Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Makambo ezali koleka na mokili

Makambo ezali koleka na mokili

Makambo ezali koleka na mokili

Ebongiseli moko (The International Agency for Research on Cancer) ekaboli lolenge ya kongenga ya moi oyo bato balandaka mpo na koyindisa loposo oyo “ekoki kopesa bato maladi ya kanser” to “oyo epesaka bato kanser.”​—THE LANCET ONCOLOGY, GRANDE-BRETAGNE.

Na Argentine, basi 9 kati na basi 10 oyo bazali na zemi bakanaki te kozwa zemi yango.​—CLARÍN, ARGENTINE.

“Mbala mingi bato ya siansi bazali komona lolenge ya sika ya bikelamu mosusu. Kaka na mokolo moko, bato ya bioloji bakoki komona lolenge 50 ya bikelamu yango. Kaka na 2006, bamonaki banzete ya sika mpe banyama pene na 17 000​—mwa ndambo ya balolenge yango (1 % kati na milio 1,8) bapesaki yango nkombo.”​—TIME, ÉTATS-UNIS.

Mindoki ebatelaka?

Mondoki ebatelaka moto oyo asimbi yango na ntango ya mobulu? Bolukiluki oyo iniversite moko (Pennsylvania School of Medicine) na États-Unis esalaki emonisi ete mbala mingi ebatelaka te. Longola makambo etali bapolisi, komibɛta masasi, mpe kobɛta masasi kozanga kokana, bato ya mayele bamonaki ete “likoki ezali mbala koleka 4 mpo na moto oyo asimbi mondoki bábɛta ye masasi koleka bato oyo bazali na mondoki te na ntango ya mobulu.” Bamonaki mpe ete bato mosusu oyo bazalaka na mondoki balongaka komibatela mpo na mindoki na bango, kasi mingi balongaka te komibatela. Lapolo yango elobaki ete: Likanisi oyo ete kozala na mondoki ezali “libateli ntango moto azali na esika ya likama esengeli kolobelama mpe kotalelama lisusu malamumalamu.”

Basango bazali kopakola rouge à lèvres

Basango oyo babandi mosala na bango sika na Thaïlande “bazali kofingisa bato oyo bakangamá mpenza na mateya ya Bouddha” na ndenge bazali kopakola rouge à lèvres, kolata bazambala ekangá bango nzoto, “kodenda na kolekisa ndelo ntango bazali kotambola mpe bazali komema basakosi ya basi,” ndenge zulunalo moko ya Bangkok elobi yango. Ndenge basango yango bazali kosangisa nzoto na baninga na bango mibali, etindi bakonzi ya mangomba báluka koteya bango makambo etali bonkonde. Mokambi mpe moteyi moko na Lingomba ya Bouddha amonisaki ete kosangisa nzoto mibali na mibali epekisami te kati na basango; “soki te balingaki kolongola mingi na mosala yango.”

Bingbunduka kaka mpo na basi

Na boumeli ya bambula, na Inde, basi oyo bazalaki komata na bingbunduka oyo etondá na bato, bazalaki kokutana na makambo lokola kofingama, kotutatuta bango na nzoto, kofina bango, kotalatala bango miso mabe, mpe mbala mingi kotungisa bango na mibali oyo bazali na bingbunduka yango. Lokola bazalaki komilela mingi, guvɛrnema ezwaki ekateli ya kopekisa mibali bákɔta na bingbunduka yango mosusu, ndenge zulunalo moko (The Telegraph) ya Calcutta eyebisi yango. Mpo na yango, bingumba minei ya minene ya Inde​—New Delhi, Mumbai, Chennai, mpe Calcutta—​ezali na mwa motángo ya bingbunduka oyo bakomá “Ladies’ Specials,” oyo ezali kaka mpo na basi. Basi yango balobi ete, basepelaka mingi na bingbunduka yango.