Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Nakɔtaki na lisano ya kopota mbangu oyo eleki ntina na bomoi na ngai

Nakɔtaki na lisano ya kopota mbangu oyo eleki ntina na bomoi na ngai

Nakɔtaki na lisano ya kopota mbangu oyo eleki ntina na bomoi na ngai

Lisolo ya Karl-Erik Bergman

Nazalaki koyoka malamu ntango nazali kokima mbangu makasi. Nabotamaki na makoki yango, yango wana lisano ya kopota mbangu ekómaki likambo ya ntina na bomoi na ngai.

NA 1972, ntango nazalaki na mbula 17, nakɔtaki na ekipi moko ya masano. Mosika te namonaki ete nasengeli kosala milende mpenza soki nalingi ete nazala mopoti-mbangu moko yo ayebi mpenza mosala. Kobotama na makoki yango ekokaki te mpo nazala molongi na lisano yango ya kopota mbangu. Kasi, nandimaki kosala makasi.

Ntango nazalaki na mbula 22 nakɔtaki na ekipi ya ekólo Finlande. Na mbula oyo elandaki, nasilisaki moto ya liboso na momekano ya bapoti-mbangu ya ntaka ya 100 mɛtrɛ oyo esalemaki na Finlande. Mpasi oyo nazwaki na lokolo, epekisaki ngai napota mbangu ndenge nakokaki kosala. Kasi, mposa oyo nazalaki na yango ya kokima mbangu etindaki ngai nakóma antrenɛrɛ ya bato oyo balingaki kokóma bapoti-mbangu. Na 1982, namibongisaki mpo na kokende na Californie na États-Unis, koyekola na iniversite moko mpe kokoba mosala na ngai ya masano na esika wana oyo klima ezalaka kitoko. Nasombaki kutu tike ya mpɛpɔ.

Likambo oyo ebongolaki bomoi na ngai

Mokolo moko na mpokwa, mwa moke liboso nakende na mobembo na ngai oyo nakanaki na Californie, nayokaki moto abɛti na porte na ngai. Nafungolaki porte mpe namonaki basi mibale, Batatoli ya Yehova. Bazalaki kimya mpe makanisi likolólikoló te; bizaleli oyo nalingaka komona epai ya bapoti-mbangu. Nasɛngaki bango bákɔta, mpe tofandaki mpo na kosolola. Nsima ya lisolo kitoko, batikelaki ngai buku Okoki kozala na bomoi ya seko na mabele oyo ekobongwana paradis. * Nabandaki kotánga yango. Ntango nakómaki na katikati, namonaki ete makambo oyo ezalaki na buku yango ezalaki solo. Basi yango bazongelaki ngai, mpe natunaki bango ndenge nini nakoki kokóma Motatoli ya Yehova. Balobaki na ngai ete nasengeli koyekola Biblia.

Nasukaki kaka te na kondima boyekoli ya Biblia, kasi nabandaki mpe koyangana na makita ná Batatoli na Ndako ya Bokonzi (ndenge Batatoli ya Yehova babengaka bisika na bango ya losambo) na Vantaa, esika oyo nazalaki kofanda. Namonaki ete makambo bazalaki koteya ezalaki kouta na Biblia. Kutu, solo ya Biblia oyo nazalaki koyekola ebandaki mokemoke kobongola ndenge na ngai ya kotalela makambo oyo eleki ntina na bomoi. Yango wana, nakendaki na kompanyi esika nasombaki tike ya mpɛpɔ mpo bázongisela ngai mbongo na ngai. Nasalelaki ndambo ya mbongo yango mpo na kosomba vɛstɛ mpo na kolataka na makita mpe sakosi mpo na komemaka Biblia mpe mikanda oyo elimbolaka Biblia. Nazwaki batisimo mpe nakómaki Motatoli ya Yehova na liyangani oyo esalemaki na Helsinki na 1983.

