Mpo na nini kotosa mitinda ya Biblia?
Mituna oyo bilenge batunaka
Mpo na nini kotosa mitinda ya Biblia?
KANISÁ ete ozali kolya elongo na baninga na yo mibale ya basi na eteyelo. Moko na bango azali kotala mwana mobali moko oyo ayei sika na eteyelo.
Mwana mwasi ya liboso alobi na yo boye: “Oyebi, mwana mobali wana asepeli na yo. Ezali komonana na miso na ye. Talá kaka ndenge azali kotala yo!”
Mwana mwasi ya mibale ayebisi yo na litoi boye: “Oyebi, azali na mwasi te!”
Mwana mwasi ya liboso alobi boye: “Mpo kaka nazali na mwa moto na ngai, soki te ngai moko nalingaki nazwa ye!”
Na nsima, mwana mwasi ya liboso atuni yo motuna oyo olingaka te bátuna yo:
“Mpo na nini ozali na mobali te?”
Oyebaki ete nsukansuka bakotuna yo bongo. Ekoki kozala ete yo mpe olingaka kozala na mwa moto na yo. Kasi, bayebisá yo ete ekozala malamu ozela tii ntango okokóma na mbula ya kobala. Soki ezalaki bongo te . . .
Mwana mwasi ya mibale alobi boye: “Lingomba na bino nde epekisi yango?”
Mbala moko omituni, ‘Ndenge nini ayebi makanisi na ngai?’
Mwana mwasi ya liboso alobi na yo na lityo: “Yo likambo nyonso kaka Bible, Bible, Bible. Na bantango mosusu, okoki ata komisepelisa mwa moke te?”
Yo mpe okutaná na likambo ya ndenge wana? Ekómelá yo ete bátyola yo mpo ozali kosala makasi otosa mitinda ya Biblia? Osalaki nini?
◼ Olimbwelaki bango bindimeli na yo na mpiko nyonso.
◼ Okakatanaki mwa moke, kasi osalaki makasi olimbwela bango bindimeli na yo.
◼ Omonaki ete baninga na yo bazali koloba solo ete ozali mpenza komipimela bisengo mosusu!
Ekómelá yo omituna boye: ‘Ezali mpenza na ntina kotosa mitinda ya Biblia?’ Elenge moko na nkombo Deborah amitunaki motuna yango. * Alobi boye: “Baninga na ngai bazalaki kosala nyonso oyo motema elingi. Ezalaki komonana lokola ete bazali na likambo na moto te. Nakómaki komona ete mitinda ya Biblia eleki makasi. Nakómaki na mposa ya kozala lokola bango.”
Ezali mabe komituna bongo?
Na ntango moko boye, Asafa, mokomi moko ya Biblia, akómaki komituna soki ezali mpenza na ntina kozala na etamboli oyo esepelisaka Nzambe. Akomaki boye: “Nazalaki na zuwa epai na bato ya zoba, wana emonaki ngai esengo Nzembo 73:3, 13.
ya bato mabe.” Kutu, alobaki mpe boye: “Solo, ezali bobele mpamba ete napɛtoli motema na ngai mpe nasukoli mabɔkɔ na ngai kati na sembo!”—Emonani polele ete Yehova Nzambe amonaka mabe te ndenge bato bamitunaka na bantango mosusu soki ezali mpenza na ntina bátosa mitinda na ye. Kutu, atikaki ete makanisi ya Asafa ekomama na Biblia. Nsukansuka, Asafa amonaki ete etamboli oyo esepelisaka Nzambe nde ezali lolenge ya bomoi oyo eleki malamu. (Nzembo 73:28) Nini esalisaki ye abongola makanisi? Asafa azalaki moto ya bwanya. Mpe soki abongolaki makanisi, ezalaki te mpo ayokaki ye moko mpasi oyo ekómelaka moto soki aboyi kotosa Yehova, kasi nde mpo azwaki liteya na makambo oyo ekómelaki basusu. (Nzembo 73:16-19) Yo mpe okoki kosala lokola ye?
Zwá liteya na oyo ekómelaki basusu
Na kokesana na Asafa, Mokonzi Davidi anyokwamaki mpo na makambo oyo asalaki, mpe yango eteyaki ye ete baoyo babukaka mibeko ya Nzambe basukaka kaka mabe. Davidi asalaki ekobo na mwasi ya mosali na ye mpe alukaki kobomba lisumu na ye. Lisumu yango eyokisaki Nzambe mpe bato mosusu mpasi; ye moko mpe anyokwamaki mpo na yango. (2 Samwele 11:1–12:23) Ntango Davidi abongolaki motema, elimo santu ya Yehova esalisaki ye amonisa makanisi na ye na banzembo mpe akoma banzembo yango na Biblia mpo na koteya biso. (Nzembo 51:1-19; Baloma 15:4) Na bongo, ezali likambo ya bwanya kozwa liteya na mabunga ya basusu, mpe Biblia endimi yango.
