Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ntina ya kotyela biblia motema

1. Eyokani na masolo ya kala

1. Eyokani na masolo ya kala

Ekozala mpasi moto atyela buku moko motema soki makambo mosusu oyo yango elobeli ezali solo te. Na ndakisa, soki ozali kotánga buku moko ya istware oyo elobi ete Etumba ya Mibale ya mokili mobimba esalemaki na bambula ya 1 800 to ebengi prezida ya États-Unis amperɛrɛ, okomituna soki makambo mosusu oyo buku yango elobeli ezali mpenza solo, boye te?

TII lelo oyo, moto moko te asilá komonisa ete makambo oyo ezali na Biblia eyokani te na masolo ya kala. Biblia elobeli bato oyo bazalaki mpenza na bomoi mpe masolo ya makambo oyo esalemaki mpenza.

Bato.

Bato oyo batyolaka Biblia batyaki ntembe ete Ponsi Pilato, Moloma oyo azalaki guvɛrnɛrɛ ya Yudea mpe atikaki ete bákakisa Yesu na nzete, azalaká te. (Matai 27:1-26) Na 1961, bamonaki na engumba Césarée, oyo ezali pembeni ya Mbu ya Meditelane, libanga moko oyo ezalaki na makomi oyo emonisaki polele ete Pilato ayangelaki Yudea.

Liboso ya 1993, longola Biblia, eloko mosusu te emonisaki ete Davidi, elenge ya mpiko oyo azalaki mobateli ya bampate mpe na nsima akómaki mokonzi ya Yisalaele, azalaká na bomoi. Kasi na mbula wana, bato ya mayele oyo bayekolaka biloko ya kala bakundolaki na nɔrdi ya Israël, libanga moko ya moindo ya ekeke ya libwa liboso ya ntango na biso (L.T.B.). Bato mosusu ya mayele balobi ete libanga yango ezali na makomi oyo: “Ndako ya Davidi” mpe “mokonzi ya Yisalaele.”

Masolo.

Banda kala tii na bambula oyo euti koleka, bato mingi ya mayele batyaki ntembe ete ekólo ya Edome ezalaki kobundisa Yisalaele te na ntango ya Davidi, ndenge Biblia elobi. (2 Samwele 8:13, 14, Bible na lingala ya lelo oyo) Bazalaki koloba ete Edome ezalaki na ebele ya babateli ya bampate na ntango wana mpe ezali kaka bambula mingi na nsima nde ekómaki ekólo oyo ebongisami mwa malamu to ezwaki makoki ya kobundisa Yisalaele. Kasi, na kotalela biloko oyo bauti kokundola, zulunalo moko (Biblical Archaeology Review) elobi ete: “Banda kala mpenza [koleka ndenge tozalaki kokanisa liboso], Edome ezalaki ekólo oyo bato bazalaki kosala misala ndenge na ndenge, se ndenge Biblia elobi.”

Batitre oyo ebongi.

Bakonzi ndenge na ndenge bayangelaki mokili na boumeli ya mbula soki 1600 oyo Biblia ekomamaki. Soki Biblia elobeli mokonzi moko boye, esalelaka ntango nyonso titre to nkombo ya lokumu oyo bazalaki mpenza kobenga ye. Na ndakisa, ntango elobeli Elode Antipasi, esaleli titre na ye mpenza, “moyangeli ya etúká”; mpe ebengi Galio “prokonsili.” (Luka 3:1; Misala 18:12) Ezela 5:6 elobi ete Tatenai azalaki guvɛrnɛrɛ ya etúká ya Perse oyo ezalaki “na ngámbo ya ebale,” elingi koloba Ebale Efalata. Mbongo moko ya ebende, oyo ebimisamaki na ekeke ya minei L.T.B., ezali mpe na maloba ya ndenge wana oyo emonisi ete Mazaeus, moto ya Perse oyo azalaki guvɛrnɛrɛ, azalaki moyangeli ya etúká oyo ezalaki “na ngámbo ya ebale.”

Bosolo ezali na ntina mingi ata na makambo oyo ekoki komonana mike mpenza. Soki tokoki kotyela bakomi ya Biblia motema ata na makambo ya mike, yango esengeli nde te kotinda biso tótyela bango motema na makambo mosusu oyo bakomaki?