Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Kokutanaka na mokano ya kobalana

Kokutanaka na mokano ya kobalana

Biblia elobi nini?

Kokutanaka na mokano ya kobalana

Julie ná Lee, bazalaki kokutanaka na mokano ya kobalana mpe bazalaki na ekateli makasi ya kobatela etamboli ya malamu. * Kasi, mokolo moko na mpokwa ntango bazalaki kaka bango mibale, mposa ya kosangisa nzoto eyaki makasi. Likambo ya malamu, liboso ete mposa wana emema bango mosika mpe básala lisumu ya monene, makanisi ya malamu ezongelaki bango.

LOSAMBO ya solo esɛngi kaka te kokendaka na makita pɔsɔ nyonso. Ezali nde lolenge ya bomoi oyo esimbi etamboli mpe bizaleli malamu ya moto. Yesu Kristo alobaki ete kaka baoyo bazali “kosala mokano” ya Nzambe nde babongi kondimama na ye. (Matai 7:21) Mpo na kosepelisa Nzambe, tosengeli kosala ete ndenge na biso ya kozala na bana mibali soki tozali mwasi to ndenge na biso ya kozala na bana basi soki tozali mobali ezala pɛto mpe ntango tozali kokutanaka mingi elongo na mwasi to mobali ezala na mokano ya kobalana.

Ndenge nini okoki kobatela etamboli ya pɛto liboso ya Nzambe, mingimingi lokola mokili oyo ezali kotinda bato oyo balakani libala bátikala pɛto te na etamboli na bango? Ya liboso, yebá ete Nzambe atyaki mitinda na ye mpo na litomba na biso. Ya mibale, ndimá ete ozali moto ya kozanga kokoka. Ya misato, bómityela bandelo. Mpe ya minei, bópesa Nzambe esika. Tótalela makanisi yango mokomoko.

Mitinda etyami mpo na litomba na biso

Na Yisaya 48:17, 18, tozali kotánga boye: “Ngai Yehova nazali Nzambe na yo, Moto oyo azali koteya yo mpo na litomba na yo moko, Moto oyo azali kotambwisa yo na nzela oyo osengeli kotambola. Ee soki otyaka mpenza likebi na mibeko na ngai! Mbɛlɛ kimya na yo ekómi lokola ebale, mpe boyengebene na yo lokola mbonge ya mbu.”

Ya solo, mibeko mpe mitinda oyo ezali na Biblia, Liloba ya Nzambe oyo ekomamaki na lisalisi ya elimo santu na ye, ezali mpo na litomba na biso. (2 Timote 3:16, 17) Emonisaka polele ete Mozalisi na biso amibanzabanzaka mpo na biso mpe alingaka ete tózala na esengo mpe tólonga na makambo nyonso ya bomoi. (Nzembo 19:7-10) Yo mpe oyokaka ndenge wana na motema? Soki ezali bongo, ozali komonisa bwanya ya solo.

Ndimá ete ozali moto ya kozanga kokoka

Lokola moninga ya solosolo, Yehova ayebisaka biso makambo na bosembo; ayebisaka biso mpenza solo oyo etali biso. Na ndakisa, Liloba na ye ekebisaka biso ete “motema ezali na bokosi mingi koleka eloko mosusu nyonso mpe ezali eloko ya kosakana na yango te. Nani akoki koyeba yango?” (Yirimia 17:9) Biblia elobi mpe ete: “Ye oyo azali kondimela motema na ye moko azali zoba, kasi ye oyo azali kotambola na bwanya nde akobika.”​—Masese 28:26.

Ndenge nini mobali ná mwasi oyo bazali kokutanaka na mokano ya kobalana bakoki komonisa ete bazali kondimela motema na bango moko? Bakomonisa yango, soki bazali koluka kozala na bisika oyo ekoki kosala ete bámekama na likambo etali kosangisa nzoto, na ndakisa ya mobali ná mwasi oyo tolobelaki na ebandeli ya lisolo. Lolenge mosusu ezali ya kotyola toli ya bwanya ya baboti oyo babangaka Nzambe. Baboti yango bayebi ete mposa ya kosangisa nzoto, mingimingi na bolenge ekoki kozala lokola vitɛsi ya motuka oyo soki sofɛlɛ akebi te ekoki kobimisa likama.

