Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Omibongisa mpo na mikakatano

Omibongisa mpo na mikakatano

Omibongisa mpo na mikakatano

“Nazwaki ekateli ya kotika likaya mpo nabatela bebe na ngai oyo nautaki kobota. Mpo na yango, natyaki elembo moko na ndako na biso oyo epekisaki komɛla likaya. Ngonga moko mpamba na nsima, mposa makasi ya nicotine eyelaki ngai lokola tsunami, mpe napelisaki likaya.”​—Yoshimitsu, Japon.

NDENGE ndakisa ya Yoshimitsu emonisi yango, kotika likaya ezalaka na mikakatano. Longola yango, minganga bamonisi ete bato mingi mpenza (pene na 90 %) oyo bakweaki mbala moko bazongelaki momeseno na bango. Yango wana, soki ozali koluka kotika likaya, okoki kolonga soki omibongisi mpo na mikakatano. Mikakatano nini eyaka mbala mingi?

Mposa makasi ya nicotine: Mbala mingi ekómaka makasi na mokolo ya misato nsima ya kotika likaya mpe ekitaka nsima ya pɔsɔ soki mibale. Moto moko oyo azalaki komɛla likaya kala alobi ete na ntango yango “mposa eyaka lokola mbonge; kasi na nsima ekitaka.” Nzokande, ata nsima ya bambula, okoki mbala moko koyoka mposa ya komɛla likaya. Soki esalemi bongo, kowela komɛla te. Zelá miniti mitano to koleka; mposa yango ekoleka.

Makambo mosusu oyo emonisaka ete ozali na mposa: Na ebandeli, ekoki kozala mpasi mpo moto azala ekɛngɛ to atya makanisi nyonso na likambo oyo azali kosala mpe mbala mosusu akoki kokóma monene. Akoki mpe koyoka motó mpasi, mikosa, mitɔki, kosukosu, mpe akoki kokóma na bizaleli mosusu, lokola motema mokuse, nkandankanda, to mpe konyokwama na makanisi. Atako bongo, makambo yango mingi ekitaka nsima ya pɔsɔ minei to motoba.

Na ntango yango ya mpasi, talá mwa makambo oyo ekoki kosalisa yo:

● Laláká mingi.

● Mɛláká mai mingi to jus. Lyáká bilei ya malamu.

● Saláká mwa ngalasisi.

● Bendáká mpema makasi, mpe moná na makanisi ndenge mimpululu na yo etondi na mopɛpɛ ya pɛto.

Makambo oyo ekoki kolamusa mposa: Makambo mosusu to mayoki mosusu ekoki kolamusa mposa ya komɛla likaya. Na ndakisa, mbala mosusu omɛlaka likaya ntango ozali komɛla masanga. Soki ezali bongo, ntango ozali kotika komɛla likaya, komɛla masanga malɛmbɛmalɛmbɛ te. Ya solo, nsima ya mikolo, okoki kozongela komɛla masanga ntango molai.

Atako bongo, bɔɔngɔ na yo ekoki kokoba kokanisa mimeseno mosusu ata ntango molai nsima ya kotika likaya. Torben alobi boye: “Mbula 19 yango oyo banda natiká likaya, kasi nayokaka kaka mposa ya komɛla likaya ntango nazali kopema mwa moke na mosala.” Kasi mbala mingi, nsima ya mikolo mposa ya komɛla likaya ntango ozali kosala makambo moko boye ekitaka mpe esilaka.

Kasi mpo na masanga ezalaka bongo te. Ntango ozali koluka kotika likaya, ekoki kosɛnga otika komɛla masanga mpe kokende na bisika oyo batɛkaka yango, mpo bato mingi bazongelaka momeseno ya komɛla likaya ntango bazali komɛla masanga. Mpo na nini ezalaka bongo?

● Ata mwa masanga moke ebakisaka elɛngi oyo eutaka na nicotine.

● Mbala mingi, bato oyo bazali komɛla masanga esika moko, bamɛlaka mpe likaya.

