Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ndenge nini nakoki kosalela mbongo malamu?

Ndenge nini nakoki kosalela mbongo malamu?

Biblia elobi nini?

Ndenge nini nakoki kosalela mbongo malamu?

“Lifuti na ngai ezali kokita, kasi, bafaktire ezali kokóma mingi. Mbala mingi nalalaka te na butu, namitunaka ndenge nini nakoki kokokisa bamposa ya libota na ngai.”​—James.

“Ezali lokola nakangami na motambo mpe mwaye ya kobima ezali te.”​—Sheri.

NTANGO nkita ya mboka ezali kobeba, bato mingi balobaka ndenge wana. Ntango alobaki mpo na ndenge nkita ya mokili ebebi lelo, Juan Somavia, mokonzi ya Bureau international du travail, alobaki boye: “Nkita ebebi kaka na Wall Street te”; abakisaki ete: “Ebebi na mokili mobimba.”

Kobungisa mosala na pwasa to kozanga mbongo ya kokokisa bamposa ya libota ekoki kopesa moto susi makasi ata mpe kotinda ye amona lokola azangi elikya. Na ntango moko boye na bomoi na ye, Davidi, mokomi moko ya Biblia, ayokaki ndenge wana. Abondelaki boye: “Bampasi ya motema na ngai ekómi mingi; Ee longolá ngai na motungisi oyo nazali na yango.” (Nzembo 25:17) Biblia elobi nini mpo na ntango na biso, mpe bwanya na yango oyo euti na Nzambe ekoki mpenza kosalisa biso tótika kobanga mpe tózala na kimya koleka?

Kozala na bwanya na ntango ya mpasi

Biblia esakolaki ete “mikolo ya nsuka” ya mokili oyo ekozala na “bampasi” mpe ekozala “ntango moko ya mpasi mpenza mpe ya mikakatano.” (2 Timote 3:1; Matai 24:8) Maloba yango ezali mpenza kokokisama! Kasi, tozangi elikya te, mpo Nzambe, na nzela ya Biblia, asalisi biso tózala na bwanya oyo tosengeli na yango mpo na koyika mpiko, ata na ntango ya mikakatano ya mbongo.

Na ndakisa, Biblia esalisi biso tótalelaka mbongo na ndenge oyo ebongi. Mosakoli 7:12 elobi boye: “Bwanya ebatelaka ndenge mpe mbongo ebatelaka; kasi litomba ya boyebi ezali ete bwanya ebatelaka na bomoi baoyo bazali na yango.” Ya solo, mbongo ekoki kobatela mwa moke, kasi kaka bwanya oyo euti na Nzambe, oyo ezali na kati ya Biblia, nde ekoki mpenza kobatela biso ntango nyonso. Tózwa mwa bandakisa.

Ndenge ya kosala liboso ya mikakatano ya mbongo

Zalá moto ya etingya. “Moto ya gɔigɔi azali komonisa ete azali na mposa mingi, kasi molimo na ye ezali na eloko te. Nzokande, molimo ya bato ya etingya ekokóma mafutamafuta.” (Masese 13:4) Maloba yango epesi biso liteya nini? Luká koyebana ete ozali mosali ya sembo, oyo asalaka mosala na molende. Basali ya malamu bazalaka na motuya mingi na miso ya bapatrɔ mpe mbala mingi bazwaka mosala noki mpe bazalaka bato ya nsuka ya kolongola na mosala.​—Baefese 4:28.

Kanisá malamu liboso ya kosomba. Yesu alobaki boye: “Nani na kati na bino oyo alingi kotonga linɔ́ngi akofanda liboso te mpo na koyeba mosolo boni yango ekosɛnga, mpo na komona soki azali na oyo esengeli mpo na kosilisa yango?” (Luka 14:28) Atako Yesu apesaki ndakisa wana mpo na komonisa ete moto asengeli koyeba malamu soki kokóma moyekoli na ye ekosɛnga nini, maloba na ye ezali solo ata na makambo ya mbongo. Na yango, komá ndenge okosalela mbongo; salá liste ya biloko oyo osengeli na yango mpenza mpe ntalo na yango.

Kobebisa mbongo na mimeseno ya mabe te. Makambo lokola masano ya mbongo, komɛla makaya, bangi mpe kolangwa masanga ezali mabe na miso ya Nzambe.​—Masese 23:20, 21; Yisaya 65:11; 2 Bakorinti 7:1.

