Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Nini ekómisaka biso bato malamu to bato mabe?

Nini ekómisaka biso bato malamu to bato mabe?

Biblia elobi nini?

Nini ekómisaka biso bato malamu to bato mabe?

MASOLO mingi ya kala elobelaka koyinana mpe kosopa makila. Nzokande, mbala mingi, ntango makambo ya nsɔmɔ esalemi, bato mosusu bamonisaka boboto mingi mpenza mpe basalisaka basusu. Nini esalaka ete moto mosusu akóma mobomi oyo azangá mawa mpe moto mosusu akóma moto ya motema malamu mpe oyo asalisaka basusu? Mpo na nini bato mosusu bakómaka na nko, lokola banyama?

Kozanga kokoka mpe lisosoli

Biblia elobi polele ete: “Makanisi na motema na moto ijali mabe longwa na bolɛngɛ na ye.” (Genese 8:21, haut fleuve) Yango wana mbala mingi bana basalaka makambo ya mpambampamba. (Masese 22:15) Banda kobotama, biso nyonso tozalaka na likanisi ya kosala mabe. (Nzembo 51:5) Kosala malamu ezali mpenza etumba.

Atako bongo, biso nyonso tozali na lisosoli. Likoki yango ya koyeba malamu ná mabe oyo tobotamaka na yango etindaka mingi kati na biso tósala makambo oyo ekomonana malamu. Mpo na yango, ata baoyo bayekolá bizaleli ya malamu te bakoki koyebana mpo na motema malamu na bango. (Baroma 2:14, 15) Kasi, ndenge tolobaki yango liboso, mposa na biso ya kosala mabe ekoki kobimisa etumba na kati ya motema na biso. Ezali mpe na likambo mosusu.

Kozala na esika ya mabe

Langi ya mongingima (caméléon) elandaka esika oyo yango ezali. Ndenge moko mpe, bato oyo bamikómisaka baninga ya basali-mabe, mbala mingi bazwaka bizaleli na bango. Biblia epesi likebisi oyo: “Osengeli te kolanda ebele ya bato mpo na mikano ya mabe.” (Kobima 23:2) Nzokande, kozala moninga ya bato ya kolongobana, ya sembo, mpe ya bizaleli malamu elendisaka moto asala makambo ya malamu.​—Masese 13:20.

Kasi, tosengeli te komona ete tozali na likama te kaka mpo tozali te baninga ya bato oyo basalaka mabe. Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, mabe ekoki kobatama na nse ya motema na biso, tii ekoya kobima soki libaku ezwami. (Ebandeli 4:7) Longola yango, makambo ya mabe ekoki kokɔta na ndako na biso na nzela ya televizyo, radio, bazulunalo, mpe bongo na bongo. Mbala mingi masano ya video, baemisyo ya televizyo, mpe bafilme elendisaka mobulu mpe kozongisa mabe na mabe. Ata kotala to kotánga mbala na mbala bansango ya mokili to ya mboka na biso ekoki kosala ete tóyokaka lisusu mawa te mpo na minyoko mpe bampasi ya basusu.

Nini ekómisaka bato ya esika yango mabe boye? Biblia epesi eyano oyo: “Mokili mobimba ezali kolala na nguya ya moto mabe.” (1 Yoane 5:19) Biblia elobi ete “moto mabe” yango, elingi koloba Satana Zabolo, azali moto ya lokuta mpe mobomi-bato. (Yoane 8:44) Azali kopanza makambo ya mabe na nzela ya mokili.

Lokola makambo nyonso wana etindaka biso tózala na makanisi boye to boye to tósala likambo boye to boye, bato mosusu bakoki koloba ete ezali foti na bango te soki bazali kosala makambo ya mabe. Kasi, ezali mpenza bongo? Te, mpo ndenge kaka yenda etambwisaka motuka to masuwa, makanisi etambwisaka nzoto na biso.

Malamu to mabe​—Yo moko poná

Likambo nyonso oyo tosalaka, ya malamu to ya mabe, eutaka na likanisi. Soki tozali kokanisa makambo ya malamu, tokosala makambo ya malamu. Nzokande, moto oyo azali kotika bamposa ya moimi ekola na makanisi na ye, akozanga te kosala makambo mingi ya mabe. (Luka 6:43-45; Yakobo 1:14, 15) Na yango, moto na moto akoki kozala malamu to mabe kaka ndenge aponi.

Likambo ya esengo, Biblia emonisi ete tokoki koyekola kozala moto malamu. (Yisaya 1:16, 17) Bolingo nde nguya oyo etindaka moto asala makambo ya malamu, mpo “bolingo esalaka moto mabe te.” (Baroma 13:10) Soki toyekoli kolinga bato, tokokanisa ata moke te kosala moto likambo ya mabe.

Yango nde likambo Ray oyo afandaka na Pennsylvanie, na États-Unis, ayekolaki. Lokola ayekolaki kobunda banda bomwana, eumelaki te, bakómaki kobenga ye Punch, elingi koloba moto alingá bitumba. Azalaki mpe moto ya nkandankanda. Nzokande, ntango akómaki kotosa mitinda ya Biblia, akómaki kobongwana mokemoke. Kasi, ezalaki ntango nyonso pɛtɛɛ te. Na bantango mosusu, azalaki koyoka ndenge Paulo, mokomi moko ya Biblia, azalaki koyoka ete: “Ntango nalingi kosala oyo ezali malamu, oyo ezali mabe nde ezali epai na ngai.” (Baroma 7:21) Lelo, nsima ya bambula mingi ya milende makasi, Ray ayekolá ‘kosala malamu mpo na kolonga mabe.’​—Baroma 12:21.

Mpo na nini tosengeli kosala nyonso ‘tótambola na nzela ya bato malamu’? (Masese 2:20-22) Ezali mpo nsukansuka malamu ekolonga mabe. Biblia elobi boye: “Basali-mabe bakobomama . . . Etikali kaka mwa ntango moke, moto mabe akozala lisusu te . . . Kasi bato ya komikitisa bakozwa mabele, mpe bakosepela mpenza na kimya mingi.” (Nzembo 37:9-11) Nzambe akolongola mabe nyonso. Mapamboli minene ezali kozela bato oyo balukaka kosala makambo ya malamu!

OSILÁ KOMITUNA?

● Nani atindaka biso tósala boye to boye?​—Yakobo 1:14.

● Moto akoki kobongola etamboli na ye?​—Yisaya 1:16, 17.

● Mabe ekosuka mokolo mosusu?​—Nzembo 37:9, 10; Masese 2:20-22.

[Elilingi na lokasa 25]

Moto na moto akoki kozala malamu to mabe kaka ndenge aponi