Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Natikaki kolinga bitumba

Natikaki kolinga bitumba

Natikaki kolinga bitumba

Lisolo ya Thomas Stubenvoll

NABOTAMAKI na engumba New York na mokolo ya 8 Novɛmbɛ 1944. Nakolaki na Sudi ya Bronx, oyo na ntango wana ekabolamaki na bakartye ya bato ya mposo ekeseni oyo bautaki na bikólo mosusu. Ntango nazalaki elenge, nazalaki kolekisa ntango mingi na babalabala, mpe mosika te nayebaki ete nasengeli te kokatisa ndelo ya bakartye ndenge na ndenge ya bato mosusu ya mobulu. Bato bazalaki kobanga bato wana ya mobulu mpo na makambo na bango ya mabe mpe ezaleli na bango ya nkandankanda.

Ntango nakómaki na mbula 12, nakɔtaki na etuluku moko ya bato ya mobulu. Tozalaki komibenga The Skulls (mokuwa ya motó). Ngai ná baninga na ngai, tozalaki kokɔta na engbunduka mpo na koyiba bakɛsi ya nguba mpe biloko mosusu ya kolya. Bilenge ya mobulu oyo bazalaki na mbula kobanda 13 tii 19 bazalaki kosala makambo ya mabe mingi koleka. Bazalaki kobunda bango na bango mpe kozokisana. Mokolo moko, batyaki moninga na ngai moko mbeli mpe akufaki na miso na ngai.

Nazalaki kolinga bitumba

Bomoi ya bato ya mobulu ekómisaki ngai mpenza te moto ya esengo. Nsima ya mwa mikolo, nazalaki kaka na mposa ya kolongwa na engumba oyo tozalaki. Noko na ngai Eddie abundaki etumba ya Corée, epai asalaki lokola moko ya basoda ya mai, na etuluku moko ya limpinga ya basoda ya États-Unis. Makambo oyo ayebisaki ngai mpo na basoda ya mai esepelisaki ngai mingi. Ayebisaki ngai ete soda oyo abundaka na mai azali soda oyo azali na disiplini mpe mobundi makasi oyo balakisi ye kobunda kozanga kolɛmba. Basoda yango bazalaki koloba Semper fidelis, na Latin oyo elimboli “kotikala sembo ntango nyonso,” yango ezalaki komonisa mobeko na bango makasi ya kotikala sembo mpe ya komipesa. Eumelaki te, ezalaki na eloko mosusu te oyo nalingaki, kaka kokóma soda ya mai oyo ayebi mpenza mosala.

Na mokolo ya 8 Novɛmbɛ 1961, ntango kaka nakokisaki mbula 17, nakendeki kokomisa nkombo mpo na mosala ya soda ya mai. Nsima ya formasyo, ekokisaki ata sanza minei te, nakómaki soda ya mai. Yango ezalaki ebandeli ya mbula 11 oyo nalekisaki na mosala ya soda.

Nakómaki soda na eleko oyo kimya ezalaki na mboka. Kasi, mosala ya soda ya mai esɛngaka formasyo ntango nyonso. Liboso, batindaki ngai naino na Oahu, na ekólo Hawaii, epai nazwaki formasyo moko ya makasi ya mbula mibale mpo na kozwa mayele ya kobunda na nse mpe na ntango ya bitumba ya batomboki. Nakómaki mobɛti masasi moko ya kosakana te, mpe nazalaki na likoki ya kobɛta eloko to moto masasi tii na ntaka ya mɛtrɛ 457. Nayekolaki karate, ndenge ya kobwaka bɔmbi, kotánga bakarte, kobuka mpe kosolola na telefone. Nazalaki kosepela ntango nyonso.

Ntango nasilisaki formasyo na Hawaii, nalekisaki sanza motoba na Japon mpo na kobatela mindoki ya basoda ya mai na esika ya kobomba mindoki ya basoda ya mai mpe ya likoló na Atsugi. Mosika te, kowelana kati na bato ya États-Unis mpe Vietnam ya nɔrdi ekómaki makasi, mpe batindaki ngai na kati ya etuluku moko ya basoda ya mai na USS Ranger, masuwa epai mpɛpɔ ya bitumba ekitaka. Na golfe ya Tonkin, masuwa na biso esalisaki mpo na kobwaka babɔmbi na Vietnam ya nɔrdi. Nsukansuka, nakɔtaki mpenza na etumba ya solosolo. Kasi, lokola nazalaki kaka na kati ya masuwa, nazalaki komiyoka ete nazali kobunda mpenza te.