Kozala na “bolingo ya mbongo” te. (Baebre 13:5) Nsukansuka, bato oyo balingaka mbongo bakómaka na mawa, balɛmbaka nzoto, na maloba mosusu ‘bámitɔbɔlatɔbɔlaka na ebele ya bampasi.’ (1 Timote 6:9, 10) Longola yango, bakómaka baombo ya mposa oyo esilaka te, mpo ata soki bazali na mbongo boni, batondaka yango kaka te.​—Mosakoli 5:10.

Yekolá kosepela na oyo ozali na yango. “Toyaki na eloko te na mokili, mpe tokokende na eloko te. Yango wana, soki tozali na bilei mpe na eloko ya kozipa nzoto, tósepela na biloko yango.” (1 Timote 6:7, 8) Bato oyo basepelaka na moke oyo bazali na yango, mbala mosusu bakomitungisa koleka ndelo te ntango nkita ebebi. Na yango, yekolá kosepela na oyo ozali na yango.​—Talá etanda na mopanzi.

Moto moko te ayebi makambo oyo ekoya lobi. Mosakoli 9:11 elobi ete “ntango ná makambo oyo ekanami te ekwelaka [biso] nyonso.” Yango wana, bato ya bwanya ‘batyaka elikya na bango te na bomɛngo oyo ekoki kobunga lelo to lobi, kasi nde epai ya Nzambe,’ oyo alaki basaleli na ye ya sembo ete: “Nakotika [bino] soki moke te mpe nakosundola [bino] ata moke te.”​—1 Timote 6:17; Baebre 13:5.

OSILÁ KOMITUNA?

● Biblia elobi nini mpo na mikolo na biso?​—2 Timote 3:1-5.

● Epai wapi tokoki kozwa litambwisi ya solosolo lelo?​—Nzembo 19:7.

● Ndenge nini nakoki kosala ete libota na ngai ezala malamu na mikolo ekoya?​—Mosakoli 7:12.

[Etanda/Elilingi na lokasa 11]

MPO NA KOBOMBA MBONGO

Kosomba biloko: Salá liste. Kosomba biloko te kaka mpo omoni yango. Luká bantalo ya malamu. Sombá biloko oyo bakitisi ntalo mpe meká kokakola. Sombá biloko oyo osengeli na yango ntango ekómi na bitula mpe ntango ezali eleko na yango te. Soki likoki ezali, sombá biloko ebele na mbala moko.

Mbongo mpo na makambo ya ndako: Koumisa te kofuta bafaktire na yo, noki báfutisa yo mingi koleka. Lambáká biloko ya kolya mpe ya komɛla na ndako, mpe komipesa mingi te na kolya mpe na masanga. Bomáká miinda mpe kangáká bamasini nyonso oyo bozali kosalela te. Soki likoki ezali, bósalelaka biloko oyo elyaka kura mingi te. Na bantango mosusu, bózwaka mopɛpɛ ya libándá na esika ya kotya climatiseur. Talá soki bokoki kofanda na ndako ya mwa moke.

Transport: Soki esengeli kosomba motuka, sombá motuka ya malamu, oyo elyaka esansi mingi te. Esengeli kozala kaka ya sika te. Saláká makambo ebele mbala moko ntango obimi na motuka, mpe bómemanaka na baninga soki likoki ezali. Soki te, zwá transport ya bato nyonso, tambolá na makolo, to kende na velo. Malamu kokende konje ntango biloko ezali ya kokita mpe mbala mosusu pembeni na ndako.

Telefone mpe kominanola: Bosengeli kozala na telefone, ná ya ndako ná oyo ya mabɔkɔ? Soki bana na yo bazali na batelefone ya mabɔkɔ, bakoki nde kosalela yango kaka mwa moke to kotika kosalela yango? Soki ofutelaka ba-chaine ya televizyo, okoki nde kokitisa motángo ya ba-chaine mpo ofutaka mbongo moke? * Malamu kodefa babuku mpe bafilme na bibliotɛkɛ na esika ya kosomba yango.

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 26 Mpo na kozwa makanisi mosusu, talá lisolo “Saleláká mbongo na yo na bwanya,” na Lamuká! ya Yuli–Sɛtɛmbɛ 2009 mpe lisolo “Mituna oyo bilenge batunaka . . . Ndenge nini kobimisa mbongo na ngai na mayele?” na Lamuká! ya Yuni 2006, na Lifalanse.