Bapoti-mbangu mosusu balandi lokolo na ngai

Ntango nazalaki koyekola Biblia, nazalaki mpe na esengo nyonso koyebisa makambo oyo nazalaki koyekola epai ya baninga na ngai. Na ebandeli, baboyaki kondima. Kutu, bapanzaki ngai nsango ete nabɛli motó. Babandaki kokima ngai mokomoko. Nsima ya batisimo, nazalaki kokutana na baninga yango esika nazalaki kokende kosala ngalasisi mpo nazala na nzoto kolɔngɔnɔ. Masolo oyo tozalaki kosolola na bango esalisaki bango bámona ete atako nabongwanaki, nabɛlaki motó te.

Na nsima, basani yango mingi bakómaki komona ete makambo oyo nazalaki koloba ezali solo mpe esengeli kotalela yango. Bamonaki ete maloba ya nsɔni oyo nazalaki koloba mpe bizaleli ya mabe oyo nazalaki na yango ezalaki lisusu te. Bamosusu basepelaki koyeba makambo mingi na ntina na Biblia. Nasepelaki komonisa basusu ete Biblia ekokanisaka bomoi ya mokristo na lisano ya kopota mbangu. Tozali na kati ya momekano ya mbangu oyo lifuti na yango ezali bomoi ya seko.​2 Timote 2:5; 4:7, 8.

Mpo na koloba solo, esengo ya solosolo eutaka te na kolonga na masano ya kopota mbangu, kasi nde na kosala makambo oyo esepelisaka Mozalisi na biso. Masolo oyo nasololaki na bapoti-mbangu mosusu esalaki ete bamosusu bátalela lisusu mikano na bango, mpe mingi bandimaki solo oyo ebongolaki bomoi na ngai. Likambo ya esengo, mingi na kati na bango bamonisaki molende mpo na kosalela Nzambe kaka ndenge bazalaki na yango ntango bazalaki bapoti-mbangu.

Moko na bango ezali Yvonne, mopoti-mbangu moko ya mɛtrɛ 800 oyo ayebaki malamu mosala na ye. Azalaki mwasi oyo alekaki bato nyonso na kopota mbangu na Scandinavie, na momekano yango ya mɛtrɛ 800 mpe azwaki mbano monene mpo na ekólo Finlande. Amonisaki mpe ekólo Finlande na mimekano ya kopota mbangu oyo esalemaki na Mpoto mpe alongaki mpenza. Masolo oyo tosololaki na Yvonne esalisaki ye amona ete ezali na ntina te koluka koyebana na mokili oyo. Ayekolaki ndenge Biblia elobi ete mokili oyo ezali koleka, mpe ekotika nzela na mokili ya sika oyo Nzambe akosala.​—1 Yoane 2:17.

Eumelaki te, Yvonne andimaki koyekola Biblia. Na ntango wana Jouko, oyo azalaki mosani ya makoki mpenza ya ekipi ya Finlande azalaki kosepela na Yvonne. Kutu, akendaki komonisa Finlande na Mpoto na masano ya kopota mbangu mpe na masano ya mokili mobimba oyo babongisaki mpo na bapoti-mbangu. Na nsima, Yvonne mpe Jouko bakendaki na États-Unis mpo na kokoba mosala na bango ya bapoti-mbangu.

Ntango bakómaki kuna, Yvonne akobaki koyekola Biblia, Jouko mpe akómaki koyekola Biblia. Asalaki yango mpo na koluka mabunga mpo Yvonne atika koyekola Biblia. Kasi, mokemoke, solo ya Biblia ezwaki mpe esika na motema ya Jouko. Yvonne ná Jouko babalanaki mpe na nsima bamipesaki epai ya Nzambe, mpe bamonisaki yango na batisimo ya mai. Lelo oyo bango nyonso mibale bazali bapionye, elingi koloba basalelaka mingi ntango na bango mpo na kosakola nsango malamu.

