Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ndenge nini okoki kopusana penepene na Nzambe?

Ndenge nini okoki kopusana penepene na Nzambe?

Ndenge nini okoki kopusana penepene na Nzambe?

Biblia elobi boye: “Bópusana penepene na Nzambe, mpe ye akopusana penepene na bino.” (Yakobo 4:8) Ondimaka ete bato bakoki kozala na boyokani malamu mpe ya makasi ná Mozalisi? Liboso okoka koyanola motuna yango, osengeli koyeba biyano ya solo na mituna mosusu oyo eleki ntina. Na ndakisa:

Nzambe azalaka mpenza?

Soki azalaka, asololá na bato? Na nzela nini?

Biblia ezali mpenza nzela moko oyo Nzambe asololá na bato? Ndenge nini tokoki kondima yango?

Mbala mosusu, yango ezali mituna ya ntina mingi oyo tokoki komituna, mpe ekozwa biyano na lisukulu ya bato nyonso oyo elobi “Ndenge nini okoki kopusana penepene na Nzambe?” Ekosalema na liyangani ya etúká ya Batatoli ya Yehova, oyo ebandaki na sanza ya Mai na États-Unis mpe ekokoba na mokili mobimba. Ezali na motó ya likambo “Tikalá penepene na Yehova!”

Tosɛngi yo oyangana na liyangani oyo ekosalema pembeni na bino. Mpo na koyeba makambo mosusu, tosɛngi yo osolola na Batatoli ya Yehova ya mboka na bino, to okomela babimisi ya zulunalo oyo. Zulunalo na biso mosusu, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Marsi 2010 mpe site ya Internet www.pr418.com etángi bisika oyo liyangani yango ekosalema na Lingala.