Makambo oyo elekaka na bitumba

Na prɛnta ya 1966, ntango nazalaki na Ranger, nsima ya mbula minei ya mosala ya soda, balongolaki ngai. Soki bazwaki libaku ya ndenge wana, basoda mingi balingaki kosepela kozonga epai na bango mpo na koboya kosopa ebele ya makila oyo elingaki kosopama. Kasi, nakómaki nde soda moko ya mai ya molende, oyo ayebi kobunda mpe nalingaki kotika te mosala yango. Namonaki malamu nazongela lisusu mosala ya soda.

Nazalaki na mposa ya kobunda. Nazwaki formasyo mpo na yango. Na yango, namipesaki mpo na kosala na etuluku ya basoda oyo babundaka na nse. Lokola nazalaki kaka na etuluku ya basoda ya mai oyo babundaka na nse nazalaki kokipe te esika nini oyo bakotya ngai. Kozala soda ya mai oyo ayebi mosala malamu ezalaki mokano na ngai na bomoi, mpe kobunda ekómaki nzambe na ngai.

Na sanza ya Ɔkɔtɔbɛ 1967, batindaki ngai na Vietnam. Lokola nazalaki motema likolólikoló, nakendaki mbala moko na etúká ya Quang Tri, epai bitumba ezalaki. Mokolo ata moko ekokaki te, nakɔtaki na kati ya bitumba. Nazalaki komona ndenge bato bazalaki kobomama mpe kozoka. Nazalaki komona putulu ezali komata mpo na masasi oyo banguna bazalaki kobɛta. Esika mosusu ya komibomba ezalaki te, kaka na mwa banzete ya mikemike. Nabandaki kobɛta masasi. Ezalaki nsɔmɔ. Nakanisaki ete nakokufa. Nsukansuka, etumba esilaki. Nabikaki, kasi mibali oyo nasalisaki mpo tózonga, bakufaki.

Na boumeli ya sanza 20 oyo elandaki, nazalaki na etumba moko ya makasi na Vietnam. Pɔsɔ mobimba, mikolo nyonso kobanda ntɔngɔ tii pene na butu makasi, nazalaki kobɛta masasi mpe kokima ete masasi ezwa ngai te, nazalaki komibomba mpo na kobɛta banguna masasi to banguna bazalaki mpe komibomba mpo na kobɛta ngai masasi. Na boumeli ya ntango wana, tozalaki kobɛtana masasi na banguna na kati ya mabulu oyo ezalaki kokóma pɔtɔpɔtɔ soki mbula ebɛti. Ntango mosusu, malili ezalaki makasi mpe makambo oyo ezalaki koleka kuna ezalaki mpasi. Mpo kaka na mabulu wana nde nazalaki kolya mpe kolala.

Mokumba na ngai ya koluka mpe kobebisa, ezalaki kosɛnga ete nakɔtaka mpe nabimaka na bisika ya malili, mpe nazalaki na likama ete banguna bakoki kobimela ngai na kati ya banzete. Na boumeli ya bangonga ebele, nazalaki mpenza koyoka lokito ya mindoki ya makasi epai na epai na esika oyo nazalaki. Na etumba moko oyo esalemaki pene na Khe Sanh, baninga na biso mingi bakufaki to bazokaki, kaka biso bato 13 nde tobikaki.

Na mokolo ya 30 Yanuali 1968, mpo na mbala ya liboso, na boumeli ya mbula koleka moko, nalalaki na ndako ya kapo oyo ezalaki na esika oyo basoda batyaka bibundeli na bango. Mwa kimya wana esilaki na ntɔngɔ moko ntango bɔmbi moko ya makasi ebɛtaki mpe nalamukaki. Nazokaki. Mwa bitenibiteni ya bɔmbi ekwelaki ngai na mapeka mpe na mokɔngɔ. Na ntɔngɔ wana, banguna babɛtaki masasi na ndenge ya lisɛki te.

Mpo na bampota oyo nazokaki, bapesaki ngai mbano oyo bapesaka basoda oyo bazoki na bitumba, kasi bampota na ngai ezalaki makasi te mpo natika kobunda. Eumelaki te, minganga balongolaki ngai biteni ya bɔmbi yango mpe mosika te nakendeki na engumba Hue, epai etumba moko ya monene ezalaki. Kuna, nazalaki koboma na ndenge ya nsɔmɔ. Koboma monguna ezalaki mpamba mpo na ngai. Na boumeli ya mikolo 32, nazalaki kolekisa ntango mingi kaka na kokende ndako na ndako mpo na koluka monguna mpe koboma ye.

