Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Monɔkɔ ya kengelele

Monɔkɔ ya kengelele

Ebimá kaka yango moko?

Monɔkɔ ya kengelele

● Lokola etambolaka kilomɛtrɛ pene na 300 na ngonga moko, Shinkansen, engbunduka ya Japon ezali moko na bingbunduka oyo eleki mbangu na mokili. Ezali bongo mpo na mwa ndɛkɛ moko​—kengelele. Na ndenge nini?

Talá naino: Ntango ezali kolanda eloko ya kolya, kengelele ekoki kokɔta na kati ya mai kozanga mai epanzana makasi. Likambo yango ebendaki likebi ya Eiji Nakatsu, ingénieur oyo azalaki kotambwisa mosala ya komeka engbunduka wana ya Japon. Amitunaki ndenge oyo kengelele elongwaka mbala moko na mopɛpɛ mpe ekɔtaka na mai kozanga mpasi. Eyano oyo azwaki na motuna yango esalisaki mingi mpo na kosilisa mokakatano moko ya makasi mpo na engbunduka wana ya mbangu mingi. Nakatsu alobi boye: “Ntango engbunduka ekɔti na mbangu makasi na nzela moko ya moke na nse ya mabele, ebimisaka mopɛpɛ oyo ekómaka makasi mokemoke lokola mbonge monene. Mopɛpɛ yango ebimaka na monɔkɔ ya nzela yango na lombangu makasi, mpe ebimisaka makɛlɛlɛ makasi mpenza mpe eningisaka bandako makasi, na boye ete ata bato oyo bafandaka na mɛtrɛ 400 longwa na esika yango bafundaki likambo yango na Leta.”

Bamonaki malamu básala motó ya engbunduka yango ya mbangu makasi na kolanda monɔkɔ ya kengelele. Esukaki boni? Engbunduka yango ekómá lelo kotambola mbangu mingi koleka (ebakisá 10 %) mpe ekómá kosalela kura moke (ekitá 15 %). Longola yango, mopɛpɛ makasi oyo engbunduka ezalaki kobimisa ekitá mingi (30 %). Na yango, ebimisaka lisusu makɛlɛlɛ makasi te ntango ezali koleka na nzela ya moke na nse ya mabele.

Okanisi nini? Monɔkɔ ya kengelele ebimá kaka yango moko? To basalaki yango kosala?

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 29]

Kengelele ezali kokɔta na mai: Woodfall/​Photoshot; Shinkansen: AP Photo/​Kyodo