Mpo na kosalisa yo olanda ndakisa ya Asafa mpe oboya ndakisa mabe ya Davidi, tosɛngi yo otalela makanisi oyo euti na ndambo ya bilenge ya mikili ndenge na ndenge, oyo na ntango moko boye batikaki kolanda mitinda ya Biblia. Mingimingi, bakómaki kosangisa nzoto atako babalaki naino te. Lokola Davidi, basili kobongola motema na masumu na bango mpe bazali sikoyo na etamboli oyo esepelisaka Nzambe. (Yisaya 1:18; 55:7) Yoká oyo balobaki.
Lamuká!: Nini ebebisaki makanisi na yo mpe etamboli na yo?
Deborah: “Na eteyelo, nazalaki komona elenge mokomoko azali na mwa moto na ye mpe ezalaki komonana ete bazali na esengo. Soki nazali elongo na bango, nazalaki komona ndenge bazali koyambana mpe kopesana babizi; nazalaki kolula bango mpe komiyoka ete nazali kaka ngai moko. Mbala mingi, nazalaki kolekisa bangonga ebele na kokanisakanisa mwana mobali moko oyo nazalaki kosepela na ye. Yango ezalaki kokolisa lisusu mposa na ngai ya kozala elongo na ye mpe koluka kokokisa mposa yango.”
Mike: “Nazalaki na momeseno ya kotánga mikanda mpe kotala bafilme oyo elobelaka mingi makambo ya kosangisa nzoto. Masolo ya makambo ya kosangisa nzoto oyo tozalaki kobɛta na baninga ekolisaki mposa na ngai ya koyeba makambo yango. Yango wana, soki nazali elongo na mwana mwasi, nazalaki kokanisa ete tokoki kosimbanasimbana kozanga ete tósangisa nzoto, mpe nakokaki ntango nyonso kozala na komipekisa.”
Andrew: “Nazalaki na momeseno ya kotala bililingi ya mibali mpe basi oyo bazali bolumbu na Internet. Nakómaki komɛla masanga mingi. Mpe nakómaki kokende bafɛti elongo na bilenge oyo bazalaki kotosa mitinda ya Biblia te.”
Tracy: “Ntango nakómaki na mbula 16, nazalaki ntango nyonso na mposa ya kozala elongo na mwana mobali oyo tozalaki kobima na ye. Nayebaki ete ezali mabe kosangisa nzoto liboso ya kobala, kasi nayinaki likambo yango te. Nazalaki te na mposa ya kosangisa nzoto liboso ya kobala, kasi nazalaki kokoka kokanga motema te. Na ntango moko boye, ata lisosoli na ngai ezalaki lisusu kotungisama te.”
Lamuká!: Etamboli yango epesaki yo esengo?
Deborah: “Na ebandeli, nazalaki na esengo mingi ndenge nakómaki na bonsomi lokola baninga na ngai. Kasi, esengo yango eumelaki te. Nakómaki komiyoka mbindo, namonaki ete nabebisaki bolenge na ngai, mpe nakómaki komiyoka ete nazali lisusu na ntina te. Nayokaki mawa mingi ndenge nabebisaki nzoto na ngai mpe nakokaki lisusu kozonga ngɔndɔ te. Banda wana, nakómaki komituna mbala na mbala: ‘Nazalaki kokanisa nini? Mpo na nini, mpo na nini mpenza
natikaki kotosa mitinda ya Yehova oyo atyá mpo na bolamu na biso?’”Mike: “Nakómaki koyoka lokola eteni moko ya nzoto na ngai ekufi. Nazalaki kosala makasi nabosana mpasi oyo etamboli na ngai ezalaki kopesa basusu, kasi nazalaki kokoka te. Nayokaki mawa ndenge napesaki basusu mpasi mpo na koluka kaka bolamu na ngai moko. Nazalaki lisusu kozwa mpɔngi te. Nsukansuka, mposa ya kosangisa nzoto ekitaki, mpe nakómaki komitungisa mingi mpe komiyoka nsɔni.”
Andrew: “Nabandaki lisusu kokakatana te mpo na kosala makambo ya mabe. Kasi na nse ya motema, nazalaki koyoka lokola namemi ngambo mpe nazalaki lisusu na esengo te.”