Na ntango wana, nazalaki komona ete nazali kosala malamu. Kutu, nazalaki koloba ete, na engumba Hue, ‘monguna abomi ebele ya mibali, basi mpe bana oyo basali eloko te. Babalabala etondaki na ebele ya bibembe. Bakundaki babɔmbi bisika nyonso, ata mpe na nse ya bibembe mosusu. Tozalaki mpe ntango nyonso na likama ete banguna mosusu bakoki kobɛta biso masasi mpo tozali komona bango te.’ Eloko moko te ezalaki kobangisa ngai. Na makanisi na ngai, koboma monguna ezalaki likambo oyo ebongi kosala.

Nazalaki na mposa makasi ya bitumba

Mwa ntango nsima ya etumba ya Hue, nasilisaki mokumba oyo bapesaki ngai ya mbula moko na sanza moko. Kasi, etumba ezalaki kondongbana mpe nazalaki na mposa makasi ya kobunda. Na yango, nandimaki natikala lisusu na Vietnam. Na ntango yango, nakómaki mokonzi ya basoda (sergent-chef) mpe bapesaki ngai mokumba moko monene. Mosala na ngai ezalaki kosɛnga natambwisa bituluku ya basoda ya mai na mwa bamboka ya mikemike ya ekólo. Kuna, tozalaki kosolola na bato oyo bazalaki basoda te mpo na kolakisa bango ndenge bakoki komibatela. Tozalaki ntango nyonso ekɛngɛ mpo monguna akokaki kokɔta na kati ya bato ya mboka. Na butu, tozalaki kokende kolukaluka banguna, kokanga mpe koboma bango. Atako bitumba ezalaki ntango nyonso makasi, bolingo na ngai mpo na bitumba ezalaki kaka koya makasi.

Mbala ya mibale oyo nayaki na vietnam naumelaki te. Lisusu, nasɛngaki natikala na bitumba. Na mbala oyo, bakonzi na ngai baboyaki, ntango mosusu bamonaki ete mposa oyo nazali na yango mpo na bitumba elekaki ndelo. Kasi, mosala na ngai ya soda ya mai esilaki te. Batindaki ngai na États-Unis mpo natángisa bato oyo bayaki sika na mosala ya soda. Nasalaki mosala yango na boumeli ya mbula misato na ndambo. Nazalaki na makambo mingi ya koyebisa bayekoli yango, mpe nasalaki nyonso mpo na kosalisa bango bákóma koboma bato na ndenge ya nsɔmɔ lokola ngai.

Namoni mpenza ntina ya bomoi

Nakómaki moninga ya molakisi moko. Mwasi na ye autaki kotika ye. Ndeko na ye ya mwasi Christine Antisdel, oyo autaki kokóma Motatoli ya Yehova, asɛngaki aya kofanda na moninga yango mpo asalisaka ye mpo na kobatela bana na ye mibale oyo bazalaki naino mike. Wana ezalaki mbala ya liboso oyo nayokaki nsango ya Batatoli.

Nakolaki na Lingomba ya Katolike mpe nakɔtaki na eteyelo ya Bakatolike mpo na mbula mwambe. Na lingomba, nazalaki kosalisa misa. Kasi, nayebaki makambo mingi te na Biblia. Christine asalisaki ngai na likambo yango. Ateyaki ngai makambo mingi ya Biblia oyo nayokaki naino liboso te. Nayekolaki makambo oyo Biblia eteyaka mpenza mpe oyo eteyaka te.

Na ndakisa, nayekolaki ete Biblia eteyaka te ete Nzambe apesaka bato bitumbu na lifelo ya mɔtɔ nsima ya liwa. (Mosakoli 9:5, 10) Eteyaka te ete Nzambe azali Bosato. (Yoane 14:28) Kasi, Biblia eteyaka ete Nzambe akolongola mabe, mpasi mpe liwa mpe ete bato ya botosi bakofanda na paradiso awa na mabele libela na libela. (Nzembo 37:9-11; Emoniseli 21:3, 4) Nayekolaki mpe solo na likambo etali mitinda ya Nzambe oyo elobeli bizaleli malamu. (1 Bakorinti 6:9, 10) Nayekolaki ete Yehova ezali nkombo ya Nzambe. (Nzembo 83:18) Makambo oyo nyonso esepelisaki ngai!

Na sanza ya Novɛmbɛ 1972, batindaki ngai na kaa mosusu ya basoda, epai nasengelaki kolakisa mayele ya bitumba epai ya basoda mosusu oyo baponamaki mpo na kokóma bakonzi. Kuna, nabandaki koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova. Nazalaki koyangana na makita na bango mpe nakamwaki na boninga mpe na bolingo ya solosolo oyo bazalaki na yango.

