Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Tribinale moko na Espagne epesi lisusu mama moko lotomo ya kofanda ná bana na ye

Tribinale moko na Espagne epesi lisusu mama moko lotomo ya kofanda ná bana na ye

Tribinale moko na Espagne epesi lisusu mama moko lotomo ya kofanda ná bana na ye

● Okoyoka ndenge nini soki balobi ete ozali moboti mabe? Ezali boni soki moto moko alobi ete bana na yo bayebi te ndenge ya kofanda na bato, bayebi te kokesenisa mabe ná malamu, mpe bazali mpenza mayele te​—nyonso wana kaka mpo na yo?

Rosa López, mama moko ya bana mibale ya basi na Espagne, akutanaki na makambo yango ntango tata ya bana na ye, oyo bakabwaná na ye akendaki kofunda ye na tribinale mpo bazuzi bábɔtɔla ye lotomo ya kofanda na bana. Rosa azali Motatoli ya Yehova, mpe tata ya bana na ye alobaki ete lingomba na ye ezali kobebisa mpenza bana na ye, bazali mayele te na kelasi, mpe bayebi te kokesenisa mabe ná malamu. Ntango tribinale ya mboka na bango eboyaki kondima makambo oyo ye alobaki, mobali yango asɛngaki akende na tribinale ya monene ya mboka na bango.

Bazuzi oyo basambisaka malamu likambo ya kopesa moboti moko lotomo ya kofanda na bana, bazalaka na koponapona te, bakɔtaka te na kowelana ya makambo etali mangomba, balukaka te koloba ete mateya ya lingomba ya moboti mosusu ezali mabe. Kutu, batalelaka kaka makambo lokola: Makambo nini ezali na litomba malamu koleka mpo na mwana? Ndenge moboti moko azali kofanda na bana ezali kobebisa bango? Moboti nini abongi mpenza mpo na kokokisa malamu bamposa ya mwana?

Mpo na kokata likambo ya Rosa, tribinale esɛngaki moto moko ya pisikoloji asolola na bana mpe baboti yango. Nini emonanaki? Moto yango amonaki ete atako bana bafandaki na mama na bango mbula motoba mobimba, bazalaki kokola malamu na makambo nyonso​—bazalaki mayele na kelasi, bayebaki kofanda na bato, mpe bazalaki koyokana malamu na libota. Na kotalela makambo oyo moto yango ya pisikoloji amonaki, zuzi amonaki likambo moko te oyo emonisaki ete “bana yango babebi, bazali mawamawa to bazali kokoka kofanda na bato te mpo mama oyo azalaki kobɔkɔla bango azali Motatoli ya Yehova.” Zuzi amonaki ete makambo oyo mobali wana afundaki Rosa ezali “nyonso lokuta mpe ezalaki kaka makanisi na ye moko.”

Yango wana, lokola bato mingi bayebi mpenza malamu te Batatoli ya Yehova, balobaka ete babɔkɔlaka bana na bango te na ndenge “ebongi.” Nzokande, bana banyokwamaka te mpo bazali kobɔkwama na mitinda ya Biblia. Kutu, yango esalisaka bango bákóma na mayele ndenge na ndenge ya kosala mosala mpe bizaleli oyo ekosalisa bango bálonga na bomoi.​—Baefese 6:4; 2 Timote 3:15-17.

[Elilingi na lokasa 16]

Bazuzi batikeli Rosa López lotomo ya kofanda ná bana na ye