Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mituna oyo bilenge batunaka

Ndenge nini nakoki kolonga mitungisi na kelasi?

Ndenge nini nakoki kolonga mitungisi na kelasi?

“Mitungisi na kelasi ekitaka te ntango moto akómi mokóló, kasi kaka makambo oyo ememaka yango nde ebongwanaka.”​—James, Nouvelle-Zélande. *

Nazalaki kokutana na mitungisi mingi na kelasi mpe mbala mingi nazalaki koyoka mposa ya kolela mpe koganga.”​—Sharon, États-Unis.

OMONAKA ete baboti na yo bayebaka te mitungisi oyo okutanaka na yango na kelasi? Bakoki koyebisa yo ete ozali na banyongo ya kofuta te, libota ya koleisa te to patrɔ oyo okolinga kosepelisa. Atako bongo, okoki komona lokola nde mitungisi oyo okutanaka na yango na kelasi ekokani na oyo ya baboti na yo mbala mosusu kutu eleki mosika.

Kolongwa kaka na ndako mpe kokende na kelasi ekoki kozala motungisi. Tara, oyo afandaka na États-Unis alobi boye: “Bana-kelasi bazalaki mbala mingi kobunda na kati ya bisi oyo ezalaki komema biso na eteyelo. Sofele azalaki kotɛlɛmisa motuka mpe biso nyonso tozalaki kokita mpe yango ezalaki kosala ete tókóma na retare ya miniti ntuku misato to koleka.”

Mitungisi ekitaka soki okómi na kelasi? Te! Mbala mosusu makambo ezali awa na nse ekómelaki mpe yo.

Mitungisi ya balakisi.

“Balakisi na ngai balingaka kaka nabima moto ya liboso mpe nasilisa kelasi na bapwɛ ebele; yango wana nabomaka nzoto mpo nasepelisa bango.”​—Sandra, Fidji.

“Balakisi batindikaka bana-kelasi, mingimingi oyo bazali na mayele básala nyonso mpo na kobima bato ya liboso. Balakisi batungisaka bango mpo bálonga kaka.”​—April, États-Unis.

“Ata soki omityeli mikano ya malamu na bomoi, balakisi mosusu bakomona lokola ozali na ntina te soki olandi te toli na bango ya komityela mikano ya kotánga na iniversite.”​—Naomi, États-Unis.

Okutanaka na mitungisi ya balakisi?

Mitungisi ya baninga.

“Na eteyelo ya ntei, bana basalaka makambo na lipanda mpe bazalaka batomboki. Soki osali lokola bango te, bakobanda kokima yo.”​—Kevin, États-Unis.

“Mikolo nyonso, nakutanaka na komekama ya komɛla masanga mpe kosangisa nzoto. Ntango mosusu ezalaka mpasi koboya kosala yango.”​—Aaron, Nouvelle-Zélande.

“Nazali sikoyo na mbula 12 mpe mokakatano monene oyo nazali na yango ezali ete baninga batindikaka ngai na makasi ete nabimaka na bana mibali. Mwana-kelasi nyonso alobaka, ‘Mokolo nini okozwa mwa moto na yo?’”​—Alexandria, États-Unis.

“Bazalaki kotya ngai mpanzi likoló nabima na mwana mobali moko. Ntango naboyaki balobaki na ngai ete nasangisaka nzoto na baninga na ngai basi. Mpe nazalaki kaka na mbula zomi na ntango wana!”​—Christa, Australie.

Okutanaka na mitungisi ya baninga?

Mitungisi ya kozanga koyeba ndenge baninga ya kelasi bakosala soki bayebi bindimeli na yo.

“Ezalaka mpasi koyebisa baninga ya kelasi ete ozali Motatoli ya Yehova mpo oyebi te ndenge nini bakobanda kotalela yo. Okoki kobanga ete bakomona yo lokola moto moko ya ntina te.”​—Carol, Hawaii.

