Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ekoki kosalema ete moto alinga banguna na ye?

Ekoki kosalema ete moto alinga banguna na ye?

Biblia elobi nini?

Ekoki kosalema ete moto alinga banguna na ye?

Yesu Kristo alobaki ete: “Ngai nalobi na bino ete: Bókoba kolinga banguna na bino mpe kobondela mpo na baoyo bazali konyokola bino; mpo bómonisa ete bozali bana ya Tata na bino oyo azali na likoló, mpo abimiselaka bato mabe ná bato malamu moi na ye mpe anɔkiselaka bayengebene ná bato oyo bazangi boyengebene mbula.”​—Matai 5:44, 45.

OMONAKA ete lingomba etindaka bato bálingana mpe bázala na kimya to etindaka nde bango báyinana mpe bázala na mobulu? Lelo oyo, bato mingi bamonaka ete lingomba etindaka nde bato báyinana mpe bázala na mobulu, mingimingi ntango mangomba ekɔtaka na makambo ya politiki, ya mboka to ekólo. Kasi, ndenge maloba ya Yesu amonisi yango, baoyo bazali mpenza ‘bana ya Nzambe’ bamekolaka bolingo na ye​—bamonisaka yango ata epai ya banguna na bango.

Mosaleli mosusu ya Nzambe alobaki boye: “Soki monguna na yo azali na nzala, pesá ye eloko alya; soki azali na mposa ya mai, pesá ye mai amɛla; . . . Kotika mabe elonga yo te, kasi saláká malamu mpo na kolonga mabe.” (Baroma 12:20, 21) Kasi, bolingo ya ndenge wana ekoki mpenza komonana na mokili oyo ezangi bomoko? Kozanga kokakatana, Batatoli ya Yehova bakoyanola ete: Ɛɛ! Tótalela ndakisa ya Yesu mpe ya bayekoli na ye ya ekeke ya liboso.

Balingaki banguna na bango

Yesu ateyaki solo na ntina na Nzambe, mpe bato mingi bayokaki ye na esengo. Kasi, bato mosusu, baboyaki koyoka ye; ekoki kozala ete bamosusu basalaki bongo mpo bazangaki boyebi. (Yoane 7:12, 13; Misala 2:36-38; 3:15, 17) Atako bongo, Yesu akobaki kosakwela bato nyonso ata mpe banguna na ye nsango ya lobiko. (Marko 12:13-34) Mpo na nini? Ayebaki ete bato mosusu bakoki kotika banzela na bango ya mabe, kondima ye lokola Masiya, mpe koyokanisa bomoi na bango na mateya ya solo oyo ezali na Liloba ya Nzambe.​—Yoane 7:1, 37-46; 17:17.

Ata na butu oyo banguna na ye oyo bazalaki na bibundeli bakangaki ye kozanga ete asala mabe, Yesu amoniselaki bango bolingo. Kutu, abikisaki moko ya bato oyo bayaki kokanga ye, oyo ntoma Petro akataki litoi na mopanga. Na libaku yango, Yesu ayebisaki etinda moko oyo tii lelo oyo bayekoli na ye ya solo balandaka. Alobaki boye: “Baoyo nyonso basalelaka mopanga bakokufa na mopanga.” (Matai 26:48-52; Yoane 18:10, 11) Mbula soki 30 na nsima, Petro akomaki boye: “Kristo mpe anyokwamaki mpo na bino, atikeli bino ndakisa mpo bólanda matambe na ye malamumalamu. . . . Ntango azalaki konyokwama, azalaki kokanela moto te, kasi azalaki ntango nyonso komitika na mabɔkɔ ya [Nzambe].” (1 Petro 2:21, 23) Emonani polele ete Petro ayekolaki nde bolingo yango, kasi te kozongisa mabe na mabe, nzela oyo bakristo ya solo basengeli kolanda.​—Matai 5:9.

Baoyo nyonso ‘balandaka matambe ya Yesu malamumalamu’ bamonisaka bolingo na ye, makanisi na ye ya malamu. Na 2 Timote 2:24, Biblia elobi boye: “Moombo ya Nkolo asengeli kowelana te, kasi asengeli nde kozala na boboto na bato nyonso, . . . oyo amipekisaka na ntango basali ye mabe.” Bizaleli wana esengeli komonanaka na bomoi ya mokristo, bomoi ya kimya mpe ya kozongisa boyokani.