● Masanga ekitisaka bososoli mpe elongolaka nsɔni. Yango wana Biblia elobi ete: ‘Vinyo elongolaka makanisi ya malamu.’​—Hosea 4:11.

Bato oyo ozalaka na bango: Yebá kopona. Na ndakisa, boyá kozala mpambampamba na bato oyo bamɛlaka likaya to oyo bakoki kotinda yo omɛla. Longola yango, kozala te elongo na bato oyo bakoki koluka kolɛmbisa ekateli na yo ya kotika likaya, oyo bakoki kotyola yo mpo na yango.

Mayoki: Ankɛtɛ moko emonisi ete bato mingi oyo bazongelaki komɛla likaya bazalaki komitungisa to bazalaki na nkanda liboso bákwea. Soki likambo moko elamusi kati na yo mposa ya komɛla likaya, longolá makanisi na likambo yango​—okoki komɛla mai, kotafuna bazoka, to kobima mpo na kotambola. Salá makasi otondisa bɔɔngɔ na yo na makanisi ya malamu, na ndakisa okoki kobondela Nzambe to kotánga Biblia mwa moke.​—Nzembo 19:14.

Koluka komilongisa te

Nakobenda kaka mbala moko.

Likambo ya solo: Kobenda kaka mbala moko ekoki kosepelisa ba-nerf mosusu ya bɔɔngɔ na yo esika nicotine ekɔtaka, na boumeli ya ngonga misato. Mbala mingi, yango etindaka moto azongela likaya.

Likaya esalisaka ngai nalongola mitungisi.

Likambo ya solo: Minganga bamonisi ete nicotine ebakisaka nde ba-hormone oyo esalaka ete moto amitungisa. Koyoka ete mitungisi ekiti mwa moke ekoki kozala ete mposa ya komɛla nde ekiti.

Namesaná na likaya; nakokoka kotika te.

Likambo ya solo: Makanisi ya mabe ebebisaka ekateli. Biblia elobi boye: “Omonisi ete olɛmbi nzoto na mokolo ya mpasi? Nguya na yo ekozala moke.” (Masese 24:10) Na yango, tiká kokanisa ete okolonga te. Moto nyonso oyo alingi mpenza kotika likaya mpe oyo asaleli mitinda ya malamu, na ndakisa oyo tolobeli na zulunalo oyo, akoki kolonga.

Nazali kokufa na mposa.

Likambo ya solo: Ezali solo ete mposa ya komɛla ezalaka makasi, kasi ekitaka nsima ya mwa bapɔsɔ. Kangamá na ekateli na yo! Soki mposa ya komɛla ezongeli yo nsima ya basanza to ya bambula, yango mpe ekoleka, mbala mosusu nsima ya mwa miniti moke​—soki opelisi likaya te.

Nazali na maladi ya motó.

Likambo ya solo: Soki ozali kozwa nkisi mpo na maladi ya motó, na ndakisa ozali konyokwama na makanisi to ozali na maladi babengi schizophrénie, sɛngá monganga na yo asalisa yo otika likaya. Akolinga kaka kosalisa yo; mbala mosusu akoki kopesa yo nkisi mosusu mpo ebatela yo mpo maladi na yo ekóma makasi te to mpe mpo bankisi esala yo mabe mingi te ndenge otiki komɛla likaya.

Soki nakwei, nakomona ete nalongi te.

Likambo ya solo: Soki likambo moko ekweisi yo mpe omɛli likaya​—ndenge ekómelaka bato mingi oyo bazali koluka kotika likaya—​elimboli te ete elikya ezali te mpo na yo. Tɛlɛmá kaka mpe kende liboso. Kokwea mbala moko elimboli te ete olongi te. Kolonga te ezali nde kotikala na nse. Na yango, kobá kobunda. Nsukansuka, okolonga!

Talá ndakisa ya Romualdo, oyo amɛlaki likaya mbula 26 mpe atiká eleki mbula 30. Akomi boye: “Nayebaki lisusu te mbala boni nakweaki. Mbala yango nyonso, nazalaki komiyoka mabe, lokola nde nakolonga te. Kasi, ntango nazwaki ekateli makasi ya kokóma na boyokani malamu na Yehova Nzambe mpe nabondelaki ye mbala na mbala asalisaki ngai, mpe nsukansuka nalongaki kotika likaya mpo na libela.”

