Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Makambo nini oyebi na ntina na Batatoli ya Yehova?

Makambo nini oyebi na ntina na Batatoli ya Yehova?

Mwasi moko oyo azalaki koyekola mosala ya mopanzi-nsango na Danemark, akomaki boye: “Natángaka mingi makambo etali Batatoli ya Yehova na internet, nayokaki mwa makambo ya mabe na ntina na bango, mpe nazalaki koyoka makambo mingi oyo bakoselaka bango. Yango esalaki ete nakóma kokanisela bango mabe.”

NA NSIMA, mopanzi-nsango yango asololaki na libota moko ya Batatoli ya Yehova. Nini emonanaki? Akomaki boye: “Nabongolaki makanisi kaka ntango nakɔtaki na ndako na bango! Ekoki kozala ete bato bayebi bango malamu te, to ekoki kozala ete towelaka kaka kokanisela bango mabe. Ngai mpe nazalaki kokanisela bango mabe. Namonaki ete namikosaki.”​—Cecilie Feyling, mpo na zulunalo Jydske Vestkysten.

Lokola asalaki na Batatoli ya Yehova, moto moko oyo alandelaka makambo ya bato oyo basalaka na bamagazini na Mpoto amonaki ete basalaka mosala na bosembo. Mpo na yango, akómaki koluka kozwa Batatoli ya Yehova na mosala.

Ya solo, Batatoli ya Yehova bayebani libosoliboso mpo na mosala na bango ya kosakola. Bamonaka ete bato mosusu basepelaka te kosolola masolo ya Biblia, kasi bamosusu basepelaka. Kutu, bato koleka milio 7, pene na bikólo nyonso bayekolaka Biblia pɔsɔ na pɔsɔ na Batatoli ya Yehova, mpe bato yango mosusu bakómaka na nsima bateyi ya Biblia. Na ndakisa, na États-Unis, lapolo oyo likita moko ya lingomba esalaki elobaki ete na mangomba 25 ya minene, Lingomba ya Batatoli ya Yehova ezali moko ya mangomba kaka minei oyo bandimi na bango bazali kobakisama se kobakisama.

Mpo na nini bamilio ya bato bazali koyekola Biblia ná Batatoli? Boyekoli yango esalemaka ndenge nini? Bayekoli yango basengeli mpe kokóma Batatoli? Ata soki ozali kosepela te kokóma Motatoli ya Yehova, osengeli kozwa biyano ya solosolo na mituna yango. Na yango kolanda te makambo oyo bato balobaka, kasi luká koyeba. Na Masese 14:15, Biblia elobi boye: “Zoba andimaka makambo nyonso oyo balobelaka ye; kasi moto ya ekenge akanisaka liboso ya kosala likambo.”​—Bible na lingala ya lelo oyo.

Tiká ete zulunalo oyo esalisa yo oyeba Batatoli ya Yehova malamumalamu. Ya solo, lokola ozali kotánga zulunalo oyo, yango emonisi ete ozali na makanisi malamu. Na yango, mpo na nini te kosala boye: Ntango okotánga masolo minei oyo elandi mpe bitanda na yango, tángá mpe bavɛrsɛ oyo batye wana na Biblia na yo moko. * Soki osali bongo, okomonisa bwanya mpe ndenge Biblia elobi yango, okozala lokola bato oyo bazalaki na “makanisi ya malamu.”​—Misala 17:11.

^ par. 7 Soki ozali na Biblia te, okoki kosɛnga Batatoli ya Yehova bápesa yo yango; soki osalelaka internet okoki kokuta yango na adrɛsi oyo www.watchtower.org/​f na minɔkɔ mosusu. Okokuta mpe na adrɛsi yango mikanda oyo elimbolaka Biblia na minɔkɔ koleka 380.