Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Kangamá na ekateli na yo

Kangamá na ekateli na yo

Kangamá na ekateli na yo

“Likambo moko ya ntina mingi oyo bamɛli-makaya oyo balongaki kotika yango basalaki ezali ete bakangamaki na ekateli na bango.”​—Buku “Tiká komɛla likaya sikoyo!”

NA MOKUSE, soki olingi kotika komɛla likaya, osengeli, na ebandeli mpenza, kozala na ekateli makasi ya kosala yango. Nini ekoki kopesa yo makasi ya kokangama na ekateli na yo? Ya liboso, tótala matomba oyo okozwa soki otiki komɛla likaya.

Okobatela mbongo na yo. Komɛla pakɛ moko na mokolo ekoki kolya yo mbongo ebele na mbula moko. “Nayebaki te mbongo boni nazalaki kobebisa na likaya.”​—Gyanu, Népal.

Okozala na esengo mingi na bomoi. “Bomoi na ngai ebandaki mpenza ntango natikaki komɛla likaya, mpe ezali kobonga se kobonga.” (Regina, Afrika ya Sudi) Ntango moto atiki likaya, akómaka koyoka mpenza elɛngi ya bilei mpe nsolo ya biloko, mpe mbala mingi akómaka nzoto makasi mpe komonana malamu na miso ya bato.

Nzoto na yo ekoki kokóma kolɔngɔnɔ. “Soki moto atiki likaya, azala mobali to mwasi ya mbula nini, aumelaka te kokóma na nzoto kolɔngɔnɔ.”​—Centre américain d’épidémiologie.

Okoyeba komityela motema. “Natikaki komɛla likaya mpo nalingaki te ete ekóma nkolo na ngai. Nalingaki ngai moko natambwisa nzoto na ngai.”​—Henning, Danemark.

Ekozala na matomba mpo na libota mpe baninga na yo. “Likaya . . . ebebisaka kolɔngɔnɔ ya nzoto ya bato oyo bazali pembeni na yo. . . . Minganga bamoná ete milinga ya likaya oyo moto mosusu azali komɛla ebomaka bankóto ya bato mbula na mbula na maladi ya kanser ya mimpululu (poumons), mpe maladi ya motema.”​—Société américaine du cancer.

Okosepelisa Mozalisi na yo. “Bandeko ya bolingo, tómipɛtola na mbindo nyonso ya mosuni.” (2 Bakorinti 7:1) “Bókaba nzoto na bino mbeka . . . ya bosantu, oyo Nzambe akoki kondima.”​—Baroma 12:1.

“Ntango kaka nayekolaki ete Nzambe aboyaka biloko oyo ekómisaka nzoto mbindo, nazwaki ekateli ya kotika likaya.”​—Sylvia, Espagne.

Kasi, mbala mingi kozwa ekateli mpamba ekoki te. Tokoki mpe kozala na mposa basusu básalisa biso, na ndakisa libota mpe baninga na biso. Bakoki kosala nini?