Na lisolo oyo ekolanda, tokotalela mwa makanisi oyo ekoki kosalisa yo ozala moto ya esengo, oyo atiká komɛla likaya.

[Etanda/Elilingi na lokasa 7]

MAKAYA NYONSO EBOMAKA

Bato basalelaka mitindo ndenge na ndenge ya makaya. Makaya mosusu etɛkamaka ata na bisika batɛkaka biloko ya kolya to bankisi ya bonkɔkɔ. Atako bongo, OMS (Organisation mondiale de la santé) elobi ete “makaya nyonso ebomaka.” Moto akoki kokufa ata na maladi nini oyo likaya epesaka, na ndakisa kanser mpe maladi ya motema. Mama oyo azali komɛla likaya akoki kobebisa mwana oyo azali naino na libumu. Wapi mitindo ya makaya oyo basalelaka mingi?

Bidis: Yango ezali mwa likaya oyo balíngaka na mabɔkɔ mpe basalelaka yango mingi na mikili ya Azia. Biloko ya mabe oyo ezalaka na milinga ya bidis, biloko lokola gudrɔ, nicotine, mpe monoxyde de carbone eleki kutu oyo ezalaka na sigarɛti.

Cigare: Basalaka yango na tumbako mpe balíngaka yango kaka na nkasa ya tumbako. Na bokeseni na likaya oyo esɛngaka kopelisa mpe kobenda, soki moto atye cigare na monɔkɔ, nicotine na yango ekɔtaka na nzoto ata soki apelisi yango te.

Kretek: Yango ezalaka tumbako oyo basangisi na mwa bikelakela mosusu, mingimingi fololo babengi clous de girofle. Biloko ya mabe oyo ezalaka na milinga na yango, biloko lokola gudrɔ, nicotine, mpe monoxyde de carbone eleki kutu oyo ezalaka na sigarɛti.

Mobokolo (pipe): Kosalela yango ezali na makama ndenge moko na sigarɛti, mpamba te yango mpe epesaka bakanser mpe bamaladi mosusu.

Makaya oyo bapelisaka te: Na ndakisa tumbako ya zolo, oyo ya monɔkɔ, to gutka (oyo basalelaka na Azia). Nicotine na yango ekɔtaka na makila na nzela ya monɔkɔ. Mitindo yango ya makaya ezali kaka mabe lokola makaya mosusu.

Mibokolo oyo ezalaka na mai: Na biloko yango, milinga ya likaya elekaka na mai liboso moto amɛla yango. Atako bongo, ekitisaka bapwazɔ te oyo ekɔtaka na mimpululu, oyo mosusu epesaka kanser.

[Etanda/Elilingi na lokasa 8]

KOSALISA MOTO ATIKA LIKAYA

Zalá na makanisi ya malamu. Eleki malamu kopesa moto longonya mpe kolendisa ye na esika ya kotya ye mpanzi likoló to kopamela ye. Koloba ete “Nayebi ete okoki kolongola soki omeki lisusu” eleki malamu na esika ya koloba ete: “Okwei lisusu!”

Yebá kolimbisa. Salá makasi olimbisa moto oyo azali kotika likaya soki asilikeli yo. Salelá maloba ya boboto lokola, “Nayebi ete ezali mpasi, kasi nazali kosepela mingi ndenge ozali kosala yango.” Koloba ata mokolo moko te ete, “Nazalaki kosepela na yo ntango ozalaki komɛla likaya!”

Zalá moninga ya solosolo. Biblia elobi boye: “Moninga ya solosolo alingaka ntango nyonso, mpe azali ndeko oyo abotami mpo na ntango ya mpasi.” (Masese 17:17) Moniselá “ntango nyonso” moto oyo azali kotika likaya motema molai mpe boboto​—ata na ngonga nini to soki makanisi na ye ezali ndenge nini.