Na yango, bilenge oyo bazali ‘kotambola na bwanya ya Nzambe’ bazwaka na lisɛki te toli ya baboti na bango. Ya solo, babombaka na motema toli ya baboti oyo balingaka bango mingi mpe bayebisaka bango ata makambo oyo bilenge balingaka te koyoka. Moto oyo alingi yo koleka ezali Yehova Nzambe, Tata na yo ya likoló oyo apesi yo toli ete “longolá mitungisi na motema na yo, mpe longolá mpasi na nzoto na yo.” (Mosakoli 11:9, 10) Ndenge nini okoki kosala yango? Na koboya kotikela bamposa mabe nzela.

Bómityela bandelo

“Bwanya ezali epai ya baoyo bapesanaka makanisi.” (Masese 13:10) Ntango kaka babandi kokutana mpo na libala, mwasi ná mobali ya ekɛngɛ basalelaka toli oyo mpe bayokanaka na kolanda Makomami mpo na makambo oyo bakoki kosala to te na ndakisa kosimbana na lobɔkɔ, koyambana, to kopesana bizi. Kolekisa ndelo to komityela motema koleka ndelo ezali lokola kokumba motuka na ndenge ya mabe. Ntango motuka ebaluki ezalaka lisusu ntango te ya koluka kolanda mibeko ya nzela!

Biblia elobi boye: “Moto oyo akebaka, amibatelaka po bapasi ézwa ye té; kasi bazoba bakebaka té pe basukaka mabe.” (Masese 22:3Bible na lingala ya lelo oyo) Mwasi ná mobali bakoki kopɛngola makama ntango bazali kokutana na esika ya bato ebele to soki bazalaka elongo na mokóló moko. Kosuka mabe mpo na bozoba ntango bozali kokutana mpo na libala ekoki kobebisa lisosoli, komiyoka ete ozangi kilo mpe okozanga limemya mpo na yo moko mpe mpo na moninga na yo, mpe nsɔni mpo na bato nyonso oyo bayebaki likambo yango, ata mpe bato ya libota na yo. Na yango, zalá na bokɛngi; ndimá kosalela mitinda ya Makomami mpe kangamá na yango!

Komisá Yehova ‘nsinga ya misato’

Libala ezali lokola nsinga oyo esalemi na bansinga misato, Nzambe nde azali nsinga ya libosoliboso. Mosakoli 4:12, elobi boye: “Nsinga oyo esalemi na bansinga misato ekatanaka nokinoki te.” Toli yango ekoki mpe kosalelama mpo na bato oyo bakutanaka mpo na kobalana. Baoyo balingaka ete Nzambe apambola bango bazwaka lipamboli yango soki mokomoko akangami na Nzambe. Nzembo 1:1-3 elobi boye: “Esengo na moto oyo atamboli na toli ya bato mabe te, . . . Kasi asepelaka na mobeko ya Yehova, mpe atángaka mobeko na ye na mongongo ya nse butu moi. . . . , mpe nyonso oyo azali kosala ekolonga.”

Ya solo, kolonga, ezala ntango bozali kokutana na mokano ya kobalana tii ntango bokobalana eyaka soki bozali kosala makambo ndenge Yehova alingi. Kutu, azali Mozalisi na biso, mpe lolango mpe libala ezali makabo kitoko oyo euti epai na ye. Mpo na yango, tosengeli mpenza kozwa yango na lisɛki te.​—Yakobo 1:17.

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 3 Bankombo mosusu ezali ya bango te.

OSILÁ KOMITUNA?

● Ndenge nini toyebi ete Nzambe alingaka bolamu na biso?​—Yisaya 48:17, 18.

● Likambo nini ya solo oyo etali biso tosengeli kondima?​—Yirimia 17:9.

● Sekele mpo na kolonga ntango bozali kokutana na mokano ya kobalana mpe na nsima na libala ezali nini?​—Nzembo 1:1-3.

[Elilingi na lokasa 11]

Ntango kaka babandi kokutana, mwasi ná mobali ya ekɛngɛ bayokanaka na kolanda Makomami na makambo oyo bakoki kosala to te na ndakisa kosimbana na lobɔkɔ, koyambana, to kopesana bizi