Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Eloko oyo ebendaki ngai epai ya Batatoli ya Yehova

Eloko oyo ebendaki ngai epai ya Batatoli ya Yehova

Eloko oyo ebendaki ngai epai ya Batatoli ya Yehova

Lisolo ya Tomás Orosco

Mbala ya liboso oyo nakɔtaki na likita ya Batatoli na Ndako ya Bokonzi na bango, mwana moke moko ya mobali asalaki lisolo moko. Atako azalaki komona likoló ya pipitre ya molobi kaka na mpasi, azalaki kobanga te mpe azalaki koteya malamu. Ekamwisaki ngai mpenza.

NAMONAKI ete bayangani bazalaki kolanda ye na likebi mpenza. Nazalaki soda oyo azali diplomate ya ekólo Bolivie na États-Unis, nazalaki mpe komanda ya basoda mpe mosungi ya prezida; mpo na yango bato bazalaki kopesa ngai limemya. Kasi limemya oyo mwana wana azwaki etindaki ngai nakanisa lisusu mikano oyo namityelaki na bomoi.

Tata na ngai akufaki na 1934 na etumba ya Chaco, oyo ekólo Paraguay ebundaki ná Bolivie. Mwa moke na nsima, batindaki ngai na internat na eteyelo moko oyo Bakatolike bazalaki kokamba. Na boumeli ya bambula mingi, nazalaki kokɔta na misa mikolo nyonso, epai tozalaki koyemba banzembo, kolanda malongi, mpe kozongela mabondeli oyo tokangá na motó. Nazalaki kutu kosalisa sango na misa mpe koyemba na etuluku ya bayembi. Kasi, natángaki Biblia ata mbala moko te; kutu namonaki yango naino te.

Nazalaki kosepela na mikolo mosantu ya lingomba mpo ezalaki lokola fɛti, mpe nazalaki kosepela mpo ezalaki lokola likambo ya sika. Kasi basango ná bato mosusu oyo bazalaki koteya makambo ya losambo bazalaki makambo makasi. Bazalaki kokimisa ngai, na esika bábenda ngai. Namonaki ete nakomikɔtisa lisusu mingi te na losambo.

Molɔngɔ oyo ezalaka na mosala ya soda ebendi ngai

Mokolo moko oyo moi ezalaki kongala, bilenge mibali mibale oyo bazalaki bakonzi ya basoda, balati malamu, bayaki konje na Tarija, mboka na biso. Bautaki na La Paz, engumba-mokonzi ya Bolivie. Bakatisaki balabala monene mpe bazalaki kotambola na kobanga te mpe ezalaki kitoko na kotala. Molato na bango ya lokumu, ya pɛto mpe ya nkembo ebɛtaki motema na ngai. Balataki sokoto ya mai ya pondu, mpe nsɔngɛ ya bikɔti na bango ezalaki kongɛnga. Banda mokolo wana, nazwaki ekateli ya kokóma mokonzi moko ya basoda. Nakanisaki ete esengeli kozala ete bakutaná na makambo mingi na bomoi na bango mpe basalaka makambo ya lokumu.

Na 1949, ntango nazalaki na mbula 16, bandimaki ngai na eteyelo ya basoda, na Bolivie. Yaya na ngai ya mobali akendaki kotika ngai na molɔngɔ molai ya bilenge mibali oyo batandanaki tii na porte ya kaa. Alakisaki ngai epai ya lieutenant, mpe asɛngaki ye abatela ngai. Na nsima, ayebisaki ye makambo ya malamu mpo na ngai. Ntango akendaki, bapesaki ngai mbote oyo bapesaka balikili. Babwakaki ngai na mabele mpe balobaki boye: “Tokotala soki nani abongi kozwa lokumu awa!” Ndenge wana nde bakɔtisaki ngai na disiplini ya mosala ya soda mpe babangisaki ngai. Kasi nazalaki makasi, mpe eloko oyo bakitisaki ezali kaka lokumu na ngai.

Na nsima, nayekolaki kobunda etumba mpe nakómaki mokonzi ya basoda, mpe bato bazalaki komemya ngai. Kasi, makambo oyo nakutanaki na yango emonisaki ngai ete ndenge basoda bamonanaka pɛto mpe na lokumu libándá ekoki kokosa.

Nazwi mokumba ya lokumu

Na ebandeli ya mosala na ngai, nazwaki formasyo na General Belgrano, masuwa ya bitumba ya ekólo Argentine, oyo ekokaki komema bato koleka 1 000. Liboso ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, ezalaki masuwa ya États-Unis mpe bazalaki kobenga yango USS Phoenix mpe na nsima, ebebaki te ntango bato ya Japon babundisaki yango na Pearl Harbor, na Hawaï, na 1941.

Nsukansuka namataki ba-grade mpe nakómaki moto ya mibale nsima ya komanda ya basoda ya Bolivie oyo babatelaka banzela ya mai oyo ezali bandelo ya Bolivie. Banzela yango esangisi bibale oyo etindaka mai na yango na Ebale Amazone, mpe Titicaca, laki epai bamasuwa elekaka mpe oyo ezali likoló mingi koleka balaki mosusu na mokili mobimba.