“Na eteyelo ya ntei, bana-kelasi bamipesaka mingi na komɛla bangi, masanga mpe kosangisa nzoto. Esalaka mpenza mpasi mpo olingi te ete bana-kelasi básɛka yo ndenge okeseni na bango mpo ozali kotosa mitinda ya Biblia.”​—Susan, États-Unis.

Okutanaka na mitungisi oyo etali bindimeli na yo?

Makambo mosusu oyo etungisaka.

Poná likambo moko to bakisá oyo etungisaka yo mingi.

  • Baekzamɛ

  • Badevuare

  • Makambo oyo baboti bazelaka osala

  • Omityelaka mikano oyo okokaka kokokisa te

  • Banyokoli mpe baoyo balukaka kosangisa nzoto na bana-kelasi

  • Makambo mosusu ․․․․․

Makambo mitano mpo na kokitisa mitungisi

Mpo na koloba solo, okoki te kolikya ete okosilisa kelasi kozanga ete okutana na motungisi ata moko. Ya solo, soki mitungisi eleki, moto akoki konyokwama. Mokonzi Salomo akomaki ete: “Monyoko ekoki kotinda moto ya bwanya asala makambo lokola moto ya ligboma.” (Mosakoli 7:7NW) Kasi, osengeli te kotika ete mitungisi ekómisa yo ligboma. Mpo na yango, osengeli koyeba ndenge okoki kolonga mitungisi na ndenge ebongi.

Kolonga mitungisi ezali lokola kotombola ebende. Mpo na kolonga, moto oyo alingi kosala yango, asengeli komibongisa malamu. Asengeli kotombola yango na ndenge ebongi mpe asengeli te kotombola ebende ya kilo mingi koleka. Soki azwi bibongiseli wana liboso, akoki kokembisa nzoto na ye kozanga ete abebisa yango. Soki asali bongo te, akoki kozoka na kati ya nzoto to mokuwa ekoki kobukana.

Ndenge moko mpe, okoki kolonga mitungisi oyo ozali kokutana na yango mpe kokokisa malamu mosala oyo olingi kosala kozanga ete ominyokola. Ndenge nini? Salelá makambo oyo elandi:

  1. Luká koyeba makambo oyo ebimisaka mitungisi. Lisese moko elobi ete: “Moto ya mayele akososola mabe liboso mpe akomibomba.” (Masese 22:3) Kasi, okoki te komibomba liboso ya mitungisi soki oyebi te makambo oyo ebimisaka yango. Na yango, okoki kobwaka lisusu liso na makambo oyo okomaki. Makambo nini etungisaka yo mingi?

  2. Luká na kati ya mikanda. Na ndakisa, soki badevuare eleki mingi mpe ebandi kotungisa yo, okoki koluka makanisi na lisolo “Mituna oyo bilenge batunaka​—Ndenge nini nakoki kozwa ntango ya kosala badevuare na ngai?” na Lamuká! ya 22 Yanuali 2004, na Lifalanse. Soki bazali kotya yo mbamba osala pite na moninga moko ya kelasi, okoki kozwa toli ya malamu na lisolo “Mituna oyo bilenge batunaka​—Nakosala nini soki moto moko asɛngi ngai tósangisa nzoto?” na Lamuká! ya Yuli-Sɛtɛmbɛ 2007.

  3. Bongisá eyano oyo okopesa. Soki ozali komitungisa mpo oyebi te ndenge baninga na yo ya kelasi bakosala ntango bakoyeba ete ozali Motatoli ya Yehova, kozela te tii ntango bakotuna yo, bongo oluka ndenge okoloba to okosala. (Masese 29:25) Kelsey, elenge moko ya mbula 18 alobi ete: “Eloko esalisaki ngai nalonga ezali ete nazalaki komibongisa liboso bátuna ngai motuna yango. Nazalaki kobongisa liboso biyano oyo nakopesa soki batuni ngai bindimeli na ngai.” Aaron, elenge moko ya Belgique, oyo azali na mbula 18 asalaki mpe bongo. Alobi boye: “Nazalaki kokanisa liboso na mituna oyo bakoki kotuna ngai, mpe nazalaki kobongisa biyano na mituna yango. Soki namibongisi te, nakokoka te koyanola ntango batuni ngai likambo oyo etali mateya na biso.”

