Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mpo na kotalela na libota

Mpo na kotalela na libota

Mpo na kotalela na libota

Nani asalaki mosala oyo?

1. Pesá nkombo ya baluki-mbisi mibale oyo bazalaki bana ya Zebede mpe bantoma ya Yesu.

Komá biyano na yo na mikɔlɔtɔ oyo ezali awa na nse.

LISALISI: Tángá Matai 4:21, 22.

․․․․․

2. Pesá bankombo ya bantoma mosusu mibale oyo bazalaki mpe baluki-mbisi.

LISALISI: Tángá Matai 4:18.

․․․․․

MPO NA KOSOLOLA:

Mpo na nini Yesu alobaki ete bayekoli na ye bakokóma “baluki-bato”? (Matai 4:19) Mpo na yo, boyokani mpe bokeseni nini ezali kati na kozala moluki-mbisi mpe kozala moluki-bato?

MAKAMBO NINI OYEBI NA NTINA NA NTOMA ANDRE?

3. Liboso akóma kolanda Yesu, Andre azalaki moyekoli ya nani?

LISALISI: Tángá Marko 1:4; Yoane 1:35-40.

․․․․․

4. Andre asololaki na nani na ntina na Yesu, mpe litomba nini emonanaki?

LISALISI: Tángá Yoane 1:40-42.

․․․․․

MPO NA KOSOLOLA:

Mpo na nini ezali malamu koyebisa bandeko na yo makambo oyo oyebi na ntina na Yesu? Kasi, bandeko mosusu bakoki kosala nini?

LISALISI: Tángá Matai 10:32-37.

EZALI NA ZULUNALO OYO

Yanolá na mituna oyo, mpe tyá vɛrsɛ to bavɛrsɛ oyo esengeli.

LOKASA 3 Moto ya mayele to ya ekɛngɛ ayebaka likambo nini? Masese 14:________

LOKASA 8 Nkombo nini Nzambe amipesaki? Nzembo 83:․․․

LOKASA 21 Nzambe alingaka moto ya ndenge nini? 2 Bakorinti 9:________

LOKASA 29 Mibange basi bakoki kosalisa bilenge basi básala nini? Tito 2:________

Biyano

1. Yakobo mpe Yoane.

2. Petro mpe Andre.

3. Yoane Mobatisi.

4. Ndeko na ye Petro, mpe akómaki moyekoli ya Yesu.