Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Makambo nini Batatoli ya Yehova bandimaka?

Makambo nini Batatoli ya Yehova bandimaka?

Makambo oyo Batatoli ya Yehova bandimaka eyebani malamu, mpamba te mikanda na bango ebimisamaka na minɔkɔ ebele. Awa na nse balobeli na mokuse mwa mateya na bango ya minene mpe ya ntina.

1. Biblia

Batatoli ya Yehova bandimaka ete “Makomami nyonso ekomami na litambwisi ya elimo ya Nzambe.” (2 Timote 3:16) Jason D. BeDuhn, profɛsɛrɛ na makambo ya mangomba na iniversite moko na États-Unis, akomaki boye: “[Batatoli ya Yehova bazwaka] mateya na bango mpenza na Biblia, balukaka makanisi ya Biblia kozanga ete bákanisa liboso makambo oyo basengelaki kokuta kuna.” Bayokanisaka mateya na bango na oyo ya Biblia; balimbolaka yango te mpo eyokana na makambo oyo bango balingi. Bayebaka mpe ete esengeli te kolimbola makambo oyo ezali na Biblia kaka ndenge ekomami. Na ndakisa, mikolo nsambo ya bozalisi ezali ya elilingi, oyo emonisi ete yango ezali bileko ya ntango molai.​—Ebandeli 1:31; 2:4.

2. Mozalisi

Mpo na komikesenisa na banzambe ya lokuta, Nzambe ya solo amipesá nkombo​—Yehova (to Yawe, ndenge Biblia haut fleuve mpe ndenge bato mosusu ya mayele basalelaka yango). * (Nzembo 83:18) Nkombo ya Nzambe ndenge ekomamaki na Ebre emonani mbala soki 7 000 na Makomami ya ebandeli. Mpo na komonisa ntina ya nkombo yango, Yesu alobaki boye na libondeli na ye ya ndakisa: “Bato bákúmisa nkómbó ya yo.” (Matai 6:9, Biblia Liloba lya Nzambe) Nzambe azali na lotomo ya kosɛnga bato básambela kaka ye. Yango wana, Batatoli basalelaka bikeko to bililingi te na losambo na bango.​—1 Yoane 5:21.

3. Yesu Kristo

Azali Mobikisi, “Mwana ya Nzambe,” mpe “mwana ya liboso na biloko nyonso oyo ezalisamá.” (Yoane 1:34; Bakolose 1:15; Misala 5:31) Lokola akelamá, azali te na kati ya Bosato. Yesu alobaki ete: “Tata aleki ngai.” (Yoane 14:28) Yesu azalaki na bomoi na likoló liboso aya awa na mabele, mpe nsima ya kopesa bomoi na ye lokola mbeka mpe kosekwa, azongaki na likoló. “Moto moko te azali koya epai ya Tata soki na nzela na [ye] te.”​—Yoane 14:6.

4. Bokonzi ya Nzambe

Ezali guvɛrnema ya likoló oyo ezali na mokonzi na yango​—Yesu Kristo—​mpe bato 144 000 oyo bakoyangela na ye, oyo “basombamaki na mabele.” (Emoniseli 5:9, 10; 14:1, 3, 4; Danyele 2:44; 7:13, 14) Bakoyangela mabele, oyo ekopɛtolama na mabe nyonso mpe oyo bamilio mingi ya bato oyo babangaka Nzambe bakofanda wana.​—Masese 2:21, 22.

5. Mabele

Mosakoli 1:4 elobi ete: “Mokili ekoumela seko.” (haut fleuve) Nsima ya kobomama ya bato mabe, mabele ekokóma paradiso mpe bato ya sembo bakofanda wana libela. (Nzembo 37:10, 11, 29) Na ndenge yango maloba oyo Yesu alobaki na libondeli ete “mokano na yo esalama na nse” ekokokisama.​—Matai 6:10, haut fleuve.

6. Bisakweli ya Biblia

“Nzambe . . . akoki kobuka lokuta te.” (Tito 1:2) Na yango, makambo nyonso oyo alobaka ekokisamaka, ata mpe bisakweli ya Biblia oyo etali nsuka ya mokili oyo. (Yisaya 55:11; Matai 24:3-14) Nani akobika ntango mokili oyo ekobomama? Na 1 Yoane 2:17, Biblia elobi ete: “Moto oyo azali kosala mokano ya Nzambe azali kotikala libela na libela.”

7. Bakonzi ya mokili

Yesu alobaki boye: “Bózongisela Kaisala biloko ya Kaisala, kasi Nzambe biloko ya Nzambe.” (Marko 12:17) Yango wana, Batatoli ya Yehova batosaka mibeko ya mboka oyo bazali soki yango etɛmɛli te mibeko ya Nzambe.​—Misala 5:29; Baroma 13:1-3.

8. Kosakola

Yesu alobaki ete: “Nsango malamu oyo ya bokonzi” ekosakolama na mabele mobimba liboso nsuka ya mokili oyo eya. (Matai 24:14) Batatoli ya Yehova bamonaka yango lokumu kosala mosala wana oyo ezali kobikisa bomoi ya bato. Ya solo, bato báyoka to te, wana ezali ekateli na bango. Biblia elobi ete: “Tiká moto nyonso oyo alingi, akamata mai ya bomoi ofele.”​—Emoniseli 22:17.

9. Batisimo

Batatoli ya Yehova babatisaka kaka bato oyo nsima ya koyekola Biblia malamumalamu balingi kosalela Nzambe lokola Batatoli na ye. (Baebre 12:1) Bato yango bamonisaka komipesa na bango epai ya Nzambe na batisimo ya mai.​—Matai 3:13, 16; 28:19.

10. Batitre na lingomba

Yesu alobaki na bayekoli na ye ete: “Bozali bandeko.” (Matai 23:8) Bakristo ya liboso, ata mpe baoyo bakomaki Biblia bazalaki te na batitre kati na bango. Batatoli ya Yehova balandaka ndakisa yango lelo oyo.

^ par. 4 Batatoli ya Yehova te nde babimisá nkombo “Yehova.” Eleki bikeke mingi, nkombo ya Nzambe ezalaki kobongolama na “Yehova” na minɔkɔ mingi ata mpe na Lingelesi mpe na Allemand. Likambo ya mawa, babongoli mingi ya mikolo na biso, balongoli nkombo ya Nzambe mpe batye na esika na yango batitre lokola “Nzambe” mpe “Nkolo,” na ndenge yango bamonisi ete bazangi mpenza limemya epai ya Nkolo ya Biblia.