Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Luká lisalisi

Luká lisalisi

Luká lisalisi

“Soki moto akoki kolonga moto oyo azali kaka ye moko, bato mibale bakoki kotɛlɛmɛla ye.”​—Mosakoli 4:12.

SOKI bato mosusu bazali kosalisa biso, ekoki kokóma pɛtɛɛ mpo na kolonga monguna​—ata soki azali ndenge nini. Na yango, soki olingi kolonga kotika likaya, ekozala malamu osɛnga libota mpe baninga na yo básalisa yo​—ata mpe moto mosusu oyo akolinga mpenza kosalisa yo mpe akozala na motema molai.

Okoki mpe koluka lisalisi ya bato oyo balongá kotika likaya, mpo bakoki koyeba malamu komitya na esika na yo mpe kosalisa yo. Torben, mokristo moko na Danemark alobi boye: “Lisalisi ya basusu ezalaki na ntina mingi mpo na ngai.” Abraham, oyo afandaka na Inde, akomaki boye: “Bolingo ya solosolo oyo libota mpe bandeko na ngai bakristo bamoniselaki ngai esalisaki ngai natika likaya.” Kasi, na bantango mosusu, ata lisalisi ya libota mpe baninga ezalaka kaka moke.

Mobali moko na nkombo Bhagwandas alobi boye: “Namɛlaki likaya mbula 27; kasi ntango nayekolaki oyo Biblia elobi mpo na mimeseno ya mbindo, nazwaki ekateli ya kotika. Nazalaki komɛla lisusu mingi te. Nazwaki baninga ya sika. Nasɛngaki toli. Kasi, esimbaki te. Kasi, mokolo moko na butu, nafungolelaki Yehova Nzambe motema na ngai na libondeli mpe nasɛngaki ye asalisa ngai natika likaya. Nde nsukansuka, nalongaki!”

Likambo mosusu ya ntina oyo okoki kosala ezali komibongisa mpo na mikakatano oyo okokutana na yango. Mikakatano nini? Lisolo elandi oyo elobeli yango.

[Etanda na lokasa 5]

OSENGELI KOSALELA BANKISI?

Biloko mosusu oyo bato basalelaka mpo na kotika likaya, na ndakisa mwa bande oyo ezali na nicotine, oyo babambaka na lobɔkɔ (patch à la nicotine), ekómi kotɛkama mingi. Liboso osalela yango, talelá mituna oyo:

Bolamu na yango nini? Balobaka ete bankisi mosusu ekoki kosalisa yo mingi mpo ekitisaka mposa ya komɛla likaya. Kasi, bato mosusu bazali kondima te ete esalisaka mpenza mpo na ntango molai.

Makama na yango nini? Bankisi mosusu ebimisaka makambo mosusu ya mabe, na ndakisa mposa ya kosanza, konyokwama na makanisi, mpe makanisi ya komiboma. Kobosana mpe te ete kosalela biloko mosusu oyo ezali na nicotine na esika ya komɛla likaya, ezali kaka kokɔtisa nicotine na nzoto na ndenge mosusu, mpe ezali na likama mpo na nzoto. Na yango, moto oyo azali kosalela yango, azali kaka moombo na yango.

Mayele mosusu ezali? Ankɛtɛ moko emonisi ete bato mingi (88 %) oyo balongaki kotika likaya balobaki ete batikaki komɛla likaya mbala moko kozanga kosalela bankisi mosusu.