Kasi, lokola nazalaki kokoba koyekola Biblia, lisosoli na ngai mpe ezalaki kotungisa ngai. Mateya ya Biblia ezalaki komonisa ngai ete etamboli na ngai ezali malamu te. Namipesaki na bitumba mpo na lokumu ya ekólo mpe na makambo mosusu ya mobulu, oyo Nzambe ayinaka.

Namonaki ete ekosimba te kosala mosala ya soda ya mai mpe kosambela Yehova Nzambe. Ezalaki na ntango wana nde natikaki kolinga bitumba. Nazwaki ekateli ya kotika mosala yango. Nsima ya basanza mingi ya kokende kosolola na bakonzi, kosamba mpe kokutana na minganga oyo batalaka maladi ya motó, bakomelaki ngai mokanda ya moto oyo alongwe na mosala ya soda, na mbala oyo lokola moto oyo azali na makoki ya kosala makambo nyonso. Yango nde esukisaki mbula 11 ya mosala na ngai ya soda ya mai.

Sikoyo nakoki koloba na Yehova maloba oyo ezali na Yisaya 6:8: “Ngai oyo! Tindá ngai!” Ya solo, nandimaki kosalela makasi na ngai na mosala ya Nzambe ya solo na esika ya kosala mosala ya soda ya mai. Nabatisamaki na mokolo ya 27 Yuli 1973 mpe nakómaki Motatoli ya Yehova. Sanza mitano na nsima, nabalaki Christine Antisdel, Motatoli ya liboso oyo nakutanaki na ye.

Ngai ná Christine tolekisi mbula 36 elongo mpo na kosalisa bato mosusu bázwa boyebi ya Biblia mpe bápusana penepene na Nzambe. Tosalaki lokola bamisionɛrɛ na boumeli ya mbula mwambe na République Dominicaine. Na boumeli ya mbula 18, nasali lokola mokɛngɛli-motamboli. Ngai ná mwasi na ngai totali masangá ebele ya monɔkɔ ya Espagnol oyo ezali na États-Unis.

Tii lelo, namitungisaka lisusu te mpo na makambo mabe oyo namonaki na ntango ya bitumba. Nalɔtaka yango te mpe ezongelaka ngai na makanisi te. Kutu, banda napusaná penepene na Yehova Nzambe, nayokaka mawa mingi ndenge nabomaki bato lokola ngai na bitumba.

Nasalaki mbongwana monene, kasi nazali na esengo ndenge nasalaki mbongwana yango. Sikoyo nazali komiyoka ete Nzambe alimbisá ngai mpo na makambo wana oyo nasalaki kala. Na esika ya koboma bato, mokumba na ngai sikoyo ezali ya kopesa bato elikya ya bomoi ya seko na paradiso awa na mabele. Ntango nazalaki soda ya mai, nasalaki makambo nyonso kozanga boyebi mpe nazalaki na molende oyo ebongi te. Lokola nakómá Motatoli ya Yehova, mpe lokola nayekoli oyo Biblia eteyaka, nazali mpenza na elikya ete Nzambe ya solo mpe ya bomoi azali, ete azali Nzambe ya bolingo, mpe ete na nsuka, kaka makambo ya malamu ekosalema mpo na baoyo balingaka mpe batosaka ye.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 19]

Pɔsɔ mobimba, mikolo nyonso kobanda ntɔngɔ tii pene na butu makasi, nazalaki kobɛta masasi mpe kokima ete masasi ezwa ngai te, nazalaki komibomba mpo na kobɛta banguna masasi to banguna bazalaki mpe komibomba mpo na kobɛta ngai masasi

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 21]

Banda napusaná penepene na Yehova Nzambe, nayokaka mawa mingi ndenge nabomaki bato lokola ngai na bitumba

[Bililingi na lokasa 18]

Ntango nazalaki kotángisa (fɔtɔ na likoló) Na mosala ya soda na Vietnam (fɔtɔ na nse)

[Elilingi na lokasa 19]

Mpo na bampota oyo nazokaki, bapesaki ngai mbano oyo bapesaka basoda oyo bazoki na etumba, kasi bampota yango ezalaki makasi te mpo epekisa ngai kobunda

[Elilingi na lokasa 20]

Ngai ná Christine, tolekisi mbula 36 elongo mpo na kosalisa basusu bázwa boyebi ya Biblia