Na sanza ya Mai 1980, baponaki ngai nazala na etuluku ya basoda oyo bazalaki ba-diplomate, oyo batindamaki na Washington, engumba-mokonzi ya États-Unis. Baponaki moto mokomoko na bakonzi oyo bazalaki kokamba etuluku mokomoko ya basoda​—ya mokili, ya mpɛpɔ, mpe ya mai—​mpe batyaki ngai mokambi ya bakonzi yango mpo naumelaki mingi na mosala. Nafandaki na États-Unis mbula pene na mibale mpe na nsima, nakómaki mosungi ya prezida ya Bolivie.

Lokola nazalaki komanda, nasengelaki kokende misa mokolo nyonso ya lomingo. Ndenge ba-aumônier mpe basango bazalaki kopesa mabɔkɔ na bambongwana mpe na bitumba elongolaki ngai limemya mpo na mangomba. Nayebaki ete ndenge mangomba ezalaki kopesa mabɔkɔ na makambo wana oyo ezalaki kosopa makila, ezalaki malamu te. Atako bongo, na esika bokosi wana etinda ngai natika makambo ya losambo, etindaki ngai naluka solo ya Biblia. Natángaki Biblia ata mbala moko te; na yango, nabandaki kotánga yango mbala na mbala, kaka na bisika oyo miso na ngai ekwei.

Molɔngɔ na Ndako ya Bokonzi

Nakamwaki mpo mwasi na ngai Manuela akómaki koyekola Biblia na Janet, Motatoli moko ya Yehova oyo azalaki misionɛrɛ. Na nsima, Manuela abandaki koyangana na makita oyo ezalaki kosalema na Ndako ya Bokonzi, esika na bango ya losambo. Nazalaki komona mabe moko te kokende kotika ye na motuka, kasi nazalaki kolinga kokɔta na makita te. Nazalaki kokanisa ete makita yango ezalaka makɛlɛlɛ mpe makambo kilikili.

Mokolo moko Manuela atunaki ngai soki nakolinga mobali ya Janet aya kotala ngai. Na ebandeli naboyaki. Na nsima namonaki ete lokola nazwaki formasyo na makambo ya losambo, nakokoka kokweisa likambo nyonso oyo akoloba na ngai. Ntango nakutanaki na Ian mbala ya liboso, lolenge na ye ya koloba nde ekamwisaki ngai, kasi maloba na ye mpenza te. Alukaki te kokitisa ngai na formasyo oyo azwá mpe na boyebi na ye ya Biblia. Kasi, azalaki na boboto mpe na limemya.

Na pɔsɔ oyo elandaki, nazwaki ekateli ya kokende na Ndako ya Bokonzi, epai nayokaki mwana wana azali koloba, ndenge namonisaki yango na ebandeli. Wana nazalaki koyoka ye azali kotánga Biblia mpe kolimbola bavɛrsɛ na mokanda ya Yisaya, nayebaki ete namoni ebongiseli oyo ekokani na mosusu te. Likambo ya kokamwa: ntango nazalaki mwana moke nalingaki kokóma mokonzi ya basoda oyo bato bakobanda kopesa limemya; kasi sikoyo nalingaki kokóma lokola mwana wana ya moke mpe koteya bato Biblia. Ezalaki lokola nde motema na ngai elɛmbaki na mbala moko mpe nakómaki kondima makambo.

Na nsima, nakamwaki mpe ndenge Batatoli batosaka ngonga mpe bazalaki ntango nyonso kopesa ngai mbote na esengo mpe kosala mpo nayoka ete nazali mopaya te. Nakamwaki mpe ndenge bazalaki kolata malamu mpe na bopɛto. Likambo oyo nazalaki kosepela mingi ezali nde ndenge makambo ezalaki kosalema na molɔngɔ na makita​—soki bayebisi motó ya likambo ya lisukulu moko, yango nde nakoyoka mokolo yango. Namonaki ete disiplini na bango eutaki na bolingo, kasi na kobanga te.

Nsima ya likita na ngai ya liboso, nandimaki koyekola Biblia na Ian. Toyekolaki buku Okoki kozala na bomoi ya seko na mabele oyo ekobongwana paradis. * Nabosanaka te mokapo ya misato, oyo ezalaki na elilingi ya episkɔpɔ moko azali kopambola basoda liboso bákende etumba. Nandimaki mbala moko ete ezali solo mpo ngai moko namonaki makambo ya ndenge wana na miso na ngai. Na Ndako ya Bokonzi, nazwaki buku Comment raisonner à partir des Écritures. Ntango natángaki makambo oyo Biblia elobi na oyo etali kokɔta na makambo ya politiki, namonaki ete nasengeli kobongola makambo mosusu. Nazwaki ekateli ete nakokende na lingomba ya Katolike lisusu te mpe nabandaki koyangana na makita nyonso na Ndako ya Bokonzi. Namibongisaki mpe mpo na kotika mosala ya soda.

