Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ndenge nini Batatoli ya Yehova bateyaka bato Biblia?

Ndenge nini Batatoli ya Yehova bateyaka bato Biblia?

Ndenge nini Batatoli ya Yehova bateyaka bato Biblia?

Bateyaka na kolanda lisolo mokomoko, mbala mingi basalelaka buku Biblia eteyaka mpenza nini? Kati na mikapo 19 oyo ezali na buku yango, ezali na mitó ya makambo oyo:

“Mateya ya solo oyo etali Nzambe ezali nini?”

“Yesu Klisto azali nani?”

“Bato oyo bakufá bazali wapi?”

“Tozali na mikolo ya nsuka?”

“Mpo na nini Nzambe atiki bampasi ezala?”

“Ndenge ya kozala na libota ya esengo”

Basɛngaka na bayekoli bátuna mituna mpe bámona bango moko biyano oyo Biblia epesi. Na nsima, na kotalela makambo oyo bayekoli na Biblia bakopona bango moko lingomba nini bakolanda.

Okoki kosɛnga Batatoli ya Yehova báya koyekola na yo Biblia, mpe bápesa yo buku yango soki otondisi mwa lokasa oyo ezali awa mpe otindi yango na adrɛsi oyo ebongi kati na baadrɛsi oyo ezali na lokasa 5 ya zulunalo oyo.

□ Nalingi kozwa buku oyo bolakisi awa.

□ Bóya kotala ngai mpo na koyekola na ngai Biblia kozanga nafuta mbongo.