Lakisá makambo oyo ezali na kati

Engebene Biblia

Yesu abotamaki na dati nini?

Yesu abotamaki na dati nini?

BUKU moko (Encyclopedia of Early Christianity) elobi ete “dati mpenza oyo Klisto abotamaki eyebani te.” Nzokande na mokili mobimba, bamilio ya bato oyo bamibengaka baklisto basepelaka mbotama ya Yesu na mokolo ya 25 Desɛmbɛ. Kasi, dati yango ezali ata esika moko te na kati ya Biblia. Yesu abotamaki mpenza na sanza ya Desɛmbɛ?

Atako Biblia epesi te dati ya sikisiki oyo Yesu abotamaki, makambo oyo yango elobi emonisi ete Yesu abotamaki na Desɛmbɛ te. Longola yango, ezali na makambo mosusu oyo ekoki kosalisa biso tóyeba ntina oyo bato baponá mokolo ya 25 Desɛmbɛ mpo na kosepela mbotama ya Yesu.

Mpo na nini akokaki kobotama na Desɛmbɛ te?

Yesu abotamaki na Beteleme, engumba moko ya Yudea. Evanzile ya Luka elobi boye: “Na mokili moko wana mpe ezalaki na babateli ya bampate oyo bazalaki kofanda libándá mpe kolekisa bokɛngɛli ya butu na kobatela bitonga na bango.” (Luka 2:4-8) Yango ezalaki momeseno na bango. Buku moko (Daily Life in the Time of Jesus) elobi boye: “Bampate ezalaki kolekisa basanza mingi na libándá.” Kasi, babateli ya mpate bakokaki kozala libándá ná bampate na bango na butu, na malili wana ya Desɛmbɛ? Buku yango ebakisi boye: “Na eleko ya mpiɔ, bazalaki kotika bampate na kati ya ndako. Likambo wana kaka emonisi ete dati wana oyo batyá mpo na kosepela mbotama ya Yesu ezali solo te, mpamba te Baevanzile emonisi ete babateli ya mpate bazalaki kobatela bampate na bango na libándá.”

Yango eyokani na likambo mosusu oyo Luka alobeli na Evanzile na ye: “Na mikolo wana Kaisala Augusto abimisaki mobeko ete mabelé mobimba oyo efandami bákomisa nkombo; (bokomisi nkombo wana ya liboso esalemaki ntango Kiliniusi azalaki guvɛrnɛrɛ ya Silia;) mpe bato nyonso bazalaki kokende kokomisa nkombo, moto na moto na engumba na ye mpenza.”​—Luka 2:1-3.

Ekoki kozala ete Augusto asɛngaki Bayuda bákende kokomisa nkombo mpo na koyeba motángo ya bato oyo basengeli kofuta mpako to baoyo bakoki kosala mosala ya soda. Mpo na kotosa mobeko yango, Malia, atako zemi na ye ekɔmelaki mpenza, andimaki kosala mobembo molai ya kilomɛtrɛ 150 elongo na mobali na ye, Yozefe, longwa na Nazalete tii na Beteleme. Kanisá naino. Augusto, guvɛrnɛrɛ oyo azalaki koyokana mpenza te na Bayuda, akokaki kosɛnga bato yango oyo bazalaki kotosa ye te básala mobembo molai ya ndenge wana na eleko ya malili makasi?

Likambo ya kokamwa, ata bato ya mayele na masolo ya kala mpe balimboli ya Biblia bandimaka te ete Yesu abotamaki na mokolo ya 25 Desɛmbɛ. Buku moko (Our Sunday Visitor’s Catholic Encyclopedia) elobi boye: “Bato mingi bandimaka te ete Yesu abotamaki na mokolo ya 25 Desɛmbɛ.”

Biblia emonisi polele ete Yesu abotamaki na sanza ya Desɛmbɛ te

Ntina oyo baponá dati ya 25 Desɛmbɛ

Bankama ya bambula nsima ya liwa ya Yesu, dati ya 25 Desɛmbɛ eponamaki lokola mokolo ya mbotama na ye. Mpo na nini? Bato mingi ya mayele na masolo ya kala balobaka ete na eleko wana oyo ekómá lelo dati ya mbotama ya Yesu, bapakano bazalaki kosala bafɛti ya banzambe na bango.

Na ndakisa, buku moko (Encyclopædia Britannica) elobi boye: “Bato mingi ya mayele balobaka ete bato mosusu oyo bazalaki komibenga baklisto bazwaki dati wana ya 25 Desɛmbɛ, mokolo oyo bazalaki kosepela mbotama ya nzambe moi (dies solis invicti nati) mpe bakómisaki yango fɛti ya boklisto; na dati wana, Baloma bazalaki kosepela mbotama ya moi, nsuka ya eleko ya malili mpe ebandeli ya eleko ya molunge.”

Buku mosusu (The Encyclopedia Americana) elobi boye: “Ntina oyo baponá kosepela mbotama ya Yesu na mokolo ya 25 Desɛmbɛ eyebani mpenza te, kasi bato mingi balobaka ete dati yango eponamaki mpo ekokana na ntango oyo bapakano bazalaki kosala bafɛti na bango na eleko ya malili, ntango moi ezalaki koumeli mingi koleka butu, mpo na kosepela ‘kobotama ya moi.’ . . . Na eleko yango, Baloma bazalaki mpe kosala fɛti ya Saturne, nzambe ya bilanga mpe ya kolamuka ya moi.” Na ntango ya bafɛti yango, bazalaki mbala mingi kosala misala ya mbindo mpe komipesa na bisengo oyo ezangi ndelo. Likambo ya kokamwa, makambo yango emonanaka mpe lelo oyo na mokolo ya 25 Desɛmbɛ.

Ndenge oyo tokoki kokumisa Klisto

Bato mosusu balobaka ete ata soki toyebi mpenza te mokolo Yesu abotamaki, tosengeli kaka kosepela mbotama na ye. Mpo na bango, kosala fɛti yango malamu ekumisaka Klisto.

Ya solo, kobotama ya Yesu ezali likambo ya ntina mpenza na kati ya Biblia. Biblia elobi ete ntango Yesu abotamaki, ebele ya baanzelu babimaki mpe bazalaki kokumisa Nzambe na maloba oyo: “Nkembo na Nzambe kuna na bisika ya likoló, mpe kimya na mabelé na kati ya bato oyo ye amoniseli motema boboto.” (Luka 2:13, 14) Atako bongo, vɛrsɛ moko te ya Biblia emonisi ete tosengeli kosepelaka mbotama ya Yesu. Nzokande, Biblia emonisi polele ete tosengeli kokanisaka liwa na ye, likambo oyo Batatoli ya Yehova basalaka mbala moko na mbula. (Luka 22:19) Wana ezali lolenge moko ya kokumisa Yesu.

Na butu ya nsuka ya bomoi na ye awa na mabelé, Yesu alobaki boye: “Bozali baninga na ngai soki bozali kosala oyo ngai nazali kotinda bino.” (Yoa. 15:14) Abakisaki boye: “Soki bolingaka ngai, bokotosa bakomandema na ngai.” (Yoa. 14:15) Yango emonisi ete lolenge eleki malamu ya kokumisa Yesu Klisto ezali koyekola mpe kosalela mateya na ye.