  4. Kozongisaka makambo nsima te. Makambo oyo ekoki kosila soki tokimi yango ezali mingi te. Kutu, mbala mingi ekómaka nde makasi koleka, ata mpe ebakisaka mitungisi. Na ndakisa, komiyebisa mbala moko ete ozali Motatoli ya Yehova ekoki mpenza kobatela yo. Marchet, oyo azali sikoyo na mbula 20 alobi boye: “Mbula nyonso, soki tobandi kelasi, nazalaki kobanda lisolo moko oyo nayebi ete ekoki kopesa ngai libaku ya koyebisa bato bindimeli na ngai oyo euti na Biblia. Nazalaki komona ete soki namibimisi mbala moko te lokola Motatoli, ezalaki kokóma mpasi. Koyebisa basusu makambo oyo nandimaka mpe kotosa yango na boumeli ya mobu mobimba, ezalaki kosalisa ngai mingi.”

  5. Sɛngá básalisa yo. Ata moto oyo amemaka ebende ya kilo mingi, kilo ya ebende mosusu ekoki kosukisa ye. Yo mpe ozali na esika oyo okoki kosuka. Kasi, osengeli te komema kilo yo moko. (Bagalatia 6:2) Mpo na nini te kosolola na baboti na yo to baklisto mosusu oyo bakɔmeli na elimo? Lakisá bango biyano oyo okomaki na lisolo oyo. Sɛngá bango báyebisa yo ndenge okoki kosala mpo na kolonga mitungisi mosusu oyo ozali na yango. Liz, elenge mwasi moko ya Irlande, ayebisaki tata na ye ndenge abangaka básɛka ye mpo azali Motatoli. Liz alobi boye: “Mikolo nyonso, tata azalaki kobondela elongo na ngai liboso atika ngai na eteyelo. Nazalaki koyoka ntango nyonso ete nabatelami.”

Komitungisa ya malamu

Ekoki kozala mpasi ondima ete komitungisa ezalaka mpe likambo ya malamu. Mpo na nini? Mpamba te ekoki komonisa ete ozali zoba te mpe lisosoli na yo elɛmbi te. Yoká ndenge Biblia elobeli moto amitungisaka ata na likambo moko te: “Okolala kino ntango nini kozanga kosala eloko? Ntango nini okolamuka na mpɔngi? Kolala moke. Kopema moke. Kokanga mabɔkɔ mpe koningisa misapi. Na mbalakaka, biloko nyonso ekei, lokola nde moyibi oyo azali na mondoki akei na yango.”​—Masese 6:9-11, Contemporary English Version.

Heidi, elenge moko ya mbula 16, alobeli makambo na mokuse. Alobi boye: “Kelasi ekoki komonana lokola esika moko ya mabe mpenza, kasi mitungisi oyo okutanaka na yango kuna ezali ndenge moko na oyo okokutana na yango na mosala.” Ya solo, kolonga mitungisi ezali likambo ya pɛtɛɛ te, kasi soki obundi na ndenge ebongi, mitungisi yango ekosala yo mabe te, kutu ekoki nde kokómisa yo makasi.

 

^ par. 3 Oyo ezali bankombo topesi bango kopesa.

MITUNA YA KOMANYOLA

  • Makambo nini ekoki komonisa ete ozali kotungisama?

  • Mpo na nini komityela mikano oyo okokoka kokokisa te ekoki kobakisela yo mitungisi?

  • Okoki kosolola na nani soki omoni ete mitungisi eleki yo motó?