Tracy: “Eumelaki te, nakómaki koyoka mpasi oyo eutaka na etamboli ya mbindo. Pite ebebisaki bolenge na ngai. Nakanisaki ete ngai ná mwana mobali wana tokosepelisana mpenza. Kasi, ezalaki bongo te. Boninga na biso esukaki mabe, toyokisanaki mpasi mingi, mpe yango etiká biso na bilembo mabe na motema. Nazalaki kolela butu nyonso na mbeto na ngai, mpe komilobela ete ebongaki mpenza nalanda nzela ya Yehova.”
Lamuká!: Toli nini okoki kopesa bilenge oyo bamonaka ete mitinda ya Biblia eleki makasi?
Deborah: “Bomoi na yo ekozala malamu koleka te soki otiki kotosa mitinda ya Biblia. Kanisá ndenge oyo Yehova akoyoka soki olandi toli na ye. Kanisá malamu mpasi oyo ekokómela yo soki oboyi kolanda toli na ye. Yebá ete makambo oyo okosala etali kaka yo moko te. Etamboli na yo ekoki mpe koyokisa basusu mpasi. Soki oboyi kolanda toli ya Nzambe, okomilukela mpasi.”
Mike: “Ya solo, etamboli ya baninga na yo ekoki komonana malamu. Kasi, osengeli komona mosika. Lokumu na yo mpe bongɔndɔ na yo ezali kati na biloko ya motuya oyo Yehova apesá yo. Kobebisa yango kaka mpo na kozanga komipekisa, ezali mpenza komisambwisa. Sololá likambo yango na baboti na yo to mikóló mosusu. Soki osali likambo ya mabe, yebisá bango nokinoki mpe luká kobongisa likambo yango. Soki olandi nzela ya Yehova, okozala na kimya ya solosolo.”
Andrew: “Soki oyebi naino makambo ya mokili te, etamboli ya baninga na yo ekoki kosepelisa yo. Mokemoke, okoki kobanda komekola bango. Yango wana, ponáká baninga ya malamu. Tyelá Yehova motema, mpe okosala te makambo oyo ekomemela yo mpasi.”
Tracy: “Koloba te ete ‘Wana ekokómela ngai te.’ Mama azalaki kofandisa ngai mpe koyebisa ngai polele ete etamboli na ngai ekosukela ngai mabe. Maloba na ye ezalaki kopesa ngai nkanda! Nazalaki kokanisa ete nayebi mingi. Kasi, namikosaki. Tosá mitinda ya Yehova, mpe zalá na baninga oyo batosaka yango. Yango ekopesa yo esengo mingi.”
Mitinda ya Biblia etyaka biso nsinga na nkingo to ebatelaka biso?
Soki baninga na yo bazali kotyola yo mpo ozali kosala makasi otosa mitinda ya Biblia, osengeli komituna boye: ‘Mpo na nini baboyaka kotosa mitinda ya Biblia? Basilá kotánga mibeko ya Nzambe na Biblia mpe bayebi mpenza matomba ya kotosa yango? Bazwá mpenza ntango ya kokanisa na bampasi oyo eyelaka bato oyo baboyaka kotosa yango? To, bazali nde kolanda kaka makambo oyo bato nyonso bazali kosala?’
Na ntembe te, oyebi bato mosusu oyo ‘balandaka bato ebele.’ (Exode 23:2) Yo olingi nde te kozwa ekateli oyo eleki malamu? Ndenge nini okoki kosala yango? Okosala yango soki olandi toli ya Biblia oyo elobi ete: “Bómindimisa bino moko nini wana mokano ya Nzambe oyo ezali malamu mpe ekoki kondimama mpe ezali ya kokoka.” (Baloma 12:2) Yehova azali “Nzambe ya esengo,” mpe alingi yo ozala na esengo. (1 Timote 1:11; Mosakoli 11:9) Mitinda ya Biblia ezali mpo na bolamu na yo. Ya solo, okoki komona lokola ete ezali kotya yo nsinga na nkingo. Kasi, yebá ete ezali nde mpo na kobatela yo.
Na ntembe te, okoki kotyela Biblia motema. Soki ondimi kotosa mitinda na yango, okosepelisa Yehova mpe okozwa matomba mingi.—Yisaya 48:17.
Okoki kokuta masolo mosusu ya “Mituna oyo bilenge batunaka . . .” na Internet, na esika oyo: www.watchtower.org/ypf
[Maloba na nse ya lokasa]
^ par. 17 Oyo ezali bankombo topesi bango kopesa na lisolo oyo.
MITUNA YA KOMANYOLA
◼ Nini ekoki kosala ete okakatana mpo na kotosa mitinda ya Biblia?
◼ Mpo na nini osengeli komindimisa ete kotosa mitinda ya Nzambe ezali likambo oyo eleki malamu?