Nayekolaki mpe Biblia na Barbro, mwasi moko ya Finlande oyo alongaki na masano ya bapoti-mbangu ya mɛtrɛ 400 oyo ebongisamaki mpo na basi. Autaki komonisa Finlande na momekano ya masano oyo ebongisamaki na Mpoto. Barbro ná mobali na ye Jarmo, oyo azalaki mpe mosani ya lisano oyo babengi saut à la perche, na nsima bakendaki na Suède. Kuna, Barbro akobaki boyekoli na ye ya Biblia, Jarmo mpe akómaki koyekola Biblia. Bango mibale bazalaki koluka ntina ya bomoi, mpe nsima ya koyekola Biblia, bango mibale bazwaki batisimo na Suède. Na ntango yango, Jarmo akómaki kinésithérapeute, bango nyonso mibale bakómaki kosakola na molende. Jarmo azali nkulutu na lisangá moko ya Batatoli ya Yehova.

Na nsima, nayekolaki na Heidi, elenge mwasi moko oyo azalaki na mbula soki 13, oyo azalaki mpe na makoki ya kokóma mopoti-mbangu. Lokola nazalaki antrenɛrɛ na ye, namonaki ete azalaki kosepela na makambo ya Nzambe. Yango wana, mokolo moko nasololaki na ye makambo oyo Biblia elobi mpo na Bokonzi ya Nzambe mpe mapamboli oyo yango ekomema na mabele. Natunaki ye boye: “Ondimaka ete tokoki komona mapamboli yango?”​—Nzembo 37:11, 29; Matai 6:9, 10.

Ayanolaki: “Ɛɛ.” Andimaki koyekola Biblia. Na yango, nazwaki bibongiseli mpo ndeko moko ya mwasi ayekolaka na ye. Nsima ya mwa bambula, Heidi mpe amipesaki na Nzambe mpe azwaki batisimo ya mai. Na nsima, akolaki malamu na elimo mpe nabalaki ye. Azalaki mpenza moninga malamu, azalaki mpenza na mposa makasi ya kosalela Nzambe​—mposa yango soki asalelaki yango na masano alingaki mpenza kokóma mosani moko monene.

Peter, leki na ngai ya mobali oyo amipesaki mpe na masano, na ebandeli azalaki kosepela te ntango nabandaki koyekola Biblia. Na nsima, napesaki ye buku Bomoi ya seko. Na nsima, ayaki epai na ngai mpe alobaki boye: “Nabandaki kotánga buku yango, kasi nazali koyeba makambo nyonso te. Okoki kosalisa ngai?” Nalukaki Motatoli moko mpo ayekolaka na ye Biblia, mpe nsima ya sanza minei ya koyekola, azwaki batisimo. Na nsima, abalaki; mpe ye ná mwasi na ye bazali bapionye.

Nazali kokoba kopota mbangu

Ata liboso nazwa batisimo, namityelaki mokano ya kokóma misionɛrɛ. Mwa moke nsima ya kozwa batisimo, nabandaki kosakola mingi. Nayebaki ete soki ozali kopota mbangu mpo na bomoi, osengeli kosala milende oyo esengeli. Ngai ná mwasi na ngai, Heidi, tosɛngaki mpo tókɔta na Gileade, Eteyelo ya Batatoli ya Yehova oyo ezali na New York oyo ebongisaka bamisionɛrɛ, mpe na 1994 bandimaki biso. Nsima ya kolanda formasyo batindaki biso na Lettonie, epai balobaka mingi monɔkɔ ya Russe.

Kokwea ya Union Soviétique, esalaki ete bato bátyela lisusu bakonzi ya politiki motema te. Bato bazalaki kosepela na Biblia te kutu epekisamaki, kasi tomonaki ete bato mingi bazalaki kosepela na mateya ya Biblia. Koyekola monɔkɔ ya Russe ezalaki moko ya mikakatano monene oyo nakutaná na yango naino te. Kasi, nsima ya mbula 6 ya mosala ya misionɛrɛ na Lettonie, baponaki ngai mpo nabanda kotala masangá ya Batatoli ya Yehova mpo na kolendisa yango. Ezali mosala yango nde nazali kokoba kosala ná mwasi na ngai.

