) Soki mokanda ya Genese ezali kaka lisapo mpamba, esika nini bankombo ya bato ya solo esuki mpe esika nini oyo ya lokuta ebandi? Yesu, moto oyo azalaki na likoló liboso aya awa na mabelé, andimaki makambo oyo ekomamaki na mokanda ya Genese, bakisá mpe lisolo ya Adama ná Eva. (Matai 19:4-6) Na bongo, koboya kondimela mokanda ya Genese ezali nde koboya kondimela Yesu mpe bakomi mosusu ya Biblia.​—1 Ntango 1:1; 1 Bakolinti 15:22; Yuda 14.