Nakei liboso tii na batisimo

Mwa bapɔsɔ na nsima, nayokaki ete lisangá ekokende kotya bopɛto na libándá ya masano epai liyangani ye etúká ekosalema. Nazalaki mpenza na mposa ya kokende na liyangani yango mpe nakendeki na bandeko mpo na kotya bopɛto na esika yango. Nasalaki elongo na bato mosusu; nasepelaki mpenza na mosala yango mpe kozala elongo na basusu. Nazalaki kokɔmbɔla pavema ntango elenge mobali moko apusanaki pembeni na ngai mpe atunaki ngai soki nazali amiral.

Nayanolaki ete: “Ɛɛ.”

Akamwaki, alobaki ete: “Nakoki kondima te! Amiral mobimba azali kokɔmbɔla pavema!” Okomona ata mokolo moko te mokonzi monene ya basoda azali kolɔkɔta papye, kopɛtola pavema kutu koloba te. Mobali yango azalaki sofɛlɛ na ngai mpe sikoyo akómaki Motatoli ya Yehova!

Kosala elongo na kati ya bolingo

Molɔngɔ oyo ezalaka na kati ya basoda elandaka grade ya moto mpe etikalá na makanisi na ngai. Na ndakisa, nayebaka lisusu ndenge nazalaki kotuna soki Batatoli ya Yehova mosusu bazalaka likoló ya basusu mpo na mikumba na bango to mpo na makambo oyo basalaka. Ndenge na ngai ya kotalela grade mpe lokumu ya moto ekangamaki naino makasi na makanisi na ngai, kasi etikalaki moke ebongwana mpenza.

Kaka na bantango yango, na 1989, nayokaki ete ndeko moko ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova oyo akouta na New York akoya na Bolivie mpe akosala lisukulu na stade. Nazalaki kozela namona ndenge bakoyamba “moto monene” ya lisangá. Nazalaki kokanisa ete moto oyo azali na mokumba ndenge wana akokɔta na bambonda.

Kasi, ntango likita ebandaki, eloko moko te emonisaki ete moto moko ya lokumu ayei, mpe nakómaki komituna. Esalemaki ete mibange mibale, mwasi ná mobali, bafandaki pembeni na ngai ná Manuela. Manuela amonaki ete mwasi yango azalaki kosalela buku ya banzembo ya Lingelesi mpe na ntango ya bopemi, Manuela asololaki na ye. Kasi, na nsima, mwasi yango ná mobali na ye bakendaki.

Tokamwaki makasi ntango na nsima mobali ya mwasi yango azalaki komata na estrade mpo na kopesa lisukulu monene! Na ntango wana nde makambo nyonso oyo nayekolaki na mosala ya soda mpo na grade, limemya, nguya, esika ya lokumu, ebongwanaki. Na nsima nalobaki boye: “Talá naino! Ndeko oyo afandaki na biso na bakiti oyo ya mabemabe ya stade azalaki nde ndeko ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi!”

Lelo, nasɛkaka soki nakanisi ndenge Ian azalaki mbala na mbala kosalisa ngai nakanga ntina ya maloba ya Yesu oyo ezali na Matai 23:8 ete: “Bino nyonso bozali bandeko.”

Nakei kosakola mbala ya liboso

Ntango natikaki mosala ya soda, Ian asɛngaki ngai tóbima mosala ya kosakola ndako na ndako. (Misala 20:20) Tokendaki na kartye oyo nazalaki kolinga tókóma kuna te​—basoda mingi bazalaki kofanda kuna. Na ndako moko, général oyo nazalaki kolinga kokutana na ye te ayaki kofungola porte. Nakómaki motema likoló mpe nabangaki, mingimingi ntango atalaki sakosi mpe Biblia na ngai mpe atunaki ngai na lityo ete: “Likambo nini ekómeli yo?”

Nsima ya kosala mwa libondeli ya mokuse, nazwaki makasi mpe nayokaki kimya na motema. Général yango ayokaki likambo oyo nalingaki koyebisa ye mpe andimaki kutu mikanda oyo elimbolaka Biblia. Likambo yango elendisaki ngai namipesa epai ya Yehova. Namonisaki yango ntango nazwaki batisimo na mokolo ya 3 Yanuali 1990.

Na nsima, mwasi na ngai, mwana na ngai ya mobali mpe ya mwasi bakómaki mpe Batatoli ya Yehova. Nazali na esengo ya kozala nkulutu na lisangá mpe mosakoli ya ntango nyonso ya Bokonzi ya Nzambe. Lokumu oyo nasepelaka na yango koleka ezali ya koyeba Yehova mpe koyebana epai na ye. Eleki grade to esika nyonso ya lokumu oyo moto akoki koluka to kozwa. Ya solo, molɔngɔ esengeli kozala na kotindikama mpe na makasi te, kasi na bolingo. Yehova azali Nzambe ya molɔngɔ, kasi oyo eleki ntina, azali Nzambe ya bolingo.​—1 Bakorinti 14:33, 40; 1 Yoane 4:8.

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 21 Ebimisami na Batatoli ya Yehova, kasi ebimisamaka lisusu te.

[Elilingi na lokasa 13]

Ná yaya na ngai Renato, na 1950

[Elilingi na lokasa 13]

Na likita moko ná basoda ya Chine mpe ya mikili mosusu