Na boumeli ya bambula, nasalisi bato mingi bákoba kopota mbangu mpo na bomoi, “bomoi ya solosolo” na mokili ya sika ya Nzambe. (1 Timote 6:19) Kolakisa bapoti-mbangu mpo bákóma mpenza na makoki esɛngaka koyeba bango malamu. Antrenɛrɛ asengeli kosalisa bango bákolisa makoki na bango mpe bátika nzela te na bolɛmbu na bango. Asengeli kolendisa bango bákende liboso mpe bábimisa mpenza makoki na bango nyonso.

Ekamwisaki ngai komona ndenge oyo makambo ya mokristo ekokani na oyo ya mopoti-mbangu, ndenge ntoma Paulo amonisaki yango na mokanda na ye ya liboso epai ya Bakorinti. Mopoti-mbangu ya solosolo atyaka makanisi na ye nyonso na ndenge oyo asengeli kosala ngalasisi mpo na kokembisa nzoto na ye mpe alɔtaka kaka te kolonga. Amityelaka mikano oyo akoki kokokisa mpe asalaka nyonso mpo na kokokisa yango. Soki alongoli makanisi na ye na mokano yango mpe azali lisusu kolanda yango te, mosala nyonso ya makasi oyo asalaki ekobimisela ye litomba te. Ndenge moko mpe mokristo ya solo asengeli kotya makanisi na ye na mokano oyo azali kolanda.

Mopoti-mbangu ya malamu ayebaka bilei oyo mopoti-mbangu asengeli kolya mpe akangamaka na yango. Ezali mpe bongo mpo na mokristo ya solo. Alandaka te mateya ya mbindo, mpe ndenge ntoma Paulo alobaki, alyaka te na “mesa ya bademo.” Kutu, alyaka nde bilei kitoko ya elimo oyo Nzambe apesaka na nzela ya Liloba na ye Biblia. (1 Bakorinti 10:21) Lisusu, ntango mikakatano ebimi, mopoti-mbangu ya solosolo abungisaka elikya te. Ayebaka mabunga na ye mpe abongisaka. Paulo akomaki boye: “Ndenge oyo nazali kopota mbangu ezali ya bipotela te.” Kasi, alobaki ete: “Nazali kobɛtabɛta nzoto na ngai,” mpo na kolongwa te na molɔngɔ ya bapoti-mbangu.​—1 Bakorinti 9:24-27.

Ngai ná mwasi na ngai tozalaka nzoto kolɔngɔnɔ mpo tosalaka ngalasisi mbala na mbala. Kasi, totikaka te ete yango epekisa biso kosalela Yehova, oyo akelá bato na ndenge ya kokamwa. (Nzembo 139:14) Ngai ná mwasi na ngai totyaka makanisi mpo na kozwa mbano ya “bomoi ya solosolo”​—bomoi oyo “ezali koya” na mokili ya sika ya Nzambe.​—1 Timote 4:8.

Nsima ya kolobela ‘lipata monene ya batatoli’ oyo bazalaki na bomoi liboso Kristo aya, ntoma Paulo alobaki boye: “Tólongola mpe kilo nyonso ná lisumu oyo ezali kokanga biso kozanga mpasi, mpe tóyika mpiko ntango tozali kopota mbangu na momekano oyo etyami liboso na biso.” (Baebre 12:1) Ezali na likambo moko te ya ntina koleka oyo tokoki kosala koleka kopota mbangu mpo na bomoi. Ezali bongo mpamba te na nsuka na yango baoyo nyonso bazali kopota mbangu yango bakozwa mapamboli ya seko.​—2 Timote 4:7, 8.

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 7 Ebimisami na Batatoli ya Yehova, kasi lelo oyo ebimaka lisusu te.

[Elilingi na lokasa 14]

Na katikati ya bambula ya 1980: Ngai ná Heidi; na likoló Yvonne; Jouko mpe mwana na bango na nse

[Elilingi na lokasa 15]

Ngai ná Heidi lelo oyo na mosala ya kosakola

[Elilingi na lokasa 15]

Na liyangani moko ya Batatoli ya Yehova na Helsinki na 2009. Yvonne ná Jouko na lobɔkɔ ya mwasi mpe Jarmo ná Barbro na lobɔkɔ ya mobali

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 12]

Ebimisamaki na Aamulehti mokolo ya 21/8/1979