Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Yaká kotala zando moko na Afrika

Yaká kotala zando moko na Afrika

Yaká kotala zando moko na Afrika

MOKO ya lolenge oyo eleki malamu ya koyeba mimeseno mpe ndenge ya kolamba ya bato ya ekólo moko, ezali ya kokende na zando na bango. Kuna, okoki komona bato ya ekólo yango, komeka biloko oyo balyaka, mpe kosomba biloko oyo bazali kotɛka. Okokuta mpe batɛki ndenge na ndenge oyo bazali kosala nyonso mpo na kosolola na yo​—ezala olobaka monɔkɔ nini.

Ezali na zando moko te oyo esepelisaka koleka bazando ya Afrika. Ezalaka na bato mpe biloko ya ndenge nyonso. Kuna, okoki kokuta loyenge makasi oyo ezalaka kaka na Afrika. Yaká tókende kotala zando moko na engumba Douala, na ekólo Cameroun.

Ndenge bato ya Afrika bakendeke zando

Na bingumba mingi ya minene na Afrika, kokende zando na tukutuku ezalaka ntalo mingi te mpe esalaka ete moto akóma noki na zando. Na bisika mingi na balabala, bato oyo batambwisaka tukutuku babengaka bakiliya. Soki obangaka te, okoki kondima moko na bango amema yo na tukutuku. Na Cameroun, bato mingi basalelaka tukutuku mpo ezali ntalo mingi te mpe ekómisaka moto noki epai azali kokende.

Lokola mituka mpe ezalaka, bato oyo babangaka makama bamataka na mituka. Bato mingi batondanaka na motuka moko mpo bákabola ntalo ya tike.

Ebele ya bamesa

Moto oyo ayei kotala zando mpo na mbala ya liboso akoki kokamwa makasi na ebele ya bato mpe ndenge bamesa etandani na babalabala. Ebele ya bato, ata mpe bana mike bamemaka biloko ya kotɛka na motó. Soki otali na bikɔlɔ na bango, okomona bansoso ya bomoi, malala oyo balongolá mposo, bankisi mpe biloko mosusu.

Okomona mpe ebele ya bamesa ya mabaya etondi na biloko lokola choux, carottes, concombres, aubergines, courges, madesu, mabenge, tomati, mboma mpe bandunda mosusu. Bato oyo bauti na mikili ndenge na ndenge bakoki koyeba biloko nyonso te, mpo biloko mosusu ezalaka kaka na Afrika. Ntango mosusu na bamesa ezalaka na bapilipili ya motane mpe ya langi ya mosaka, mpe lokola ezalaka ya sika, ntango moi ya ntɔngɔ ebɛti yango engalaka. Bamesa mosusu ezalaka na baavoka, bitabe, pamplemousses, melons, ananasi, malala mpe ndimo ngai. Epesaka mposa ya kolya mpe etɛkamaka na ntalo malamu. Mboma, nsɔngɔ mpe loso​—biloko oyo balonaka mingi kuna, etɛkamaka mpe esika moko na biloko oyo eutá na mikili mosusu, na ndakisa matungulu mpe ai.

Na moko ya bazando ya Douala, batɛki mingi bazalaka bato ya Hausa mpe ya Fula. Batɛki yango bayebanaka mpo na bazambala na bango ya milai ya langi ya bule, ya mpɛmbɛ to ya langi ya mosaka oyo babengaka gandouras to bubu, mpe bayebani na ndenge na bango ya kopesa mbote na esengo na monɔkɔ na bango ya Fulfulde. Mobulu mpe likambo ya kobanga ezalaka te. Mokolo yango, motɛki moko na nkombo Ibrahim, aponaki matungulu misato ya minene mpe akabelaki ngai. Alobaki boye: “Yebisá mwasi na yo asangisa yango na loso mpe alamba yango na mɔtɔ ya makasi te.”

Pembeni wana, bazalaki kotɛka misuni ya nyama oyo bauti koboma​—mingimingi ngɔmbɛ mpe ntaba. Mibali ya makasi bamemi misuni minene yango na mapeka mpe batye yango na bamesa. Bato oyo babomaki nyama, na bambeli na bango na mabɔkɔ bazali kobenga bakiliya báya kopona misuni oyo bakati. Bazali mpe kotɛka bantaba, bansoso mpe bangulu oyo ezali kotambola mpo na bakiliya oyo bakolinga koboma bango moko.

Yaká kolya na restora

Na bazando ya Afrika, restora ezangaka te. Na bazando ya Cameroun, bamesa oyo batyaka biloko ya kolya, babengaka yango restora. Bato mosusu babɛtaka miziki ya makasi mpo na kobenda bakiliya, kasi ezalaka mpe na bisika oyo makɛlɛlɛ ezalaka te, epai moto akoki kosɛnga elubu ya bato ya Afrika mpe akoki kokutana na bato ya mboka yango. Bakoki kokoma biloko oyo bazali kotɛka na tablo, mpe moto nyonso oyo ameseni na bilubu ya Cameroun te, asɛngaka bálimbwela ye.

Biloko mibale oyo bato balyaka mingi na biloko mosusu ezali loso ná fufu ya nsɔngɔ, makemba to mboma. Okokuta mpe mbisi, ngɔmbɛ mpe nsoso ya kotumba mpe supu ya dongodongo, ya nguba baniká, to ya tomati. Na restora, bato balyaka na motema ya kokita mpe bazalaka na ntango mingi mpo na kosolola.

Bato mibale ya misala bayei kopesa biso bilei. Moko amemi plato ezali na basaani oyo batye loso ya mɔtɔ, madesu mpe fufu. Pembenipembeni, batye misuni oyo bakɔtisi na mbanzi mpe mbisi; supu ya dongodongo mpe supu moko ya pilipili makasi mpo na bato oyo balingaka pilipili. Moto ya mosala ya mibale ayei na saani ya mai ya kosukola mabɔkɔ mpe elamba ya kopangwisa mabɔkɔ. Yango ezali mpenza na ntina mpo bilubu ya mboka yango elyamaka na mabɔkɔ. Mbala mingi, liboso ya kolya kiliya moko abondelaka mpe na nsuka ya libondeli bakiliya oyo bazali na mesa mosusu bandimaka “Amen.”

Kosakola nsango malamu na zando

Banda kala, na mikili mingi, bazando ezalaka bisika ya ntina mingi. Ezalaka bisika malamu mpo na kosomba mpe kotɛka biloko, kasi mpe kopesana bansango, kokutana na baninga, ata mpe kozwa mosala. Biblia elobi ete Yesu akendaki na bazando, epai ateyaki bato makambo ya Nzambe mpe abikisaki bato. Ntoma Paulo mpe asololaki “na zando, elongo na baoyo bazalaki wana.” (Misala 17:16, 17; Marko 6:56) Ndenge moko lelo, Batatoli ya Yehova ya Cameroun bamonaka ete zando ezali esika ya malamu mpenza ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe.​—Euti na mokomi na biso.

[Elilingi na lokasa 16]

Pilipili oyo etelá