‘Bantoma ya Kristo,’ bato ya kimya

Epai ya baninga na ye bakristo, ntoma Paulo akomaki boye: “Tozali bantoma na esika ya Kristo. . . Na esika ya Kristo, tozali kobondela ete: ‘Bózonga na boyokani elongo na Nzambe.’” (2 Bakorinti 5:20) Baambasadɛrɛ to bantoma bakɔtaka te na makambo ya politiki to ya basoda ya mikili oyo bakei kosala. Kutu, baboyaka kokɔta na makambo ya mokili yango. Mosala na bango ezalaka ya kozala bamonisi mpe kokɔtela guvɛrnema oyo etindi bango.

Ezali mpe bongo mpo na bantoma mpe batindami ya Kristo. Batalelaka Yesu lokola Mokonzi mpe bakɔtelaka bokonzi na ye ya likoló na ndenge basakolaka nsango malamu na kimya nyonso. (Matai 24:14; Yoane 18:36) Na yango, Paulo akomelaki bakristo ya mikolo na ye boye: “Tozali kobunda etumba te na kotalela ndenge tozali na mosuni. Mpo bibundeli ya etumba na biso ezali ya mosuni te, kasi ezali na nguya oyo euti na Nzambe mpo na kokweisa . . . makanisi mpe eloko nyonso etombwani oyo ezali kotɛmɛla boyebi ya Nzambe.”​—2 Bakorinti 10:3-5; Baefese 6:13-20.

Ntango Paulo akomaki maloba wana, bakristo bazalaki konyokwama na mikili mingi. Mpo na koloba solo, bakokaki kozongisa mabe. Na esika ya kosala bongo, bakobaki kolinga banguna na bango mpe kosakola nsango ya kozongisa boyokani epai ya moto nyonso oyo alingaki koyoka. Buku moko (Encyclopedia of Religion and War) elobi boye: “Bayekoli ya Yesu ya ekeke ya liboso baboyaki bitumba mpe mosala ya soda,” bazalaki kotalela misala yango ete “eyokani te na bolingo oyo Yesu alakisaki mpe etinda oyo apesaki ete moto alinga banguna na ye.” *

Na ndakisa ya bakristo ya ekeke ya liboso, Batatoli ya Yehova bandimaka Yesu lokola Mokonzi na bango. Bandimaka ye mpe lokola Mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe​—guvɛrnema ya likoló oyo mosika te ekotya kimya mpe libateli ya seko na mabele. (Danyele 2:44; Matai 6:9, 10) Na yango, lokola baambasadɛrɛ mpe batindami, bazali kosakola makambo kitoko ya Bokonzi yango. Bazali mpe kosala makasi mpo na kozala bana-mboka ya malamu na mikili oyo bango bafandi, bafutaka bampako na bango mpe batosaka mobeko ya mboka oyo ezali kobuka te mobeko ya Nzambe.​—Misala 5:29; Baroma 13:1, 7.

Kasi, likambo ya mawa, lokola bakristo ya ekeke ya liboso, ntango mosusu bato bakoselaka Batatoli makambo mpe banyokolaka bango. Atako bongo, bazongisaka mabe ata moke te. Kutu, balukaka nde kozala “na kimya na bato nyonso,” na elikya ete bato mosusu oyo bazali kotɛmɛla bango bakoki ‘kozonga na boyokani elongo na Nzambe’ mpe kokóma na elikya ya bomoi ya seko. *​—Baroma 12:18; Yoane 17:3.

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 13 Buku moko (Encyclopedia of Religion and War) elobi ete: “Bakomi oyo bazalaki bakristo oyo basalaki mosala na bango liboso ya ntango ya Constantin, [amperɛrɛ Moroma oyo ayangelaki na mobu 306-337 T.B.] bango nyonso bamonisaki ete ezali mabe koboma bato na bitumba.” Makambo ebongwanaki mpenza ntango lipɛngwi oyo Biblia esakolaki epalanganaki.​—Misala 20:29, 30; 1 Timote 4:1.

^ par. 15 Lokola bakristo ya ekeke ya liboso, Batatoli ya Yehova bakendaka liboso ya Leta ntango esengeli mpo na koluka bonsomi na makambo ya losambo.​—Misala 25:11; Bafilipi 1:7.

OSILÁ KOMITUNA?

▪ Ndenge nini bakristo basengeli kosalela banguna na bango makambo?​—Matai 5:43-45; Baroma 12:20, 21.

▪ Ntango anyokwamaki, Yesu asalaki nini?​—1 Petro 2:21, 23.

▪ Mpo na nini bakristo ya ekeke ya liboso baboyaki bitumba?​—2 Bakorinti 5:20; 10:3-5.