Makambo ezali koleka na mokili
Makambo ezali koleka na mokili
“Na Amerika, Nzambe ya bakristo akufi te, kasi azali mpenza makasi te na makambo na biso ya politike mpe na makambo etali mimeseno koleka eleko nyonso ya masolo ya bato oyo euti koleka.”—NEWSWEEK, ÉTATS-UNIS.
“Kobeba mpe mobulu oyo esalemi na makambo ya nkita ebimisi makambo mosusu: Babalani oyo bazali te na likoki ya koboma libala. Na ntango oyo ya mpasi, bato mingi bakómi komona ete kofanda elongo ezali kosɛnga mbongo mingi te ata soki bazali koyokana te.”—THE WALL STREET JOURNAL, ÉTATS-UNIS.
Ankɛti moko oyo esalemaki na Allemagne emonisi ete na basi misato oyo batunaki, moko ayekolaka makambo mosusu epai ya mwana na ye ya mwasi—na ndakisa ndenge ya kolata, ya kozala na baninga, to ndenge ya komitungisa mpambampamba te to komipesa kilo.—BERLINER MORGENPOST, ALLEMAGNE.
Elongaki mikrobɛ, ezali mpe kokoba kolonga
Zulunalo moko (International Herald Tribune) elobi ete: “Mbula 90 nsima ya grippe ya nsɔmɔ oyo ebomaki ebele ya bato, makila ya bato oyo babikaki na maladi yango, ezali kaka makasi ndenge ezalaki ntango ebatelaki bango na mikrobɛ oyo ebomaki ebele ya bato na 1918, mpe yango emonisi ete nzoto ya moto ezali na likoki ya kobunda na mikrobɛ ntango molai.” Nsima ya koyekola makila ya bato oyo babikaki na grippe espagnole, bato ya siansi bamonaki ete “baantikore ezali naino kosala mpo na kobundisa mikrobɛ oyo ememaki maladi wana.” Na nzela ya baantikore wana, bato yango basalaki mangwele (vaccin) moko oyo ebikisaki bampoko oyo batɔbɔlaki yango mikrobɛ ya maladi wana mabe. Bato ya siansi bakamwaki mingi na likoki oyo baantikore ezali na yango ya koyeba mikrobɛ oyo ekɔti na nzoto. Moto moko ya siansi alobi ete: “Nkolo apesá biso baantikore oyo eumelaka bomoi na biso mobimba. Maladi oyo ebomi yo te ekokómisa yo nde makasi.”
Mituna mpo na Nzambe
“Soki ozali Nzambe ya malamu, mpo na nini bampasi ezali?” Zulunalo moko ya Suède (Dagen) oyo ebimaka mokolo na mokolo elobi ete wana ezali moko ya mituna ya liboso oyo bana-kelasi ya Suède bakolinga kotuna Nzambe soki bazwi libaku ya kosala yango. Na ankɛti moko oyo esalemaki, mituna mosusu bato batunaki ezali oyo: “Ntina ya bomoi ezali nini?” mpe “Nini esalemaka nsima ya liwa?” Suède ezali ekólo oyo eyebani ete elingaka makambo ya Nzambe te. Atako bongo, momonisi ya ebongiseli ya bana-kelasi oyo bazali bakristo, oyo akambaki ankɛti yango alobi ete: “Mituna yango etunamaka kaka. Bilenge batunaka mingi mituna ya ndenge wana.”
Kokóma ebɔsɔnɔ ebakisaka esengo na libala
Bato ya mayele balobi ete: “Mibali mpe basi—ezala ya mbula nini—bazalaka na esengo makasi na libala na bango soki bakómi bibɔsɔnɔ.” Kozala lisusu te na likoki ya kosala misala ya mokolo na mokolo, ekoki kozala motungisi, kasi ekoki mpe kosala ete mwasi ná mobali bázala na bomoko. Mibange ya mibali balobaki ete bazalaka na ntango mingi ya esengo na basi na bango. Karen Roberto, mokambi ya ebongiseli moko na Virginie, États-Unis oyo etalelaka makambo ya mibange, alobi ete: “Kondima mokumba ya kobatela mpe mikumba oyo ekoki kozala ya sika to oyo esɛngi kotyela yango likebi koleka ndenge ezalaki liboso na libala na bango, epesaki mibali libaku ya kosunga mpe kolekisa ntango mingi elongo na basi na bango mpe yango esalisi bango bákóma na boyokani makasi na basi na bango.”