Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Oyo basusu balobi

Oyo basusu balobi

France “Batatoli ya Yehova bazali bana-mboka oyo batosaka mibeko ya ekólo. . . . Babimisaka mobulu te na mboka. Basalaka mosala, bafutaka mpako, bapesaka mabɔkɔ mpo na kotombola nkita ya mboka na biso mpe bapesaka makabo na ntango ya makama. Ezalaka esengo komona bato yango ya mposo ndenge na ndenge mpe bauti na bisika ekeseni bazali koyangana esika moko na kimya. . . . Soki bato nyonso bazalaki Batatoli ya Yehova mbɛlɛ biso bapolisi tolingaki kozanga mosala.”​—Molobeli ya ebongiseli moko ya bapolisi na France.

Ukraine “Batatoli ya Yehova bakɔtisaka bizaleli ya malamu epai ya bana na bango. Bateyaka bana na bango báboya bizaleli, makambo oyo mokili ya lelo emonaka lokola ezali malamu, kasi ekoki kobebisa bana mpe bato mosusu. Yango wana, bakebisaka bana na bango na makama oyo eutaka na komɛla bangi, makaya mpe kolangwa masanga. Bayebaka ntina ya kozala sembo mpe kosala mosala malamu. . . . Batatoli ya Yehova bateyaka bana na bango bizaleli ya malamu, kotosa bakonzi, kotosa bato mosusu mpe biloko na bango mpe kozala bana-mboka oyo batosaka mibeko.”​—L’histoire des religions en Ukraine, ebimisami na profɛsɛrɛ Petro Yarotskyi.

Italie “Bato nkóto ntuku misato bayanganaki na libándá ya masano mpe bazalaki kimya okoyoka makɛlɛlɛ te . . . Bosɔtɔ ezali te, makɛlɛlɛ te, koganga te. Ezali ndenge wana nde libándá ya masano ezalaki lobi . . . Bajɛstɛ ya mabe, likaya, mpe milangi ya masanga ezalaki te. Kaka bato bafungolá Babiblia, bazali kozwa banoti, mpe bana bafandi kimya.”​—L’Unità, lapolo oyo esalemaki na Rome mpo na liyangani oyo Batatoli ya Yehova basalaki.

“Batatoli ya Yehova bateyaka bana na bango bizaleli ya malamu . . . mpe kozala bana-mboka oyo batosaka mibeko”

Grande-Bretagne Ntango alobelaki mosala ya kosakola ndako na ndako oyo Batatoli ya Yehova basalaka, “Vikɛrɛ ya lingomba moko na Angleterre alobaki ete, tozali na mposa ya bato oyo bamipesá lokola Batatoli ya Yehova.”​—The Gazette, diocèse de Gloucester.

Pays-Bas Na mokanda moko oyo bato oyo bafandaka pembeni ya Ndako ya Bokonzi (ndenge Batatoli ya Yehova babengaka bisika na bango ya losambo) oyo ezali na engumba Leeuwarden, bapesaki Batatoli, bato yango balobaki boye: “Tolingi kopesa bino longonya mpo na bizaleli ya malamu mingi oyo bozali komonisa na Noorderweg. Bato na bino balataka ntango nyonso malamu, mpe bazalaka na bizaleli ya malamu mpenza. Bana bazalaka na bizaleli malamu, mikóló batɛlɛmisaka mituka na bango na mobulu te, babwakaka basalite na balabala te, mpe libándá ya Ndako ya Bokonzi ezalaka ntango nyonso pɛto. Tozali kolikya ete bokoumela mingi na kartye na biso, mpo tozali mpenza na esengo kozala na bino.”

Mexique Elio Masferrer, profɛsɛrɛ na eteyelo moko ya Antropoloji mpe istware, alobaki ete Batatoli basalisaki bato oyo bakutaná na makambo ya mpasi na ndakisa, “bato oyo basangisá na bango nzoto na makasi, banyokolá bango na bato ya libota na bango, mpe oyo bazalaki balangwi masanga mpe bamɛli ya bangi.” Alobaki ete, “mateya ya Batatoli esalisaka bato oyo bamimonaka lokola bazali na ntina te,” mpe epesaka bango likoki ya “kozala na bomoi oyo ezangi mitungisi ntango bazali kosala makambo oyo esepelisaka Nzambe.”​—Excélsior.

Brésil Zulunalo moko elobaki boye: “Lisangá ya Batatoli ya Yehova esalaka mpenza makambo ya kokamwa. Bisika oyo bayanganaka ezalaka ntango nyonso pɛto. Makambo nyonso ezalaka na molɔngɔ . . . Ntango basilisi makita na bango, batikaka bisika yango pɛto koleka ndenge bakutaki yango. Ntango masolo ezali kosalema bazalaka kimya mpenza. Moto moko te atindikaka to atutaka basusu. Bizaleli ya malamu emonanaka mpenza. . . . Ezali mpenza lingomba oyo esalaka makambo na molɔngɔ. Bayebi mpenza soki kosambela Nzambe elimboli nini.”​—Comércio da Franca.

Batatoli ya Yehova bandimaka mpenza ete Mozalisi ayebi malamu koleka moto mosusu nyonso mitinda oyo bato basengeli kolanda. (Yisaya 48:17, 18) Yango wana, Batatoli bapesaka Yehova lokumu nyonso ntango bato bazali koloba malamu mpo na etamboli na bango. Yesu alobaki boye: “Tiká pole na bino engɛnga liboso ya bato, mpo bámona misala na bino ya malamu mpe bápesa Tata na bino oyo azali na likoló nkembo.”​Matai 5:16.