Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Okoki kolonga!

Okoki kolonga!

Okoki kolonga!

OYO ezali ntango oyo osengeli ‘kozala na mpiko mpe kosala.’ (1 Ntango 28:10) Makambo nini ya nsuka osengeli kosala mpo okoka kolonga?

Tyá mokolo. Ebongiseli oyo etalelaka kolɔngɔnɔ ya nzoto na États-Unis elobi ete soki kaka ozwi ekateli ya kotika likaya, mokolo oyo okotya mpo na kotika komɛla likaya esengeli kozala na kati ya pɔsɔ mibale banda ntango ozwi ekateli. Na ndenge yango, ekateli na yo ekotikala makasi. Komá mokolo yango, yebisá baninga na yo, mpe kangamá na mokolo yango ata soki makambo ebongwani.

Komá makambo oyo ekosalisa yo otika. Na mokanda yango, okoki kokoma likambo nyonso oyo ekoki kolendisa ekateli na yo, bakisá mpe makambo oyo:

● Ntina oyo olingi kotika likaya

● Banimero ya telefone ya bato oyo okobenga soki oyoki mposa makasi ya likaya

● Makanisi oyo ekosalisa yo okokisa mokano na yo, ata mpe bavɛrsɛ ya Biblia lokola Bagalatia 5:22, 23

Memáká mokanda yango esika nyonso, mpe tángáká yango mbala mingi na mokolo. Ata soki otiki likaya, kobá kotángaka mokanda yango soki oyoki mposa ya likaya.

Tiká mokemoke makambo oyo etindaka yo omɛla. Liboso mokolo oyo otyaki ekóma, bandá naino na kotika mimeseno mosusu. Na ndakisa, soki omɛlaka ntɔngɔ nyonso ntango kaka okiti na mbeto, bandá komɛla nsima ya ngonga moko to koleka. Soki omɛlaka likaya ntango ozali kolya to nsima ya kolya, tiká kosala bongo. Tiká kokende na bisika oyo bato bamɛlaka makaya. Mpe lobáká ntango nyonso yo moko ete: “Te, nakozwa te. Namɛlaka lisusu te.” Makambo ya ndenge wana ekobongisa yo mpo na mokolo oyo okotika komɛla. Kasi, ekosalisa yo mpe obosana te ete mosika te, okokóma momɛli ya kala ya makaya.

Omibongisa. Wana mokolo na yo ezali kopusana, bongisá mwa biloko oyo okobanda kotya na monɔkɔ na esika ya likaya: mwa carotte, bazoka, mbila, mpe bongo na bongo. Yebisá lisusu baninga mpe libota na yo mokolo oyo okotika mpe ndenge oyo bakoki kosalisa yo. Mokolo moko liboso, bwaká biloko oyo otyaka putulu ya likaya, eloko oyo opelisaka na yango likaya, mpe biloko mosusu oyo ekoki kozala motambo, na ndakisa basigarɛti na ndako, na motuka, na mabenga na yo, to na esika na yo ya mosala. Mpamba te kosɛnga moninga na yo sigarɛti to kosomba yango ezali mpasi koleka kozwa yango na tiroir! Longola yango, kobá kobondela Nzambe asalisa yo; saláká yango mingi koleka nsima ya likaya na yo ya nsuka.​—Luka 11:13.

Bato ebele mpenza bakatá boyokani na bango na likaya, oyo azalaki moninga na bango, moninga mabe oyo akokaki komemela bango likama. Yo mpe okoki kolonga. Soki osali bongo, okozala na nzoto kolɔngɔnɔ mpe okoyoka ete okómi na bonsomi.

[Elilingi na lokasa 9]

Zaláká ntango nyonso na mokanda na yo, mpe tángáká yango mbala mingi na mokolo